< Luka 22 >

1 Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene,
Y ESTABA cerca el día de la fiesta de los ázimos, que se llama la Pascua.
2 bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
Y los príncipes de los sacerdotes y los escribas buscaban cómo le matarían; mas tenían miedo del pueblo.
3 Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.
Y entró Satanás en Judas, por sobrenombre Iscariote, el cual era uno del número de los doce;
4 Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.
Y fué, y habló con los príncipes de los sacerdotes, y con los magistrados, de cómo se lo entregaría.
5 Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.
Los cuales se holgaron, y concertaron de darle dinero.
6 Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.
Y prometió, y buscaba oportunidad para entregarle á ellos sin bulla.
7 Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika,
Y vino el día de los ázimos, en el cual era necesario matar la pascua.
8 Yesu atindaki Petelo mpe Yoane; alobaki na bango: — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.
Y envió á Pedro y á Juan, diciendo: Id, aparejadnos la pascua para que comamos.
9 Batunaki Ye: — Esika nini olingi ete tobongisa yango?
Y ellos le dijeron: ¿Dónde quieres que aparejemos?
10 Yesu azongiselaki bango: — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.
Y él les dijo: He aquí cuando entrareis en la ciudad, os encontrará un hombre que lleva un cántaro de agua: seguidle hasta la casa donde entrare,
11 Mpe boloba na nkolo ndako: « Moteyi atuni: ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai? › »
Y decid al padre de la familia de la casa: El Maestro te dice: ¿Dónde está el aposento donde tengo de comer la pascua con mis discípulos?
12 Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.
Entonces él os mostrará un gran cenáculo aderezado; aparejad allí.
13 Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
Fueron pues, y hallaron como les había dicho; y aparejaron la pascua.
14 Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.
Y como fué hora, sentóse á la mesa, y con él los apóstoles.
15 Alobaki na bango: — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,
Y les dijo: En gran manera he deseado comer con vosotros esta pascua antes que padezca;
16 pamba te, nazali koloba na bino: nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.
Porque os digo que no comeré más de ella, hasta que se cumpla en el reino de Dios.
17 Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki: — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,
Y tomando el vaso, habiendo dado gracias, dijo: Tomad esto, y partidlo entre vosotros;
18 pamba te nazali koloba na bino: nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.
Porque os digo, que no beberé más del fruto de la vid, hasta que el reino de Dios venga.
19 Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango; alobaki: — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
Y tomando el pan, habiendo dado gracias, partió, y les dió, diciendo: Esto es mi cuerpo, que por vosotros es dado: haced esto en memoria de mí.
20 Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo; alobaki: — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.
Asimismo también el vaso, después que hubo cenado, diciendo: Este vaso es el nuevo pacto en mi sangre, que por vosotros se derrama.
21 Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.
Con todo eso, he aquí la mano del que me entrega, conmigo en la mesa.
22 Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
Y á la verdad el Hijo del hombre va, según lo que está determinado; empero ¡ay de aquel hombre por el cual es entregado!
23 Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
Ellos entonces comenzaron á preguntar entre sí, cuál de ellos sería el que había de hacer esto.
24 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
Y hubo entre ellos una contienda, quién de ellos parecía ser el mayor.
25 Yesu alobaki na bango: — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu.
Entonces él les dijo: Los reyes de las gentes se enseñorean de ellas; y los que sobre ellas tienen potestad, son llamados bienhechores:
26 Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
Mas vosotros, no así: antes el que es mayor entre vosotros, sea como el más mozo; y el que es príncipe, como el que sirve.
27 Pamba te nani aleki monene? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa? Ezali te oyo avandi na mesa? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
Porque, ¿cuál es mayor, el que se sienta á la mesa, ó el que sirve? ¿No es el que se sienta á la mesa? Y yo soy entre vosotros como el que sirve.
28 Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.
Empero vosotros sois los que habéis permanecido conmigo en mis tentaciones:
29 Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,
Yo pues os ordeno un reino, como mi Padre me lo ordenó [á mí],
30 mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
Para que comáis y bebáis en mi mesa en mi reino, y os sentéis sobre tronos juzgando á las doce tribus de Israel.
31 Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.
Dijo también el Señor: Simón, Simón, he aquí Satanás os ha pedido para zarandaros como á trigo;
32 Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
Mas yo he rogado por ti que tu fe no falte: y tú, una vez vuelto, confirma á tus hermanos.
33 Kasi Petelo azongisaki: — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
Y él le dijo: Señor, pronto estoy á ir contigo aun á cárcel y á muerte.
34 Yesu alobaki na ye: — Petelo, nazali koloba na yo: lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
Y él dijo: Pedro, te digo que el gallo no cantará hoy antes que tú niegues tres veces que me conoces.
35 Bongo Yesu atunaki bango: — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te; boni, bozangaki eloko? Bazongisaki: — Tozangaki eloko te.
Y á ellos dijo: Cuando os envié sin bolsa, y sin alforja, y sin zapatos, ¿os faltó algo? Y ellos dijeron: Nada.
36 Alobaki na bango: — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango!
Y les dijo: Pues ahora, el que tiene bolsa, tómela, y también la alforja, y el que no tiene, venda su capa y compre espada.
37 Ekomama: « Batangaki Ye elongo na babomi bato; » mpe nazali koloba na bino: makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.
