< Naumi 1 >

1 Lisakoli na tina na engumba Ninive. Buku ya emoniseli ya Naumi, moto ya engumba Elikoshi.
The declaration about Nineveh. The book of the vision of Nahum, the Elkoshite.
2 Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.
Yahweh is a jealous God and avenges; Yahweh avenges and is full of wrath; Yahweh takes vengeance on his adversaries, and he continues his anger for his enemies.
3 Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.
Yahweh is slow to anger and great in power; he will not allow the wicked to go unpunished. Yahweh makes his way in the whirlwind and the storm, and the clouds are the dust of his feet.
4 Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.
He rebukes the sea and makes it dry; he dries up all the rivers. Bashan is weak, and Carmel also; the flowers of Lebanon are weak.
5 Bangomba milayi eninganaka liboso na Ye, mpe bangomba mikuse epanzanaka. Mabele, mokili mpe bavandi na yango balengaka liboso na Ye.
The mountains shake in his presence, and the hills melt; the earth collapses in his presence, indeed, the world and all people who live in it.
6 Nani akoki solo kotelema liboso na Ye soki asiliki? Nani akoki solo kobika soki kanda na Ye epeli? Mpo ete kanda na Ye epanzanaka lokola moto, bongo mabanga ebukanaka liboso na Ye.
Who can stand before his wrath? Who can resist the fierceness of his anger? His wrath is poured out like fire, and the rocks are broken apart by him.
7 Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
Yahweh is good, a stronghold in the day of trouble; and he is faithful to those who take refuge in him.
8 Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.
But he will make a full end to his enemies with an overwhelming flood; he will pursue them into darkness.
9 Likita ya ndenge nini bakoki kosalela Yawe? Azali Ye oyo asilisaka makambo nyonso; pasi ekoya lisusu te.
What are you people plotting against Yahweh? He will make a full end to it; trouble will not rise up a second time.
10 Bakokoma lokola bato oyo bazali kati na banzube, lokola bato oyo balangwe masanga ya vino; bakozikisama nye lokola matiti ya kokawuka.
For they will become tangled up like thornbushes; they will be saturated in their own drink; they will be completely devoured by fire like dry stubble.
11 Ezali kati na yo Ninive nde moto oyo azali na mabongisi mabe mpo na kotelemela Yawe mpe azali na batoli ya mabe abimi.
Someone arose among you, Nineveh, who planned evil against Yahweh, someone who promoted wickedness.
12 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ata banguna na bino bazali ebele mpe makasi, bakosila kokufa mpe kolimwa. Oh mokili ya Yuda, soki nasambwisaki yo, nakosala yango lisusu te.
This is what Yahweh says, “Even if they are at their full strength and full numbers, they will nevertheless be sheared; their people will be no more. But you, Judah: Though I have afflicted you, I will afflict you no more.
13 Nakobuka ekangiseli na bango, oyo ezali na kingo na yo mpe nakolongola yo na minyololo. »
Now will I break that people's yoke from off you; I will break your chains.”
14 Kasi Yawe azwi mokano oyo mpo na yo: « Okotikala kozwa lisusu bakitani te oyo bakobatela kombo na yo na bokonzi. Nakolongola kati na tempelo na yo banzambe na yo ya bikeko mpe bikeko nyonso oyo basala na bibende balekisa na moto. Nazali kobongisela yo kunda, pamba te ozali na yo pamba. »
Yahweh has given a command about you, Nineveh: “There will be no more descendants bearing your name. I will cut off the carved figures and the cast metal figures from the houses of your gods. I will dig your graves, for you are contemptible.”
15 Botala kuna na bangomba makolo ya momemi sango malamu: amemi sango ya kimia! Oh mokili ya Yuda, sepela na bafeti na yo mpe kokisa ndayi na yo; pamba te wuta sik’oyo, moto mabe moko te akokota lisusu epai na yo; pamba te bango nyonso bakobebisama nye.
Look, on the mountains there are the feet of someone who is bringing good news, who is announcing peace! Celebrate your festivals, Judah, and keep your vows, for the wicked one will invade you no more; he is completely cut off.

< Naumi 1 >