< Matayo 13 >

1 Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale.
On that day Jesus went out of the house and sat by the seaside.
2 Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili.
Great multitudes gathered to him, so that he entered into a boat and sat; and all the multitude stood on the beach.
3 Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese; azalaki koloba: — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.
He spoke to them many things in parables, saying, “Behold, a farmer went out to sow.
4 Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; bandeke eyaki mpe eliaki yango.
As he sowed, some seeds fell by the roadside, and the birds came and devoured them.
5 Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te;
Others fell on rocky ground, where they didn’t have much soil, and immediately they sprang up, because they had no depth of earth.
6 kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.
When the sun had risen, they were scorched. Because they had no root, they withered away.
7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango;
Others fell among thorns. The thorns grew up and choked them.
8 kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma: nkona moko ebotaki bambuma nkama moko; mosusu, bambuma tuku motoba; mpe mosusu, bambuma tuku misato.
Others fell on good soil and yielded fruit: some one hundred times as much, some sixty, and some thirty.
9 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
He who has ears to hear, let him hear.”
10 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye: — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese?
The disciples came, and said to him, “Why do you speak to them in parables?”
11 Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.
He answered them, “To you it is given to know the mysteries of the Kingdom of Heaven, but it is not given to them.
12 Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
For whoever has, to him will be given, and he will have abundance; but whoever doesn’t have, from him will be taken away even that which he has.
13 Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese: ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te; mpe atako bazali koyoka, basosola te.
Therefore I speak to them in parables, because seeing they don’t see, and hearing, they don’t hear, neither do they understand.
14 Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami: « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te; miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te!
In them the prophecy of Isaiah is fulfilled, which says, ‘By hearing you will hear, and will in no way understand; Seeing you will see, and will in no way perceive;
15 Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
for this people’s heart has grown callous, their ears are dull of hearing, and they have closed their eyes; or else perhaps they might perceive with their eyes, hear with their ears, understand with their heart, and would turn again, and I would heal them.’
16 Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.
“But blessed are your eyes, for they see; and your ears, for they hear.
17 Nazali koloba na bino penza ya solo: basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.
For most certainly I tell you that many prophets and righteous men desired to see the things which you see, and didn’t see them; and to hear the things which you hear, and didn’t hear them.
18 Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni:
“Hear, then, the parable of the farmer.
19 Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.
When anyone hears the word of the Kingdom and doesn’t understand it, the evil one comes and snatches away that which has been sown in his heart. This is what was sown by the roadside.
20 Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.
What was sown on the rocky places, this is he who hears the word and immediately with joy receives it;
21 Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.
yet he has no root in himself, but endures for a while. When oppression or persecution arises because of the word, immediately he stumbles.
22 Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te. (aiōn g165)
What was sown among the thorns, this is he who hears the word, but the cares of this age and the deceitfulness of riches choke the word, and he becomes unfruitful. (aiōn g165)
23 Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu; bongo akobota bambuma: epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.
What was sown on the good ground, this is he who hears the word and understands it, who most certainly bears fruit and produces, some one hundred times as much, some sixty, and some thirty.”
24 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
He set another parable before them, saying, “The Kingdom of Heaven is like a man who sowed good seed in his field,
25 Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.
but while people slept, his enemy came and sowed darnel weeds also among the wheat, and went away.
26 Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki.
But when the blade sprang up and produced grain, then the darnel weeds appeared also.
27 Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki: ‹ Mokonzi; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi? ›
The servants of the householder came and said to him, ‘Sir, didn’t you sow good seed in your field? Where did these darnel weeds come from?’
28 Nkolo elanga azongisaki: ‹ Ezali monguna nde asali bongo! › Basali batunaki lisusu: ‹ Olingi tokende kopikola yango? ›
“He said to them, ‘An enemy has done this.’ “The servants asked him, ‘Do you want us to go and gather them up?’
29 Nkolo elanga azongisaki: ‹ Bokende te! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.
“But he said, ‘No, lest perhaps while you gather up the darnel weeds, you root up the wheat with them.
