< Mishe 5 >

1 Oh engumba oyo elinga bitumba, sangisa basoda na yo, pamba te bazingeli biso! Bakobeta mokambi ya Isalaele fimbu na matama.
Now gather yourself in troops, O daughter of troops: he has laid siege against us: they shall strike the judge of Israel with a rod upon the cheek.
2 Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.
But you, Bethlehem Ephratah, though you be little among the thousands of Judah, yet out of you shall he comes forth unto me that is to be ruler in Israel; whose activities forth have been from of old, from everlasting.
3 Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.
Therefore will he give them up, until the time that she which labors has brought forth: then the remnant of his brethren shall return unto the children of Israel.
4 Akotelema mpe akobatela bibwele na ye na nguya na Yawe, na lokumu ya Kombo ya Nzambe na ye; mpe bakovanda na kimia, pamba te sango ya lokumu ya kombo na ye ekopanzana mokili mobimba.
And he shall stand and feed in the strength of the LORD, in the majesty of the name of the LORD his God; and they shall abide: for now shall he be great unto the ends of the earth.
5 Boye, akozala kimia na bango! Tango mampinga ya Asiri bakokota na makasi kati na mokili na biso mpe na bandako na biso, oyo batonga makasi, tokotindela bango babateli sambo ya bibwele mpe bakambi mwambe ya bato mpo na kobundisa bango.
And this man shall be the peace, when the Assyrian shall come into our land: and when he shall tread in our palaces, then shall we raise against him seven shepherds, and eight principal men.
6 Bakokamba mokili ya Asiri mpe ya Nimirodi na mopanga. Boye, akokangola biso na bokonzi ya mampinga ya Asiri tango bakokota na makasi na mabele na biso mpe na bandelo na yango.
And they shall waste the land of Assyria with the sword, and the land of Nimrod in the entrances thereof: thus shall he deliver us from the Assyrian, when he comes into our land, and when he treads within our borders.
7 Batikali ya Jakobi bakozala, kati na bikolo ebele lokola mamwe oyo ewuti epai na Yawe, mpe na likolo ya matiti lokola londende oyo ekweyaka na makasi ya moto te to mpe etalelaka moto te.
And the remnant of Jacob shall be in the midst of many people as a dew from the LORD, as the showers upon the grass, that tarries not for man, nor waits for the sons of men.
8 Batikali ya Jakobi bakozala kati na mabota, na kati-kati ya bikolo ebele, lokola nkosi kati na banyama ya zamba, lokola mwana nkosi kati na etonga ya bameme: tango elekaka kati na etonga ya bameme, ekangaka mpe epasolaka yango, mpe moto oyo akoki kokangola yango azalaka te.
And the remnant of Jacob shall be among the Gentiles in the midst of many people as a lion among the beasts of the forest, as a young lion among the flocks of sheep: who, if he go through, both treads down, and tears in pieces, and none can deliver.
9 Tika ete loboko na yo elonga banguna na yo, mpe bayini na yo nyonso babebisama nye!
your hand shall be lifted up upon your adversaries, and all of your enemies shall be cut off.
10 « Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakobebisa bashar mpe bampunda ya mokili na yo,
And it shall come to pass in that day, says the LORD, that I will cut off your horses out of the midst of you, and I will destroy your chariots:
11 nakobebisa bingumba ya mokili na yo mpe nakokweyisa bandako na yo, oyo batonga makasi;
And I will cut off the cities of your land, and throw down all your strong holds:
12 nakobebisa misala na yo nyonso ya kindoki, mpe okotikala lisusu na bato ya soloka te;
And I will cut off witchcrafts out of your hand; and you shall have no more soothsayers:
13 nakobebisa banzambe ya bikeko oyo ezali kati na yo, mpe okofukamela lisusu te bikeko oyo maboko na yo esilaki kosala;
Your graven images also will I cut off, and your standing images out of the midst of you; and you shall no more worship the work of your hands.
14 nakobebisa makonzi ya bule ya nzambe Ashera oyo ezali kati na yo mpe nakobebisa bingumba na yo.
And I will pluck up your groves out of the midst of you: so will I destroy your cities.
15 Na kanda na Ngai ya makasi, nakozongisa mabe na mabe na bikolo oyo etosaki Ngai te. »
And I will execute vengeance in anger and fury upon the heathen, such as they have not heard.

< Mishe 5 >