< Malako 1 >

1 Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe,
神の子イエス、キリストの福音の始。
2 kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, ye nde akobongisela Yo nzela.
預言者イザヤの書に、『視よ、我なんぢの顏の前に、わが使を遣す、彼なんぢの道を設くべし。
3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe: ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike! › »
荒野に呼はる者の聲す、「主の道を備へ、その路すぢを直くせよ」』と録されたる如く、
4 Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola: « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino! »
バプテスマのヨハネ出で、荒野にて罪の赦を得さする悔改のバプテスマを宣傳ふ。
5 Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
ユダヤ全國またエルサレムの人々、みな其の許に出で來りて罪を言ひあらはし、ヨルダン川にてバプテスマを受けたり。
6 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
ヨハネは駱駝の毛織を著、腰に皮の帶して、蝗と野蜜とを食へり。
7 Tala makambo oyo azalaki koteya bato: « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
かれ宣傳へて言ふ『我よりも力ある者、わが後に來る。我は屈みてその鞋の紐をとくにも足らず、
8 Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
我は水にて汝らにバプテスマを施せり。されど彼は聖 靈にてバプテスマを施さん』
9 Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani.
その頃イエス、ガリラヤのナザレより來り、ヨルダンにてヨハネよりバプテスマを受け給ふ。
10 Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga.
かくて水より上るをりしも、天さけゆき、御靈、鴿のごとく己に降るを見 給ふ。
11 Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi! »
かつ天より聲 出づ『なんぢは我が愛しむ子なり、我なんぢを悦ぶ』
12 Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe
かくて御靈ただちにイエスを荒野に逐ひやる。
13 epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei.
荒野にて四十 日の間サタンに試みられ、獸とともに居給ふ、御使たち之に事へぬ。
14 Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.
ヨハネの囚はれし後、イエス、ガリラヤに到り、神の福音を宣傳へて言ひ給ふ、
15 Azalaki koloba: « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
『時は滿てり、神の國は近づけり、汝ら悔改めて福音を信ぜよ』
16 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
イエス、ガリラヤの海にそひて歩みゆき、シモンと其の兄弟アンデレとが、海に網うちをるを見 給ふ。かれらは漁人なり。
17 Yesu alobaki na bango: « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
イエス言ひ給ふ『われに從ひきたれ、汝 等をして人を漁る者とならしめん』
18 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
彼ら直ちに網をすてて從へり。
19 Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango.
少し進みゆきて、ゼベダイの子ヤコブとその兄弟ヨハネとを見 給ふ、彼らも舟にありて網を繕ひゐたり。
20 Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu.
直ちに呼び給へば、父ゼベダイを雇人とともに舟に遺して從ひゆけり。
21 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya.
かくて彼らカペナウムに到る、イエス直ちに安息 日に會堂にいりて教へ給ふ。
22 Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.
人々その教に驚きあへり。それは學者の如くならず、權威ある者のごとく教へ給ふゆゑなり。
23 Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga:
時にその會堂に、穢れし靈に憑かれたる人あり、叫びて言ふ
24 — Yesu ya Nazareti, olingi nini? Oyei nde koboma biso? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe!
『ナザレのイエスよ、我らは汝と何の關係あらんや、汝は我らを亡さんとて來給ふ。われは汝の誰なるを知る、神の聖者なり』
25 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo: — Kanga monoko na yo! Bima kati na moto oyo.
イエス禁めて言ひ給ふ『默せ、その人を出でよ』
26 Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga.
穢れし靈その人を痙攣けさせ、大聲をあげて出づ。
27 Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana: — Oyo ezali lisusu likambo nini? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye!
人々みな驚き相 問ひて言ふ『これ何事ぞ、權威ある新しき教なるかな、穢れし靈すら命ずれば從ふ』
28 Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
ここにイエスの噂あまねくガリラヤの四方に弘りたり。
29 Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre.
會堂をいで、直ちにヤコブとヨハネとを伴ひて、シモン及びアンデレの家に入り給ふ。
30 Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele; mbala moko, bapesaki Ye sango.
シモンの外姑、熱をやみて臥しゐたれば、人々ただちに之をイエスに告ぐ。
31 Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
イエス往きて、その手をとり、起し給へば、熱さりて女かれらに事ふ。
32 Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.
夕となり、日いりてのち、人々すべての病ある者・惡鬼に憑かれたる者をイエスに連れ來り、
33 Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako;
全町こぞりて門に集る。
34 bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
イエスさまざまの病を患ふ多くの人をいやし、多くの惡鬼を逐ひいだし、之に物 言ふことを免し給はず、惡鬼イエスを知るに因りてなり。
35 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.
朝まだき暗き程に、イエス起き出でて、寂しき處にゆき、其處にて祈りゐたまふ。
36 Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu.
シモン及び之と偕にをる者ども、その跡を慕ひゆき、
37 Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye: — Bato nyonso bazali koluka Yo.
イエスに遇ひて言ふ『人みな汝を尋ぬ』
38 Kasi Ye azongiselaki bango: — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.
イエス言ひ給ふ『いざ最寄の村々に往かん、われ彼處にも教を宣ぶべし、我はこの爲に出で來りしなり』
39 Boye, atambolaki na Galile mobimba; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.
遂にゆきて、徧くガリラヤの會堂にて教を宣べ、かつ惡鬼を逐ひ出し給へり。
40 Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu: — Soki olingi, komisa ngai peto.
一人の癩病人みもとに來り、跪づき請ひて言ふ『御意ならば、我を潔くなし給ふを得ん』
41 Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki: — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
イエス憫みて、手をのべ彼につけて『わが意なり、潔くなれ』と言ひ給へば、
42 Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto.
直ちに癩病さりて、その人きよまれり。
43 Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye:
やがて彼を去らしめんとて、嚴しく戒めて言ひ給ふ
44 — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
『つつしみて誰にも語るな、唯ゆきて己を祭司に見せ、モーセが命じたる物を汝の潔のために献げて、人々に證せよ』
45 Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.
されど彼いでて此の事を大に述べつたへ、徧く弘め始めたれば、この後イエスあらはに町に入りがたく、外の寂しき處に留りたまふ。人々 四方より御許に來れり。

< Malako 1 >