Porque os digo, que es necesario que se cumpla todavía en mí aquello que está escrito: Y con los malos fué contado: porque lo que [está escrito] de mí, cumplimiento tiene.
38 Bayekoli balobaki: — Nkolo, tala mipanga mibale. Yesu azongisaki: — Ekoki!
Entonces ellos dijeron: Señor, he aquí dos espadas. Y él les dijo: Basta.
39 Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
Y saliendo, se fué, como solía, al monte de las Olivas; y sus discípulos también le siguieron.
40 Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango: — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Y como llegó á aquel lugar, les dijo: Orad que no entréis en tentación.
41 Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye:
Y él se apartó de ellos como un tiro de piedra; y puesto de rodillas oró,
42 « Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [
Diciendo: Padre, si quieres, pasa este vaso de mí; empero no se haga mi voluntad, sino la tuya.
43 Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.
Y le apareció un ángel del cielo confortándole.
44 Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
Y estando en agonía, oraba más intensamente: y fué su sudor como grandes gotas de sangre que caían hasta la tierra.
45 Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
Y como se levantó de la oración, y vino á sus discípulos, hallólos durmiendo de tristeza;
46 Atunaki bango: — Mpo na nini bozali kolala? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
Y les dijo: ¿Por qué dormís? Levantaos, y orad que no entréis en tentación.
47 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,
Estando él aún hablando, he aquí una turba; y el que se llamaba Judas, uno de los doce, iba delante de ellos; y llegóse á Jesús para besarlo.
48 kasi Yesu atunaki ye: — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze?
Entonces Jesús le dijo: Judas, ¿con beso entregas al Hijo del hombre?
49 Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye: — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso?
Y viendo los que estaban con él lo que había de ser, le dijeron: Señor, ¿heriremos á cuchillo?
50 Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali.
Y uno de ellos hirió á un siervo del príncipe de los sacerdotes, y le quitó la oreja derecha.
51 Kasi Yesu alobaki: — Boye lisusu te! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
Entonces respondiendo Jesús, dijo: Dejad hasta aquí. Y tocando su oreja, le sanó.
52 Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye: — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete?
Y Jesús dijo á los que habían venido á él, los príncipes de los sacerdotes, y los magistrados del templo, y los ancianos: ¿Como á ladrón habéis salido con espadas y con palos?
53 Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
Habiendo estado con vosotros cada día en el templo, no extendisteis las manos contra mí; mas ésta es vuestra hora, y la potestad de las tinieblas.
54 Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.
Y prendiéndole trajéronle, y metiéronle en casa del príncipe de los sacerdotes. Y Pedro le seguía de lejos.
55 Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
Y habiendo encendido fuego en medio de la sala, y sentándose todos alrededor, se sentó también Pedro entre ellos.
56 Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki: — Tata oyo azalaki elongo na Yesu!
Y como una criada le vió que estaba sentado al fuego, fijóse en él, y dijo: Y éste con él estaba.
57 Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki: — Mwasi, nayebi ye te.
Entonces él lo negó, diciendo: Mujer, no le conozco.
58 Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki: — Yo mpe ozali moko kati na bango! Petelo azongisaki: — Tata, nazali moko te kati na bango.
Y un poco después, viéndole otro, dijo: Y tú de ellos eras. Y Pedro dijo: Hombre, no soy.
59 Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende: — Ezali ya solo! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
Y como una hora pasada otro afirmaba, diciendo: Verdaderamente también éste estaba con él, porque es Galileo.
60 Kasi Petelo azongisaki: — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.
Y Pedro dijo: Hombre, no sé qué dices. Y luego, estando él aún hablando, el gallo cantó.
61 Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye: « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
Entonces, vuelto el Señor, miró á Pedro: y Pedro se acordó de la palabra del Señor como le había dicho: Antes que el gallo cante, me negarás tres veces.
62 Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
Y saliendo fuera Pedro, lloró amargamente.
63 Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.
Y los hombres que tenían á Jesús, se burlaban de él hiriéndole;
64 Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi: — Sakola: Nani abeti Yo?
Y cubriéndole, herían su rostro, y preguntábanle, diciendo: Profetiza quién es el que te hirió.
65 Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
Y decían otras muchas cosas injuriándole.
66 Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.
Y cuando fué de día, se juntaron los ancianos del pueblo, y los príncipes de los sacerdotes, y los escribas, y le trajeron á su concilio,
67 Balobaki: — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki: — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te;
Diciendo: ¿Eres tú el Cristo? dínos[lo]. Y les dijo: Si os [lo] dijere, no creeréis;
68 mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.
Y también si [os] preguntare, no me responderéis, ni [me] soltaréis:
69 Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Mas después de ahora el Hijo del hombre se asentará á la diestra de la potencia de Dios.
70 Bango nyonso batunaki: — Ozali Mwana na Nzambe? Yesu azongisaki: — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
Y dijeron todos: ¿Luego tú eres Hijo de Dios? Y él les dijo: Vosotros decís que yo soy.
71 Bongo balobaki: — Mpo na nini koluka matatoli mosusu? Toyoki yango na monoko na ye moko.
Entonces ellos dijeron: ¿Qué más testimonio deseamos? porque nosotros [lo] hemos oído de su boca.

< Luka 22 >