< Luka 7 >

1 Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.
After he had finished speaking in the hearing of the people, he entered into Capernaum.
2 Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye.
A certain centurion’s servant, who was dear to him, was sick and at the point of death.
3 Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda.
When he heard about Jesus, he sent to him elders of the Jews, asking him to come and save his servant.
4 Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi; balobaki: — Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo,
When they came to Jesus, they begged him earnestly, saying, “He is worthy for you to do this for him,
5 pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.
for he loves our nation, and he built our synagogue for us.”
6 Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu: — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai.
Jesus went with them. When he was now not far from the house, the centurion sent friends to him, saying to him, “Lord, don’t trouble yourself, for I am not worthy for you to come under my roof.
7 Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye.
Therefore I didn’t even think myself worthy to come to you; but say the word, and my servant will be healed.
8 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko: « Kende, » akendaka; mpe na mosusu: « Yaka, » ayaka; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai: « Sala mosala oyo, » asalaka yango.
For I also am a man placed under authority, having under myself soldiers. I tell this one, ‘Go!’ and he goes; and to another, ‘Come!’ and he comes; and to my servant, ‘Do this,’ and he does it.”
9 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.
When Jesus heard these things, he marveled at him, and turned and said to the multitude who followed him, “I tell you, I have not found such great faith, no, not in Israel.”
10 Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono.
Those who were sent, returning to the house, found that the servant who had been sick was well.
11 Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye.
Soon afterwards, he went to a city called Nain. Many of his disciples, along with a great multitude, went with him.
12 Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa: azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango.
Now when he came near to the gate of the city, behold, one who was dead was carried out, the only born son of his mother, and she was a widow. Many people of the city were with her.
13 Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye: — Kolela te!
When the Lord saw her, he had compassion on her and said to her, “Don’t cry.”
14 Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki: — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka!
He came near and touched the coffin, and the bearers stood still. He said, “Young man, I tell you, arise!”
15 Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye.
He who was dead sat up and began to speak. Then he gave him to his mother.
16 Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba: — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye!
Fear took hold of all, and they glorified God, saying, “A great prophet has arisen among us!” and, “God has visited his people!”
17 Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.
This report went out concerning him in the whole of Judea and in all the surrounding region.
18 Bayekoli ya Yoane bayebisaki makambo wana nyonso epai ya nkolo na bango. Yoane abengaki bayekoli na ye, mibale kati na bango,
The disciples of John told him about all these things.
19 mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna: — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu?
John, calling to himself two of his disciples, sent them to Jesus, saying, “Are you the one who is coming, or should we look for another?”
20 Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na Ye: — Yoane Mobatisi atindi biso epai na Yo mpo ete totuna: « Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu? »
When the men had come to him, they said, “John the Baptizer has sent us to you, saying, ‘Are you he who comes, or should we look for another?’”
21 Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele.
In that hour he cured many of diseases and plagues and evil spirits; and to many who were blind he gave sight.
22 Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki: — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki: bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.
Jesus answered them, “Go and tell John the things which you have seen and heard: that the blind receive their sight, the lame walk, the lepers are cleansed, the deaf hear, the dead are raised up, and the poor have good news preached to them.
23 Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai!
Blessed is he who finds no occasion for stumbling in me.”
24 Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane: — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai?
When John’s messengers had departed, he began to tell the multitudes about John, “What did you go out into the wilderness to see? A reed shaken by the wind?
25 Soki te, bokendeki penza kotala nini? Moto moko alata bilamba ya kitoko? Te! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.
But what did you go out to see? A man clothed in soft clothing? Behold, those who are gorgeously dressed and live delicately are in kings’ courts.
26 Kasi nani bino bokendeki penza kotala? Mosakoli? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli.
But what did you go out to see? A prophet? Yes, I tell you, and much more than a prophet.
27 Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, oyo akobongisela Yo nzela. »
This is he of whom it is written, ‘Behold, I send my messenger before your face, who will prepare your way before you.’
28 Nazali koloba na bino: kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.
“For I tell you, among those who are born of women there is not a greater prophet than John the Baptizer; yet he who is least in God’s Kingdom is greater than he.”
29 Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango
When all the people and the tax collectors heard this, they declared God to be just, having been baptized with John’s baptism.
30 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.
But the Pharisees and the lawyers rejected the counsel of God, not being baptized by him themselves.
31 Boye Yesu alobaki: — Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo? Bakokani penza na banani?
“To what then should I compare the people of this generation? What are they like?
32 Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu: « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki te! »
They are like children who sit in the marketplace and call to one another, saying, ‘We piped to you, and you didn’t dance. We mourned, and you didn’t weep.’
33 Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki: « Azali na molimo mabe kati na ye! »
For John the Baptizer came neither eating bread nor drinking wine, and you say, ‘He has a demon.’
34 Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba: « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu! »
The Son of Man has come eating and drinking, and you say, ‘Behold, a glutton and a drunkard, a friend of tax collectors and sinners!’
35 Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.
Wisdom is justified by all her children.”
36 Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia.
One of the Pharisees invited him to eat with him. He entered into the Pharisee’s house and sat at the table.
37 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,
Behold, a woman in the city who was a sinner, when she knew that he was reclining in the Pharisee’s house, brought an alabaster jar of ointment.
38 atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi.
Standing behind at his feet weeping, she began to wet his feet with her tears, and she wiped them with the hair of her head, kissed his feet, and anointed them with the ointment.
39 Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki: — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini: moto ya masumu.
Now when the Pharisee who had invited him saw it, he said to himself, “This man, if he were a prophet, would have perceived who and what kind of woman this is who touches him, that she is a sinner.”
40 Yesu alobaki na ye: — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki: — Moteyi, loba yango.
Jesus answered him, “Simon, I have something to tell you.” He said, “Teacher, say on.”
41 Yesu alobaki: — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.
“A certain lender had two debtors. The one owed five hundred denarii, and the other fifty.
42 Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka?
When they couldn’t pay, he forgave them both. Which of them therefore will love him most?”
43 Simona azongisaki: — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. Yesu alobaki na ye: — Okati malamu!
Simon answered, “He, I suppose, to whom he forgave the most.” He said to him, “You have judged correctly.”
44 Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona: — Omoni mwasi oyo? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.
Turning to the woman, he said to Simon, “Do you see this woman? I entered into your house, and you gave me no water for my feet, but she has wet my feet with her tears, and wiped them with the hair of her head.
45 Opesaki Ngai beze te; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.
You gave me no kiss, but she, since the time I came in, has not ceased to kiss my feet.
46 Opakolaki Ngai mafuta te na moto; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi.
You didn’t anoint my head with oil, but she has anointed my feet with ointment.
47 Yango wana, nazali koloba na yo: ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.
Therefore I tell you, her sins, which are many, are forgiven, for she loved much. But one to whom little is forgiven, loves little.”
48 Bongo Yesu alobaki na mwasi: — Masumu na yo elimbisami.
He said to her, “Your sins are forgiven.”
49 Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango: — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu?
Those who sat at the table with him began to say to themselves, “Who is this who even forgives sins?”
50 Kasi Yesu alobaki na mwasi yango: — Kondima na yo ebikisi yo; kende na kimia!
He said to the woman, “Your faith has saved you. Go in peace.”

< Luka 7 >