< Naumi 3 >

1 Mawa na engumba oyo mosala na yango kosopa makila ya bato, engumba oyo etonda na makambo ya lokuta mpe na moyibi, engumba oyo ezangaka te koboma bato!
ὦ πόλις αἱμάτων ὅλη ψευδὴς ἀδικίας πλήρης οὐ ψηλαφηθήσεται θήρα
2 Tango nyonso, kaka makelele ya bafimbu, makelele ya bapine: bampunda ezali kopumbwa, mpe bashar ezali koningana.
φωνὴ μαστίγων καὶ φωνὴ σεισμοῦ τροχῶν καὶ ἵππου διώκοντος καὶ ἅρματος ἀναβράσσοντος
3 Basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda bazali kotambola-tambola, mipanga ezali kongenga, makonga ezali koleka-leka lokola mikalikali! Bato bazali kozoka, kokufa ebele penza! Bongo bibembe elali-lali bisika nyonso, mpe makolo ya bato ekomi kotuta bibembe tango bazali kotambola.
καὶ ἱππέως ἀναβαίνοντος καὶ στιλβούσης ῥομφαίας καὶ ἐξαστραπτόντων ὅπλων καὶ πλήθους τραυματιῶν καὶ βαρείας πτώσεως καὶ οὐκ ἦν πέρας τοῖς ἔθνεσιν αὐτῆς καὶ ἀσθενήσουσιν ἐν τοῖς σώμασιν αὐτῶν
4 Makambo oyo nyonso esalemi likolo ya makambo ya nkele ya engumba oyo etonda na kindumba, engumba ya kitoko makasi kasi etonda na misala ya soloka, engumba oyo epengwisaka bikolo na nzela ya kindumba na yango mpe epengwisaka bato na nzela ya misala na yango ya soloka.
ἀπὸ πλήθους πορνείας πόρνη καλὴ καὶ ἐπιχαρὴς ἡγουμένη φαρμάκων ἡ πωλοῦσα ἔθνη ἐν τῇ πορνείᾳ αὐτῆς καὶ φυλὰς ἐν τοῖς φαρμάκοις αὐτῆς
5 « Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.
ἰδοῦ ἐγὼ ἐπὶ σέ λέγει κύριος ὁ θεὸς ὁ παντοκράτωρ καὶ ἀποκαλύψω τὰ ὀπίσω σου ἐπὶ τὸ πρόσωπόν σου καὶ δείξω ἔθνεσιν τὴν αἰσχύνην σου καὶ βασιλείαις τὴν ἀτιμίαν σου
6 Nakobwakela yo bosoto, nakosambwisa yo mpe nakokomisa yo eloko ya maseki.
καὶ ἐπιρρίψω ἐπὶ σὲ βδελυγμὸν κατὰ τὰς ἀκαθαρσίας σου καὶ θήσομαί σε εἰς παράδειγμα
7 Bato nyonso oyo bakomona yo bakokima mpe bakoganga: ‹ Engumba Ninive ebebisami boye! Nani akoyokela yango mawa? › »
καὶ ἔσται πᾶς ὁ ὁρῶν σε ἀποπηδήσεται ἀπὸ σοῦ καὶ ἐρεῖ Δειλαία Νινευη τίς στενάξει αὐτήν πόθεν ζητήσω παράκλησιν αὐτῇ
8 Boni, okanisi ete ozali kitoko koleka engumba Tebesi oyo ezalaka pembeni ya ebale Nili mpe ezingelama na mayi, bongo ebale ebatelaka yango mpe mayi ezalaka lokola mir oyo ebombaka yango?
ἑτοίμασαι μερίδα ἅρμοσαι χορδήν ἑτοίμασαι μερίδα Αμων ἡ κατοικοῦσα ἐν ποταμοῖς ὕδωρ κύκλῳ αὐτῆς ἧς ἡ ἀρχὴ θάλασσα καὶ ὕδωρ τὰ τείχη αὐτῆς
9 Makasi na yango ezalaki kowuta na Kushi mpe na Ejipito; bato ya Puti mpe ya Libi bazalaki kosunga yango.
καὶ Αἰθιοπία ἡ ἰσχὺς αὐτῆς καὶ Αἴγυπτος καὶ οὐκ ἔστιν πέρας τῆς φυγῆς καὶ Λίβυες ἐγένοντο βοηθοὶ αὐτῆς
10 Nzokande, yango mpe ekweyaki, mpe bamemaki bato na yango na bowumbu. Bakataki-kataki na biteni bana na bango na babalabala nyonso, babetaki zeke mpo na kopona bato na yango ya lokumu mpo ete bamema bango na bowumbu, mpe bakangaki bakambi na yango minyololo.
