< Malako 5 >

1 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza,
かくて海の彼方なるゲラセネ人の地に到る。
2 Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye.
イエスの舟より上り給ふとき、穢れし靈に憑かれたる人、墓より出でて直ちに遇ふ。
3 Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo;
この人、墓を住處とす、鏈にてすら今は誰も繋ぎ得ず。
4 pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye.
彼はしばしば足械と鏈とにて繋がれたれど、鏈をちぎり、足械をくだきたり、誰も之を制する力なかりしなり。
5 Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
夜も晝も、絶えず墓あるひは山にて叫び、己が身を石にて傷つけゐたり。
6 Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye
かれ遙にイエスを見て、走りきたり、御前に平伏し、
7 mpe agangaki na makasi nyonso: — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te!
大聲に叫びて言ふ『いと高き神の子イエスよ、我は汝と何の關係あらん、神によりて願ふ、我を苦しめ給ふな』
8 Pamba te Yesu alobaki na molimo yango: « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo! »
これはイエス『穢れし靈よ、この人より出で往け』と言ひ給ひしに因るなり。
9 Yesu atunaki ye: — Kombo na yo nani? Azongisaki: — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele!
イエスまた『なんぢの名は何か』と問ひ給へば『わが名はレギオン、我ら多きが故なり』と答へ、
10 Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana.
また己らを此の地の外に逐ひやり給はざらんことを切に求む。
11 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
彼處の山邊に豚の大なる群、食しゐたり。
12 Milimo mabe esengaki na Yesu: « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
惡鬼どもイエスに求めて言ふ『われらを遣して豚に入らしめ給へ』
13 Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
イエス許したまふ。穢れし靈いでて、豚に入りたれば、二千 匹ばかりの群、海に向ひて崖を駈けくだり、海に溺れたり。
14 Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.
飼ふ者ども逃げ往きて、町にも里にも告げたれば、人々 何事の起りしかを見んとて出づ。
15 Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango.
かくてイエスに來り、惡鬼に憑かれたりし者、即ちレギオンをもちたりし者の、衣服をつけ、慥なる心にて坐しをるを見て、懼れあへり。
16 Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu.
かの惡鬼に憑かれたる者の上にありし事と、豚の事とを見し者ども、之を具に告げたれば、
17 Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.
人々イエスにその境を去り給はん事を求む。
18 Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.
イエス舟に乘らんとし給ふとき、惡鬼に憑かれたりしもの偕に在らん事を願ひたれど、
19 Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye: « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »
許さずして言ひ給ふ『なんぢの家に、親しき者に歸りて、主がいかに大なる事を汝に爲し、いかに汝を憫み給ひしかを告げよ』
20 Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli; mpe bato nyonso bakamwaki.
彼ゆきて、イエスの如何に大なる事を己になし給ひしかを、デカポリスに言ひ弘めたれば、人々みな怪しめり。
21 Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.
イエス舟にて復かなたに渡り給ひしに、大なる群衆みもとに集る、イエス海邊に在せり。
22 Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye
會堂 司の一人、ヤイロという者きたり、イエスを見て、その足下に伏し、
23 mpe abondelaki Ye makasi: « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa! Nabondeli yo: yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
切に願ひて言ふ『わが稚なき娘、いまはの際なり、來りて手をおき給へ、さらば救はれて活くべし』
24 Boye Yesu akendeki na ye nzela moko; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
イエス彼と共にゆき給へば、大なる群衆したがひつつ御許に押迫る。
25 Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale.
ここに十 二年 血漏を患ひたる女あり。
26 Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata.
多くの醫者に多く苦しめられ、有てる物をことごとく費したれど、何の效なく、反つて増々 惡しくなりたり。
27 Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye,
イエスの事をききて、群衆にまじり、後に來りて、御衣にさはる、
28 pamba te azalaki komilobela: « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika! »
『その衣にだに觸らば救はれん』と自ら謂へり。
29 Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
かくて血の泉ただちに乾き、病のいえたるを身に覺えたり。
30 Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki: — Nani asimbi Ngai na bilamba?
イエス直ちに能力の己より出でたるを自ら知り、群衆の中にて、振反り言ひたまふ『誰が我の衣に觸りしぞ』
31 Bayekoli na Ye bazongisaki: — Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu: « Nani asimbi Ngai? »
弟子たち言ふ『群衆の押迫るを見て、誰が我に觸りしぞと言ひ給ふか』
32 Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo.
イエスこの事を爲しし者を見んとて見囘し給ふ。
33 Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.
女おそれ戰き、己が身になりし事を知り、來りて御前に平伏し、ありしままを告ぐ。
34 Yesu alobaki na ye: — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo!
イエス言ひ給ふ『娘よ、なんぢの信仰なんぢを救へり、安らかに往け、病いえて健かになれ』
35 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye: — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi?
かく語り給ふほどに、會堂 司の家より人々きたりて言ふ『なんぢの娘は早や死にたり、爭でなほ師を煩はすべき』
36 Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani: — Kobanga te, zala kaka na kondima!
イエス其の告ぐる言を傍より聞きて、會堂 司に言ひたまふ『懼るな、ただ信ぜよ』
37 Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake.
かくてペテロ、ヤコブその兄弟ヨハネの他は、ともに往く事を誰にも許し給はず。
38 Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
彼ら會堂 司の家に來る。イエス多くの人の、甚く泣きつ叫びつする騷を見、
39 Akotaki mpe alobaki na bango: — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso? Mpo na nini bozali kolela? Mwana akufi te; alali nde pongi!
入りて言ひ給ふ『なんぞ騷ぎかつ泣くか、幼兒は死にたるにあらず、寐ねたるなり』
40 Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki.
人々イエスを嘲笑ふ。イエス彼 等をみな外に出し、幼兒の父と母と己に伴へる者とを率きつれて、幼兒のをる處に入り、
41 Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye: « Talita kumi! » Elingi koloba: Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema!
幼兒の手を執りて『タリタ、クミ』と言ひたまふ。少女よ、我なんぢに言ふ、起きよ、との意なり。
42 Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza.
直ちに少女たちて歩む、その歳 十二なりければなり。彼ら直ちに甚く驚きおどろけり。
43 Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.
イエス此の事を誰にも知れぬやうにせよと、堅く彼らを戒め、また食物を娘に與ふることを命じ給ふ。

< Malako 5 >