< Matayo 18 >

1 Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye: — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo?
Terzelfder tijd kwamen de leerlingen bij Jesus en zeiden: Wie is wel de grootste in het rijk der hemelen?
2 Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango
Jesus riep een kind naar Zich toe, plaatste het in hun midden.
3 mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.
en sprak: Voorwaar, Ik zeg u: Zo gij u niet bekeert en als kinderen wordt, zult gij het rijk der hemelen niet binnengaan.
4 Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.
Wie zich dus vernederen zal als dit kind, zal de grootste zijn in het rijk der hemelen.
5 Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.
En wie zulk een kind opneemt in mijn naam, neemt Mij op.
6 Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
Maar wie ergernis geeft aan een van deze kleinen, die in Mij geloven, het ware hem beter, dat hem een zware molensteen om de hals werd gehangen, en hij in de diepte der zee werd verdronken.
7 Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka!
Wee de wereld om de ergernis. Zeker, het kan wel niet anders, of er moet ergernis komen; maar wee den mens, door wien de ergernis komt.
8 Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela. (aiōnios g166)
Welnu, zo uw hand of voet u ergert, houw ze af, en werp ze van u weg; want het is beter voor u, verminkt of kreupel het Leven binnen te gaan, dan met twee handen of twee voeten geworpen te worden in het eeuwige vuur. (aiōnios g166)
9 Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo. (Geenna g1067)
En zo uw oog u ergert, ruk het uit, en werp het weg; want het is beter voor u, met één oog het Leven binnen te gaan, dan met twee ogen geworpen te worden in het helse vuur. (Geenna g1067)
10 Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [
Zorgt er voor, dat gij geen van deze kleine gering acht; want Ik zeg u: Hun engelen in de hemel zien altijd het aanschijn van mijn Vader, die in de hemel is.
11 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.]
12 Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga?
Wat dunkt u? Zo iemand honderd schapen heeft, en een daarvan van is verdwaald, laat hij dan niet de negen en negentig in het gebergte achter, om het éne te gaan zoeken, dat verdwaald is?
13 Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.
En zo hij het vindt, voorwaar, Ik zeg u: Hij verheugt zich over dat éne meer, dan over de negen en negentig, die niet zijn verdwaald.
14 Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga.
Zó is het ook de wil van uw Vader, die in de hemel is, dat géén van deze kleinen verloren gaat.
15 Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.
Indien uw broeder heeft gezondigd, ga en berisp hem tussen u beiden alleen. Zo hij naar u luistert, zult ge uw broeder gewonnen hebben.
16 Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
Luistert hij niet naar u, neem dan nog één of twee personen mee, opdat door de mond van twee of drie getuigen de zaak haar beslag krijgt.
17 Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.
Luistert hij ook niet naar hen, zeg het dan aan de Kerk; zo hij zelfs naar de Kerk niet luistert, dan zij hij u als een heiden en een tollenaar.
18 Nazali koloba na bino penza ya solo: nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
Voorwaar, Ik zeg u: Alles wat gij zult binden op aarde, zal ook gebonden zijn in de hemel; en alles wat gij ontbinden zult op aarde, zal ook ontbonden zijn in de hemel.
19 Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo: soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.
Nog zeg Ik u: Zo twee van u op aarde overeenstemmen, om wat ook te vragen, dan zullen ze het verkrijgen van mijn Vader, die in de hemel is.
20 Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.
Want waar twee of drie vergaderd zijn in mijn Naam, daar ben Ik in hun midden.
21 Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki: — Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe? Boni, kino mbala sambo?
Nu kwam Petrus naar Hem toe, en sprak: Heer, hoe dikwijls moet ik mijn broeder vergeven, die tegen mij misdoet? Tot zeven keer toe?
22 Yesu azongisaki: — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.
Jesus zei hem: Niet tot zeven keer toe, zeg Ik u; maar tot zeventig maal zeven keer.
23 Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.
Daarom is het rijk der hemelen gelijk aan een koning, die afrekening wilde houden met zijn dienaars.
24 Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi.
Toen hij met de afrekening was begonnen, bracht men er een binnen, die hem tienduizend talenten schuldig was.
25 Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.
Daar hij niets had om te betalen, beval zijn meester, hemzelf te verkopen met zijn vrouw en zijn kinderen en alles, wat hij bezat, en zó de schuld te vereffenen.
26 Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki: « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso! »
Maar de knecht viel hem smekend te voet, en zeide: Heb geduld met mij, en ik zal u alles betalen.
27 Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.
De heer had medelijden met dien knecht, liet hem gaan, en schold hem de schuld kwijt.
28 Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye: « Futa niongo na ngai. »
Maar toen die knecht was heengegaan, ontmoette hij een zijner medeknechten, die hem honderd tienlingen schuldig was; hij greep hem tot worgens toe bij de keel, en zeide: Betaal me wat ge schuldig zijt.
29 Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye: « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »
Zijn medeknecht viel hem smekend te voet, en sprak: Heb geduld met mij, en ik zal u betalen.
30 Kasi ye aboyaki; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso.
De ander wilde dit niet, maar ging heen, en liet hem in de kerker werpen, totdat hij de schuld zou hebben betaald.
31 Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango.
Toen nu zijn medeknechten zagen wat er gebeurd was, werden ze diep bedroefd, en gingen hun meester alles vertellen.
32 Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye: « Mosali mabe! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai.
Nu liet zijn heer hem roepen, en zei tot hem: Boze knecht, die hele schuld schold ik u kwijt, omdat ge het mij hebt gevraagd;
33 Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo? »
moest ook gij u dan niet ontfermen over uw medeknecht, zoals ikzelf mij over u heb ontfermd.
34 Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso.
En in zijn toorn leverde de heer hem aan de beulen over, totdat hij de hele schuld zou hebben voldaan.
35 Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.
Zo zal ook mijn hemelse Vader met u handelen, als gij niet allen uw broeder van harte vergeeft.

< Matayo 18 >