< Luka 3 >

1 Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda; Erode azalaki moyangeli ya Galile; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.
En l'an quinze du règne de Tibère César, — Ponce-Pilate étant procurateur de la Judée, — Hérode, tétrarque de la Galilée, —Philippe, son frère, tétrarque de l'Iturée et des terres de la Trachonite, — Lysanias, tétrarque de l'Abilène, —
2 Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.
sous le pontificat de Banne et de Kaïphe, la parole de Dieu fut adressée à Jean, fils de Zaccharie, dans le désert.
3 Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani; na mateya na ye, azalaki koloba: « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »
Et Jean s'en alla dans toute la région du Jourdain, prêchant un baptême de repentance pour la rémission des péchés,
4 Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye: « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe: ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike!
ainsi que cela est écrit au livre des paroles du prophète Ésaïe: «Une voix crie dans le désert: Préparez la voie du Seigneur, Aplanissez ses sentiers;
5 Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,
Toute vallée sera comblée; Toute montagne et toute colline seront abaissées; Les voies tortueuses seront changées en droits chemins; Et les voies rocailleuses en routes unies;
6 mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »
Et toute chair verra le salut de Dieu»
7 Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango: « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya?
Aux foules qui accouraient pour être baptisées par lui, il disait: «Engeance de vipères, qui vous a appris à fuir la colère à venir?
8 Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela: ‹ Abrayami azali koko na biso! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.
Produisez donc des fruits dignes de la repentance, et n'allez pas dire en vous-mêmes: Nous avons pour père Abraham; car je vous le dis, Dieu peut faire surgir, des pierres que voici, des enfants à Abraham.
9 Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »
Déjà la cognée touche la racine des arbres. Tout arbre donc qui ne produit pas de bon fruit, sera coupé et jeté au feu.» —
10 Ebele ya bato batunaki ye: — Tosengeli kosala nini?
«Qu'avons-nous à faire?» lui demandèrent alors les multitudes.
11 Yoane azongiselaki bango: — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.
Il leur répondit par ces paroles: «Que celui qui possède deux tuniques en donne une à celui qui n'en a pas et que celui qui a des aliments pour se nourrir fasse de même.»
12 Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango; batunaki Yoane: — Moteyi, tosengeli kosala nini?
Des publicains vinrent pour être baptisés et lui dirent aussi: «Maître, qu'avons-nous à faire?» —
13 Azongiselaki bango: — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.
«N'exigez rien de plus, leur répondit-il, que ce qui vous a été prescrit.»
14 Basoda mpe batunaki ye: — Bongo biso, tosengeli kosala nini? Yoane azongiselaki bango: — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.
Des soldats aussi le questionnèrent: «Et nous, qu'avons-nous à faire?» A eux il dit: «Ne faites violence à personne; ne faites tort à personne; contentez-vous de votre paye.»
15 Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.
Le peuple était en suspens; et chacun se demandait, dans le secret de son coeur, si Jean n'était pas peut-être le Christ.
16 Yoane azongiselaki bango: — Ngai nazali kobatisa bino na mayi; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.
Pour répondre à tous, Jean dit: «Moi, je vous baptise d'eau; mais il va venir celui qui est plus puissant que moi; je ne suis pas même digne de délier la courroie de ses sandales; lui, vous baptisera avec l'Esprit saint et le feu.
17 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.
Il a le van dans la main pour nettoyer son aire et rassembler le froment dans son grenier; mais la paille il la brûlera au feu inextinguible.»
18 Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.
C'est ainsi qu'il annonçait la Bonne Nouvelle au peuples par des exhortations nombreuses et variées.
19 Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.
Le tétrarque Hérode, cependant, ayant été repris par lui tant au sujet d'Hérodiade, femme de son frère, qu'au sujet des mille crimes qu'il avait commis,
20 Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.
ajouta encore celui-ci à tous les autres: il fit jeter Jean en prison.
21 Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,
Or tout le peuple ayant reçu le baptême, et Jésus aussi ayant été baptisé, il advint que le ciel s'ouvrit, pendant qu'il priait,
22 mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »
et que l'Esprit saint descendit sur lui sous une forme corporelle, sous la figure d'une colombe; et une voix vint du ciel: «Tu es mon Fils bien-aimé, en toi je me complais.»
