< Luka 8 >

1 Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye,
Soon afterwards, he went about through cities and villages, preaching and bringing the good news of God’s Kingdom. With him were the twelve,
2 bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono: Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo;
and certain women who had been healed of evil spirits and infirmities: Mary who was called Magdalene, from whom seven demons had gone out;
3 Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode; Suzana; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
and Joanna, the wife of Chuzas, Herod’s steward; Susanna; and many others who served them from their possessions.
4 Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo:
When a great multitude came together and people from every city were coming to him, he spoke by a parable:
5 — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.
“The farmer went out to sow his seed. As he sowed, some fell along the road, and it was trampled under foot, and the birds of the sky devoured it.
6 Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.
Other seed fell on the rock, and as soon as it grew, it withered away, because it had no moisture.
7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.
Other fell amid the thorns, and the thorns grew with it and choked it.
8 Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete: nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko. Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki: — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka!
Other fell into the good ground and grew and produced one hundred times as much fruit.” As he said these things, he called out, “He who has ears to hear, let him hear!”
9 Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango.
Then his disciples asked him, “What does this parable mean?”
10 Azongiselaki bango: — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete, atako bakoki kotala, bamona te; mpe atako bakoki koyoka, basosola te.
He said, “To you it is given to know the mysteries of God’s Kingdom, but to the rest it is given in parables, that ‘seeing they may not see, and hearing they may not understand.’
11 Tala ndimbola ya lisese yango: Nkona ezali Liloba na Nzambe.
“Now the parable is this: The seed is the word of God.
12 Nkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.
Those along the road are those who hear; then the devil comes and takes away the word from their heart, that they may not believe and be saved.
13 Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa: bandimaka kaka mpo na mwa tango moke; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.
Those on the rock are they who, when they hear, receive the word with joy; but these have no root. They believe for a while, then fall away in time of temptation.
14 Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.
What fell among the thorns, these are those who have heard, and as they go on their way they are choked with cares, riches, and pleasures of life; and they bring no fruit to maturity.
15 Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.
Those in the good ground, these are those who with an honest and good heart, having heard the word, hold it tightly, and produce fruit with perseverance.
16 Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.
“No one, when he has lit a lamp, covers it with a container or puts it under a bed; but puts it on a stand, that those who enter in may see the light.
17 Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.
For nothing is hidden that will not be revealed, nor anything secret that will not be known and come to light.
18 Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.
Be careful therefore how you hear. For whoever has, to him will be given; and whoever doesn’t have, from him will be taken away even that which he thinks he has.”
19 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele.
His mother and brothers came to him, and they could not come near him for the crowd.
20 Moto moko ayebisaki Ye: — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo.
Some people told him, “Your mother and your brothers stand outside, desiring to see you.”
21 Kasi Yesu azongisaki: — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.
But he answered them, “My mother and my brothers are these who hear the word of God and do it.”
22 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye: — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale. Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki.
Now on one of those days, he entered into a boat, himself and his disciples, and he said to them, “Let’s go over to the other side of the lake.” So they launched out.
23 Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene.
But as they sailed, he fell asleep. A wind storm came down on the lake, and they were taking on dangerous amounts of water.
24 Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga: — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa! Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki.
They came to him and awoke him, saying, “Master, Master, we are dying!” He awoke and rebuked the wind and the raging of the water; then they ceased, and it was calm.
25 Yesu atunaki bayekoli na Ye: — Wapi kondima na bino? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango: « Moto oyo azali penza nani? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye! »
He said to them, “Where is your faith?” Being afraid, they marveled, saying to one another, “Who is this then, that he commands even the winds and the water, and they obey him?”
26 Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.
Then they arrived at the country of the Gadarenes, which is opposite Galilee.
27 Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda.
When Jesus stepped ashore, a certain man out of the city who had demons for a long time met him. He wore no clothes, and didn’t live in a house, but in the tombs.
28 Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka: — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te!
