< Mishe 2 >

1 Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.
ἐγένοντο λογιζόμενοι κόπους καὶ ἐργαζόμενοι κακὰ ἐν ταῖς κοίταις αὐτῶν καὶ ἅμα τῇ ἡμέρᾳ συνετέλουν αὐτά διότι οὐκ ἦραν πρὸς τὸν θεὸν τὰς χεῖρας αὐτῶν
2 Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.
καὶ ἐπεθύμουν ἀγροὺς καὶ διήρπαζον ὀρφανοὺς καὶ οἴκους κατεδυνάστευον καὶ διήρπαζον ἄνδρα καὶ τὸν οἶκον αὐτοῦ ἄνδρα καὶ τὴν κληρονομίαν αὐτοῦ
3 Mpo na yango, Yawe alobi: « Nazali kobongisa mabe mpo na ekolo ya lolenge oyo: ekozala pasi moko oyo bakokoka komibikisa na yango te. Bakokoka lisusu kotambola na lolendo te, pamba te ekozala tango ya pasi makasi.
διὰ τοῦτο τάδε λέγει κύριος ἰδοὺ ἐγὼ λογίζομαι ἐπὶ τὴν φυλὴν ταύτην κακά ἐξ ὧν οὐ μὴ ἄρητε τοὺς τραχήλους ὑμῶν καὶ οὐ μὴ πορευθῆτε ὀρθοὶ ἐξαίφνης ὅτι καιρὸς πονηρός ἐστιν
4 Na mokolo wana, bakosambwisa bino; mpo na kotiola bino, bakobanda koyembela bino banzembo oyo: ‹ Tobebisami penza mobimba! Libula ya bato na ngai ekabwani! Abotoli yango na maboko na ngai mpe akabi bilanga na biso epai ya banguna na biso. › »
ἐν τῇ ἡμέρᾳ ἐκείνῃ λημφθήσεται ἐφ’ ὑμᾶς παραβολή καὶ θρηνηθήσεται θρῆνος ἐν μέλει λέγων ταλαιπωρίᾳ ἐταλαιπωρήσαμεν μερὶς λαοῦ μου κατεμετρήθη ἐν σχοινίῳ καὶ οὐκ ἦν ὁ κωλύσων αὐτὸν τοῦ ἀποστρέψαι οἱ ἀγροὶ ἡμῶν διεμερίσθησαν
5 Yango wana, moko te kati na bino akotikala na lisanga ya Yawe mpo na kokabola mabele na zeke.
διὰ τοῦτο οὐκ ἔσται σοι βάλλων σχοινίον ἐν κλήρῳ ἐν ἐκκλησίᾳ κυρίου
6 Basakoli na bango bazalaki koloba: « Kosakola te, kosakola makambo ya boye te! Pasi ekokomela biso te. »
μὴ κλαίετε δάκρυσιν μηδὲ δακρυέτωσαν ἐπὶ τούτοις οὐ γὰρ ἀπώσεται ὀνείδη
7 Oh libota ya Jakobi, makambo ya boye esengeli solo kolobama? « Boni, Molimo na Yawe atomboki mpo ete asala makambo ya boye? Maloba na Ye ezali ya boboto te mpo na moto oyo atambolaka alima? »
ὁ λέγων οἶκος Ιακωβ παρώργισεν πνεῦμα κυρίου εἰ ταῦτα τὰ ἐπιτηδεύματα αὐτοῦ ἐστιν οὐχ οἱ λόγοι αὐτοῦ εἰσιν καλοὶ μετ’ αὐτοῦ καὶ ὀρθοὶ πεπόρευνται
8 Na mikolo eleki, bozalaki komona bato na ngai lokola banguna. Bolongolaki bato oyo bazalaki koleka na kimia bilamba ya talo na mawa te, lokola bato oyo bawuti bitumba;
καὶ ἔμπροσθεν ὁ λαός μου εἰς ἔχθραν ἀντέστη κατέναντι τῆς εἰρήνης αὐτοῦ τὴν δορὰν αὐτοῦ ἐξέδειραν τοῦ ἀφελέσθαι ἐλπίδα συντριμμὸν πολέμου
9 bobenganaki basi ya bato na ngai longwa na bandako na bango ya kitoko, bolongolaki mpo na libela mapamboli na ngai kati na bana na bango.
διὰ τοῦτο ἡγούμενοι λαοῦ μου ἀπορριφήσονται ἐκ τῶν οἰκιῶν τρυφῆς αὐτῶν διὰ τὰ πονηρὰ ἐπιτηδεύματα αὐτῶν ἐξώσθησαν ἐγγίσατε ὄρεσιν αἰωνίοις
10 Botelema mpe bokende! Awa ezali esika na bino ya kopema te, pamba te ezali mbindo, ebebisami makasi penza, mpe elikya ya kobonga ezali lisusu te.
ἀνάστηθι καὶ πορεύου ὅτι οὐκ ἔστιν σοι αὕτη ἡ ἀνάπαυσις ἕνεκεν ἀκαθαρσίας διεφθάρητε φθορᾷ
11 Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba: « Nakosakola mpo na yo; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.
κατεδιώχθητε οὐδενὸς διώκοντος πνεῦμα ἔστησεν ψεῦδος ἐστάλαξέν σοι εἰς οἶνον καὶ μέθυσμα καὶ ἔσται ἐκ τῆς σταγόνος τοῦ λαοῦ τούτου
12 Oh bakitani ya Jakobi, nakosangisa bino nyonso, nakosangisa batikali nyonso ya Isalaele. Nakosangisa bango lokola bameme kati na lopango, lokola bibwele kati na etando na yango ya kolia matiti. Makelele oyo ekoyokana kuna ekozala makelele ya bato ebele.
συναγόμενος συναχθήσεται Ιακωβ σὺν πᾶσιν ἐκδεχόμενος ἐκδέξομαι τοὺς καταλοίπους τοῦ Ισραηλ ἐπὶ τὸ αὐτὸ θήσομαι τὴν ἀποστροφὴν αὐτῶν ὡς πρόβατα ἐν θλίψει ὡς ποίμνιον ἐν μέσῳ κοίτης αὐτῶν ἐξαλοῦνται ἐξ ἀνθρώπων
13 Moto oyo apasolaka nzela akotambola liboso na bango. Bakolekela na nzela oyo bapasoli, bakolekela na nzela ya ekuke mpe bakobimela na nzela yango. Mokonzi na bango akotambola liboso na bango, Yawe akozala liboso na bango.
διὰ τῆς διακοπῆς πρὸ προσώπου αὐτῶν διέκοψαν καὶ διῆλθον πύλην καὶ ἐξῆλθον δῑ αὐτῆς καὶ ἐξῆλθεν ὁ βασιλεὺς αὐτῶν πρὸ προσώπου αὐτῶν ὁ δὲ κύριος ἡγήσεται αὐτῶν

< Mishe 2 >