30 Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma: Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »
Let both grow together until the harvest, and in the harvest time I will tell the reapers, “First, gather up the darnel weeds, and bind them in bundles to burn them; but gather the wheat into my barn.”’”
31 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.
He set another parable before them, saying, “The Kingdom of Heaven is like a grain of mustard seed which a man took, and sowed in his field,
32 Nkona yango eleki bankona nyonso na moke; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
which indeed is smaller than all seeds. But when it is grown, it is greater than the herbs and becomes a tree, so that the birds of the air come and lodge in its branches.”
33 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu: « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »
He spoke another parable to them. “The Kingdom of Heaven is like yeast which a woman took and hid in three measures of meal, until it was all leavened.”
34 Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.
Jesus spoke all these things in parables to the multitudes; and without a parable, he didn’t speak to them,
35 Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki: « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. »
that it might be fulfilled which was spoken through the prophet, saying, “I will open my mouth in parables; I will utter things hidden from the foundation of the world.”
36 Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye: — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga.
Then Jesus sent the multitudes away, and went into the house. His disciples came to him, saying, “Explain to us the parable of the darnel weeds of the field.”
37 Yesu azongisaki: — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.
He answered them, “He who sows the good seed is the Son of Man,
38 Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana;
the field is the world, the good seeds are the children of the Kingdom, and the darnel weeds are the children of the evil one.
39 monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu. (aiōn g165)
The enemy who sowed them is the devil. The harvest is the end of the age, and the reapers are angels. (aiōn g165)
40 Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili: (aiōn g165)
As therefore the darnel weeds are gathered up and burned with fire; so will it be at the end of this age. (aiōn g165)
41 Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.
The Son of Man will send out his angels, and they will gather out of his Kingdom all things that cause stumbling and those who do iniquity,
42 Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
and will cast them into the furnace of fire. There will be weeping and gnashing of teeth.
43 Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
Then the righteous will shine like the sun in the Kingdom of their Father. He who has ears to hear, let him hear.
44 Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.
“Again, the Kingdom of Heaven is like treasure hidden in the field, which a man found and hid. In his joy, he goes and sells all that he has and buys that field.
45 Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko.
“Again, the Kingdom of Heaven is like a man who is a merchant seeking fine pearls,
46 Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.
who having found one pearl of great price, he went and sold all that he had and bought it.
47 Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.
“Again, the Kingdom of Heaven is like a dragnet that was cast into the sea and gathered some fish of every kind,
48 Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.
which, when it was filled, fishermen drew up on the beach. They sat down and gathered the good into containers, but the bad they threw away.
49 Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili: ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo, (aiōn g165)
So it will be in the end of the world. The angels will come and separate the wicked from among the righteous, (aiōn g165)
50 bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.
and will cast them into the furnace of fire. There will be weeping and gnashing of teeth.”
51 Boni, bososoli makambo oyo nyonso? Bazongisaki: — Iyo!
Jesus said to them, “Have you understood all these things?” They answered him, “Yes, Lord.”
52 Bongo, Yesu alobaki na bango: — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye: biloko ya sika mpe biloko ya kala.
He said to them, “Therefore every scribe who has been made a disciple in the Kingdom of Heaven is like a man who is a householder, who brings out of his treasure new and old things.”
53 Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango
When Jesus had finished these parables, he departed from there.
54 mpe azongaki kati na engumba na Ye; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna: « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi?
Coming into his own country, he taught them in their synagogue, so that they were astonished and said, “Where did this man get this wisdom and these mighty works?
55 Ezali ye te mwana ya mosali mabaya? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te?
Isn’t this the carpenter’s son? Isn’t his mother called Mary, and his brothers James, Joses, Simon, and Judas?
56 Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te? Azwi makambo oyo nyonso wapi? »
Aren’t all of his sisters with us? Where then did this man get all of these things?”
57 Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango: — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.
They were offended by him. But Jesus said to them, “A prophet is not without honor, except in his own country and in his own house.”
58 Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te.
He didn’t do many mighty works there because of their unbelief.

< Matayo 13 >