When he saw Jesus, he cried out and fell down before him, and with a loud voice said, “What do I have to do with you, Jesus, you Son of the Most High God? I beg you, don’t torment me!”
29 Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko.
For Jesus was commanding the unclean spirit to come out of the man. For the unclean spirit had often seized the man. He was kept under guard and bound with chains and fetters. Breaking the bonds apart, he was driven by the demon into the desert.
30 Yesu atunaki ye: — Kombo na yo nani? Azongisaki: — Ngulupa. Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye.
Jesus asked him, “What is your name?” He said, “Legion,” for many demons had entered into him.
31 Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. (Abyssos g12)
They begged him that he would not command them to go into the abyss. (Abyssos g12)
32 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu; mpe Yesu apesaki yango nzela.
Now there was there a herd of many pigs feeding on the mountain, and they begged him that he would allow them to enter into those. Then he allowed them.
33 Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
The demons came out of the man and entered into the pigs, and the herd rushed down the steep bank into the lake and were drowned.
34 Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga.
When those who fed them saw what had happened, they fled and told it in the city and in the country.
35 Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka; boye somo ekangaki bango.
People went out to see what had happened. They came to Jesus and found the man from whom the demons had gone out, sitting at Jesus’ feet, clothed and in his right mind; and they were afraid.
36 Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki.
Those who saw it told them how he who had been possessed by demons was healed.
37 Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki.
All the people of the surrounding country of the Gadarenes asked him to depart from them, for they were very much afraid. Then he entered into the boat and returned.
38 Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba:
But the man from whom the demons had gone out begged him that he might go with him, but Jesus sent him away, saying,
39 — Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo. Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye.
“Return to your house, and declare what great things God has done for you.” He went his way, proclaiming throughout the whole city what great things Jesus had done for him.
40 Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye.
When Jesus returned, the multitude welcomed him, for they were all waiting for him.
41 Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye,
Behold, a man named Jairus came. He was a ruler of the synagogue. He fell down at Jesus’ feet and begged him to come into his house,
42 pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
for he had an only born daughter, about twelve years of age, and she was dying. But as he went, the multitudes pressed against him.
43 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango.
A woman who had a flow of blood for twelve years, who had spent all her living on physicians and could not be healed by any,
44 Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
came behind him and touched the fringe of his cloak. Immediately the flow of her blood stopped.
45 Yesu atunaki: — Nani asimbi Ngai? Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu: — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
Jesus said, “Who touched me?” When all denied it, Peter and those with him said, “Master, the multitudes press and jostle you, and you say, ‘Who touched me?’”
46 Kasi Yesu alobaki: — Moto moko asimbi Ngai; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
But Jesus said, “Someone did touch me, for I perceived that power has gone out of me.”
47 Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye.
When the woman saw that she was not hidden, she came trembling; and falling down before him declared to him in the presence of all the people the reason why she had touched him, and how she was healed immediately.
48 Kasi Yesu alobaki na ye: — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia.
He said to her, “Daughter, cheer up. Your faith has made you well. Go in peace.”
49 Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki: — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
While he still spoke, one from the ruler of the synagogue’s house came, saying to him, “Your daughter is dead. Don’t trouble the Teacher.”
50 Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi: — Kobanga te! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
But Jesus hearing it, answered him, “Don’t be afraid. Only believe, and she will be healed.”
51 Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana.
When he came to the house, he didn’t allow anyone to enter in, except Peter, John, James, the father of the child, and her mother.
52 Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki: — Bokata kolela; akufi te, azali nde ya kolala!
All were weeping and mourning her, but he said, “Don’t weep. She isn’t dead, but sleeping.”
53 Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa.
They were ridiculing him, knowing that she was dead.
54 Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki: — Mwana na Ngai, lamuka!
But he put them all outside, and taking her by the hand, he called, saying, “Child, arise!”
55 Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia.
Her spirit returned, and she rose up immediately. He commanded that something be given to her to eat.
56 Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.
Her parents were amazed, but he commanded them to tell no one what had been done.

< Luka 8 >