23 Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi; Jozefi, mwana mobali ya Eli;
Jésus, en ce commencement, avait environ trente ans et passait pour être le fils de Joseph, Fils d'Héli,
24 Eli, mwana mobali ya Matati; Matati, mwana mobali ya Levi; Levi, mwana mobali ya Meliki; Meliki, mwana mobali ya Yanai; Yanai, mwana mobali ya Jozefi;
Fils de Maththath, Fils de Lévi, Fils de Melchi, Fils de Jannaï, Fils de Joseph,
25 Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi; Amosi, mwana mobali ya Naumi; Naumi, mwana mobali ya Esili; Esili, mwana mobali ya Nagai;
Fils de Mattathias, Fils d'Amos, Fils de Naoum, Fils d'Eslei, Fils de Nangaï,
26 Nagai, mwana mobali ya Maati; Maati, mwana mobali ya Matatiasi; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini; Semeini, mwana mobali ya Yoze; Yoze, mwana mobali ya Yoda;
Fils de Maath, Fils de Mattathias, Fils de Semeein, Fils de Josech, Fils de Joda,
27 Yoda, mwana mobali ya Yoanani; Yoanani, mwana mobali ya Reza; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Shealitieli, mwana mobali ya Neri;
Fils de Joanan, Fils de Rèsa, Fils de Zorobabel, Fils de Salathiel, Fils de Nèrei,
28 Neri, mwana mobali ya Meliki; Meliki, mwana mobali ya Adi; Adi, mwana mobali ya Kosami; Kosami, mwana mobali ya Elimadami; Elimadami, mwana mobali ya Eri;
Fils de Melchei, Fils d'Addei, Fils de Kosam, Fils de Elmadam, Fils de Hèr,
29 Eri, mwana mobali ya Jozue; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri; Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi; Yorimi, mwana mobali ya Matati; Matati, mwana mobali ya Levi;
Fils de Jésus, Fils d'Éliézer, Fils de Jorem, Fils de Maththath, Fils de Lévi,
30 Levi, mwana mobali ya Simeoni; Simeoni, mwana mobali ya Yuda; Yuda, mwana mobali ya Jozefi; Jozefi, mwana mobali ya Yonami; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi;
Fils de Siméon, Fils de Judas, Fils de Joseph, Fils de Jonam, Fils d'Éliakim, Fils de Méléa,
31 Eliakimi, mwana mobali ya Meleya; Meleya, mwana mobali ya Mena; Mena, mwana mobali ya Matata; Matata, mwana mobali ya Natani; Natani, mwana mobali ya Davidi;
Fils de Menna, Fils de Mattatha, Fils de Natham, Fils de David,
32 Davidi, mwana mobali ya Izayi; Izayi, mwana mobali ya Obedi; Obedi, mwana mobali ya Boazi; Boazi, mwana mobali ya Salimoni; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni;
Fils de Jessaï, Fils de Jobed, Fils de Boos, Fils de Sala, Fils de Naasson,
33 Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini; Adimini, mwana mobali ya Arini; Arini, mwana mobali ya Etsironi; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi; Peretsi, mwana mobali ya Yuda;
Fils d'Aminadab, Fils d'Admein, Fils d'Ami, Fils d'Esrom, Fils de Pharès, Fils de Judas,
34 Yuda, mwana mobali ya Jakobi; Jakobi, mwana mobali ya Izaki; Izaki, mwana ya Abrayami; Abrayami, mwana mobali ya Tera; Tera, mwana mobali ya Naori;
Fils de Jacob, Fils d'Isaac, Fils d'Abraham, Fils de Unira, Fils de Nachor, Fils de Serouch,
35 Naori, mwana mobali ya Serugi; Serugi, mwana mobali ya Rewu; Rewu, mwana mobali ya Pelegi; Pelegi, mwana mobali ya Eberi; Eberi, mwana mobali ya Shela;
Fils de Ragau, Fils de Phalek, Fils de Eber, Fils de Sala,
36 Shela, mwana mobali ya Kayinami; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi; Aripakishadi, mwana mobali ya Semi; Semi, mwana mobali ya Noa; Noa, mwana mobali ya Lemeki;
Fils de Kainam, Fils d'Arphaxad, Fils de Sein, Fils de Noé, Fils de Lamech,
37 Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi; Matusalemi, mwana mobali ya Enoki; Enoki, mwana mobali ya Yeredi; Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani;
Fils de Mathousalem. Fils d'Enoch, Fils de Jaret, Fils de Meleleèl, Fils de Kainam
38 Kenani, mwana mobali ya Enoshi; Enoshi, mwana mobali ya Seti; Seti, mwana mobali ya Adamu; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.
Fils d'Enos, Fils de Seth, Fils d'Adam, Fils de Dieu.

< Luka 3 >