< Luka 9 >

1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono;
Jesus called the twelve disciples together. He gave them power and authority over all demons, and the ability to heal diseases.
2 mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli.
Then he sent them out to proclaim God's kingdom and to heal the sick.
3 Alobaki na bango: — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo; bozala na banzambala mibale te na moto.
“Take nothing with you for the journey,” he told them. “No staff, no bag, no bread, no money, not even any extra clothes.
4 Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.
Whatever house you enter, stay there, and when you leave, leave from there.
5 Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.
If people refuse to accept you, shake the dust off your feet when you leave town as a warning against them.”
6 Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso.
They left and went around the villages, announcing the good news and healing everywhere they went.
7 Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba: « Yoane asekwi, »
Herod the tetrarch had heard about all that was happening, and he was very puzzled. Some were saying that John had been raised from the dead;
8 bamosusu: « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu: « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. »
others that Elijah had appeared; still others that one of the ancient prophets had come back to life.
9 Kasi Erode azalaki komilobela: « Ngai nde nakataki Yoane moto; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani? » Boye alukaki kokutana na Yesu.
Herod said, “There's no question I beheaded John. So who is this man? I'm hearing all these things about him.” And he tried to find a way to meet Jesus.
10 Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko.
When the apostles returned they reported to Jesus what they had done. Then he left with them and went to a town called Bethsaida.
11 Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto.
However, the crowds found out where he was going and followed him there. He welcomed them and explained the kingdom of God to them, and healed those who needed healing.
12 Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
Late in the day, the twelve disciples came to him and said, “You should send the crowd away now so they can go to the villages and farms nearby and find a place to stay and food to eat—there's nothing here where we are.”
13 Kasi Yesu alobaki na bango: — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia. Bazongisaki: — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
“You give them something to eat!” said Jesus. “All we have here are five loaves and two fish—unless you want us to go and buy food for everyone,” they said.
14 Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Bovandisa bango na masanga; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
There were about five thousand men present. “Sit them down in groups of about fifty,” he told his disciples.
15 Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki.
The disciples did so, and everybody sat down.
16 Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato.
Jesus picked up the five loaves and the two fish, and looking up to heaven, he blessed the food and broke it into pieces. He kept on giving the food to the disciples to share with the people.
17 Bato nyonso baliaki mpe batondaki; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
Everybody ate until they were full, and then twelve baskets of leftovers were collected.
18 Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango: — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai? Mpo na bango, Ngai nazali nani?
At another time, when Jesus was praying in private with just his disciples with him, he asked them, “All these crowds of people—who do they say I am?”
19 Bazongisaki: — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi; bamosusu, Eliya; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa.
“Some say John the Baptist, others say Elijah, and still others say one of the ancient prophets risen from the dead,” they replied.
20 Yesu atunaki bango lisusu: — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani? Petelo azongisaki: — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi.
“But what about you?” he asked. “Who do you say I am?” “God's Messiah,” Peter replied.
21 Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko.
Jesus gave them strict orders not to tell anybody about this.
22 Mpe alobaki: — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
“The Son of man must experience terrible sufferings,” he said. “He will be rejected by the elders, the chief priests, and the religious teachers. He will be killed, but on the third day he will rise again.”
23 Bongo Yesu alobaki na bango nyonso: — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.
“If any one of you wants to follow me, you must deny yourself, pick up your cross daily, and follow me,” Jesus told all of them.
24 Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.
“For if you want to save your life, you will lose it; and if you lose your life for my sake, you will save it.
25 Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye?
What do you benefit by gaining the whole world if you end up lost or destroyed?
26 Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.
If you are ashamed of me and my message, the Son of man will be ashamed of you when he comes in his glory, and in the glory of the Father and the holy angels.
27 Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.
I tell you the truth, some standing here won't taste death until they see the kingdom of God.”
28 Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
About eight days later, after he had told them this, Jesus took Peter, John, and James with him and went up a mountain to pray.
29 Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali.
While he was praying, his face changed in appearance, and his clothing became a dazzling white.
30 Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu: Moyize mpe Eliya
Two men appeared in brilliant glory. They were Moses and Elijah, and they began to talk with Jesus.
31 oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.
They spoke about his death, which would soon happen in Jerusalem.