καὶ αὐτὴ εἰς μετοικεσίαν πορεύσεται αἰχμάλωτος καὶ τὰ νήπια αὐτῆς ἐδαφιοῦσιν ἐπ’ ἀρχὰς πασῶν τῶν ὁδῶν αὐτῆς καὶ ἐπὶ πάντα τὰ ἔνδοξα αὐτῆς βαλοῦσιν κλήρους καὶ πάντες οἱ μεγιστᾶνες αὐτῆς δεθήσονται χειροπέδαις
11 Yo mpe okokoma lokola moto oyo alangwe masanga, yo mpe okoluka ekimelo mpo na kokima banguna na yo.
καὶ σὺ μεθυσθήσῃ καὶ ἔσῃ ὑπερεωραμένη καὶ σὺ ζητήσεις σεαυτῇ στάσιν ἐξ ἐχθρῶν
12 Bandako na yo nyonso, oyo batonga makasi ezali lokola banzete ya figi etonda na bambuma ya liboso ekomela; soki kaka bameki koningisa yango, bambuma ekweyaka kino na monoko ya moto ya lokoso.
πάντα τὰ ὀχυρώματά σου συκαῖ σκοποὺς ἔχουσαι ἐὰν σαλευθῶσιν καὶ πεσοῦνται εἰς στόμα ἔσθοντος
13 Tala malamu mampinga na yo, balemba lokola basi; bikuke ya mokili na yo ezali polele liboso ya banguna na yo, pamba te moto ezikisi bikangelo na yango.
ἰδοὺ ὁ λαός σου ὡς γυναῖκες ἐν σοί τοῖς ἐχθροῖς σου ἀνοιγόμεναι ἀνοιχθήσονται πύλαι τῆς γῆς σου καὶ καταφάγεται πῦρ τοὺς μοχλούς σου
14 Bino bato ya engumba oyo, bomitokela libela mayi mpo ete bakozingela bino; bolendisa libela bamir oyo ebatelaka engumba na bino; bokamata mabele oyo batongelaka bandako, bosangisa yango mpo ete ekoma potopoto, bongo bobeta babiliki mpe botumba yango.
ὕδωρ περιοχῆς ἐπίσπασαι σεαυτῇ καὶ κατακράτησον τῶν ὀχυρωμάτων σου ἔμβηθι εἰς πηλὸν καὶ συμπατήθητι ἐν ἀχύροις κατακράτησον ὑπὲρ πλίνθον
15 Kuna nde moto ekoya kozikisa yo, mopanga ekoya koboma yo mpe kosilisa yo lokola mabanki. Tika ete bato na yo bakoma ebele lokola mabanki, bakoma lisusu ebele makasi lokola mankoko.
ἐκεῖ καταφάγεταί σε πῦρ ἐξολεθρεύσει σε ῥομφαία καταφάγεταί σε ὡς ἀκρίς καὶ βαρυνθήσῃ ὡς βροῦχος
16 Okomisi motango ya bato na yo ya mombongo ebele koleka ata minzoto ya likolo, kasi babebisi mokili nyonso mpe bapumbwe na bango ndenge kaka mankoko esalaka.
ἐπλήθυνας τὰς ἐμπορίας σου ὑπὲρ τὰ ἄστρα τοῦ οὐρανοῦ βροῦχος ὥρμησεν καὶ ἐξεπετάσθη
17 Bakengeli na yo bazali lokola mankoko, bakonzi ya basoda na yo bazali lokola maboke ya mabanki oyo eyaka kovanda na bamir ya lopango na tango ya malili; kasi soki kaka moyi ebimi, yango nyonso epanzani, mpe moto moko te ayebaka esika yango ekendaka.
ἐξήλατο ὡς ἀττέλεβος ὁ σύμμικτός σου ὡς ἀκρὶς ἐπιβεβηκυῖα ἐπὶ φραγμὸν ἐν ἡμέραις πάγους ὁ ἥλιος ἀνέτειλεν καὶ ἀφήλατο καὶ οὐκ ἔγνω τὸν τόπον αὐτῆς οὐαὶ αὐτοῖς
18 Oh mokonzi ya Asiri, bakambi na yo bazali kolala pongi, basoda na yo ya mpiko balali pongi ya makasi, mampinga na yo bapalangani na bangomba mpe moto akosangisa bango azali komonana te.
ἐνύσταξαν οἱ ποιμένες σου βασιλεὺς Ἀσσύριος ἐκοίμισεν τοὺς δυνάστας σου ἀπῆρεν ὁ λαός σου ἐπὶ τὰ ὄρη καὶ οὐκ ἦν ὁ ἐκδεχόμενος
19 Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo; pota na yo ezali monene makasi! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe?
οὐκ ἔστιν ἴασις τῇ συντριβῇ σου ἐφλέγμανεν ἡ πληγή σου πάντες οἱ ἀκούοντες τὴν ἀγγελίαν σου κροτήσουσιν χεῖρας ἐπὶ σέ διότι ἐπὶ τίνα οὐκ ἐπῆλθεν ἡ κακία σου διὰ παντός

< Naumi 3 >