32 Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
Peter and the others were asleep. When they woke up they saw Jesus in his glory, and the two men standing next to him.
33 Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki: — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa! Totonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.
As the two men were about to leave, Peter said to Jesus, “Master, it's great to be here. Let's make some shelters: one for you, one for Moses, and one for Elijah.” He really didn't know what he was saying.
34 Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango.
While he was speaking a cloud came and spread over them. They were terrified as they entered the cloud.
35 Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki: — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona; boyoka Ye!
A voice spoke from the cloud, saying, “This is my Son, the Chosen One. Listen to him!”
36 Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki.
When the voice finished speaking, Jesus was there alone. They kept this to themselves, and didn't tell anyone at that time what they'd seen.
37 Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu.
The next day, when they had come down the mountain, a huge crowd was waiting to meet Jesus.
38 Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki: — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko!
A man in the crowd called out, “Teacher, please look at my son. He's my only child.
39 Molimo moko etungisaka ye: soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye.
A spirit possesses him and he screams immediately. It sends him into convulsions and makes him foam at the mouth. It hardly ever leaves him alone and it causes him a lot of pain.
40 Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
I begged your disciples to drive it out, but they couldn't.”
41 Yesu alobaki: — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko? Mema mwana na yo awa.
“What an unbelieving and corrupt people you are! How long do I have to remain here with you, and put up with you?” said Jesus. “Bring your son here.”
42 Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye.
Even as the boy came over, the demon sent him into convulsions, throwing him to the ground. But Jesus intervened, rebuking the evil spirit and healing the boy, and then gave him back to his father.
43 Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe. Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye:
Everyone was amazed at this demonstration of God's power. However, even though everyone was amazed by all he did, Jesus warned his disciples,
44 — Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino: Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.
“Listen carefully to what I'm telling you: the Son of man is about to be betrayed into the hands of men.”
45 Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango.
But they didn't understand what this meant. Its meaning was hidden from them so they didn't realize its implications, and they were afraid to ask him about it.
46 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango.
Then an argument started among the disciples about which of them was the greatest.
47 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye,
But Jesus, knowing what they were arguing about, picked up and placed a small child next to him.
48 mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.
Then he said to them, “Anyone who accepts this little child in my name accepts me, and anyone who accepts me accepts the one who sent me. Whoever is least among you all is the greatest.”
49 Yoane alobaki: — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te.
John spoke up, saying, “Master, we saw someone driving out demons in your name and we tried to stop him because he wasn't one of us.”
50 Yesu alobaki: — Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.
“Don't stop him,” Jesus replied. “Anyone who isn't against you is for you.”
51 Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi.
As the time approached for him to ascend to heaven, Jesus was determined to go to Jerusalem.
52 Atindaki bantoma liboso na Ye; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko.
He sent messengers on ahead to a Samaritan village to get things ready for him.
53 Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi.
But the people would not welcome him because he was determined to press on to Jerusalem.
54 Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki: — Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango?
When James and John saw this, they asked Jesus, “Master, do you want us to call fire down from heaven to burn them up?”
55 Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango: [— Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.]
But Jesus turned, and reprimanded them.
56 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu.
Then they proceeded to another village.
57 Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu: — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
While they were walking, one man told Jesus, “I will follow you wherever you go!”
58 Yesu azongiselaki ye: — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
Jesus told the man, “Foxes have their dens, and wild birds have their nests, but the Son of man doesn't even have a place to rest his head.”
59 Yesu alobaki na mobali mosusu: — Landa Ngai. Kasi mobali yango azongiselaki Ye: — Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai.
He told another man, “Follow me.” But the man replied, “Master, first let me go home and bury my father.”
60 Yesu alobaki na ye: — Tika bakufi bakunda bakufi na bango; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.
“Let the dead bury their own dead,” Jesus replied. “You go and proclaim God's kingdom.”
61 Mosusu lisusu alobaki na Ye: — Nkolo, nakolanda Yo; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka.
Another man said, “Lord, I will follow you! But first let me go home and say goodbye to my family.”
62 Yesu azongiselaki ye: — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.
But Jesus told him, “Nobody once they've started plowing and then looks back is fit for God's kingdom.”

< Luka 9 >