< Luka 20 >

1 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye;
On one of those days, as he was teaching the people in the temple and preaching the Good News, the priests and scribes came to him with the elders.
2 balobaki na Ye: — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo? Nani apesi yo bokonzi yango?
They asked him, “Tell us: by what authority do you do these things? Or who is giving you this authority?”
3 Yesu azongisaki: — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai:
He answered them, “I also will ask you one question. Tell me:
4 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato?
the baptism of John, was it from heaven, or from men?”
5 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango: « Soki tolobi: ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu: ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te? ›
They reasoned with themselves, saying, “If we say, ‘From heaven,’ he will say, ‘Why didn’t you believe him?’
6 Soki mpe tolobi: ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. »
But if we say, ‘From men,’ all the people will stone us, for they are persuaded that John was a prophet.”
7 Boye, bazongisaki: — Toyebi te epai wapi ewutaki.
They answered that they didn’t know where it was from.
8 Yesu alobaki: — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.
Jesus said to them, “Neither will I tell you by what authority I do these things.”
9 Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo: — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.
He began to tell the people this parable: “A man planted a vineyard and rented it out to some farmers, and went into another country for a long time.
10 Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
At the proper season, he sent a servant to the farmers to collect his share of the fruit of the vineyard. But the farmers beat him and sent him away empty.
11 Atindaki mosali mosusu; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.
He sent yet another servant, and they also beat him and treated him shamefully, and sent him away empty.
12 Atindaki lisusu mosali ya misato; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.
He sent yet a third, and they also wounded him and threw him out.
13 Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki: « Nasala nini? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi; tango mosusu, bakotosa ye. »
The lord of the vineyard said, ‘What shall I do? I will send my beloved son. It may be that seeing him, they will respect him.’
14 Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango: « Tala mokitani ya libula! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso! »
“But when the farmers saw him, they reasoned among themselves, saying, ‘This is the heir. Come, let’s kill him, that the inheritance may be ours.’
15 Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye. Nkolo elanga ya vino akosala bango nini?
Then they threw him out of the vineyard and killed him. What therefore will the lord of the vineyard do to them?
16 Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki: — Te, ekoki kosalema te!
He will come and destroy these farmers, and will give the vineyard to others.” When they heard that, they said, “May that never be!”
17 Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki: — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini: « Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako? »
But he looked at them and said, “Then what is this that is written, ‘The stone which the builders rejected was made the chief cornerstone’?
18 Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.
Everyone who falls on that stone will be broken to pieces, but it will crush whomever it falls on to dust.”
19 Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango; kasi babangaki bato.
The chief priests and the scribes sought to lay hands on him that very hour, but they feared the people—for they knew he had spoken this parable against them.
20 Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.
They watched him and sent out spies, who pretended to be righteous, that they might trap him in something he said, so as to deliver him up to the power and authority of the governor.
21 Banongi yango batunaki Yesu: — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe.
They asked him, “Teacher, we know that you say and teach what is right, and aren’t partial to anyone, but truly teach the way of God.
22 Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te?
Is it lawful for us to pay taxes to Caesar, or not?”
23 Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango:
But he perceived their craftiness, and said to them, “Why do you test me?
24 — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani? Bazongisaki: — Ya Sezare!
Show me a denarius. Whose image and inscription are on it?” They answered, “Caesar’s.”
25 Yesu alobaki na bango: — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe!
He said to them, “Then give to Caesar the things that are Caesar’s, and to God the things that are God’s.”
26 Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye.
They weren’t able to trap him in his words before the people. They marveled at his answer and were silent.
27 Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo:
Some of the Sadducees came to him, those who deny that there is a resurrection.
28 — Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi: « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. »
They asked him, “Teacher, Moses wrote to us that if a man’s brother dies having a wife, and he is childless, his brother should take the wife and raise up children for his brother.
29 Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te.
There were therefore seven brothers. The first took a wife, and died childless.
30 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka;
The second took her as wife, and he died childless.
31 sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo: bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te.
The third took her, and likewise the seven all left no children, and died.
32 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki.
Afterward the woman also died.
33 Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye?
Therefore in the resurrection whose wife of them will she be? For the seven had her as a wife.”
34 Yesu azongisaki: — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka; (aiōn g165)
Jesus said to them, “The children of this age marry and are given in marriage. (aiōn g165)
35 kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te (aiōn g165)
But those who are considered worthy to attain to that age and the resurrection from the dead neither marry nor are given in marriage. (aiōn g165)
36 mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.
For they can’t die any more, for they are like the angels and are children of God, being children of the resurrection.
37 Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »
But that the dead are raised, even Moses showed at the bush, when he called the Lord ‘The God of Abraham, the God of Isaac, and the God of Jacob.’
38 Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.
Now he is not the God of the dead, but of the living, for all are alive to him.”
39 Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki: — Moteyi, olobi malamu!
Some of the scribes answered, “Teacher, you speak well.”
40 Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
They didn’t dare to ask him any more questions.
41 Yesu mpe atunaki bango: — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi?
He said to them, “Why do they say that the Christ is David’s son?
42 Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo: « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai: ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
David himself says in the book of Psalms, ‘The Lord said to my Lord, “Sit at my right hand,
43 kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
until I make your enemies the footstool of your feet.”’
44 Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye?
“David therefore calls him Lord, so how is he his son?”
45 Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye:
In the hearing of all the people, he said to his disciples,
46 — Bosala keba na balakisi ya Mobeko! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti;
“Beware of those scribes who like to walk in long robes, and love greetings in the marketplaces, the best seats in the synagogues, and the best places at feasts;
47 bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.
who devour widows’ houses, and for a pretense make long prayers. These will receive greater condemnation.”

< Luka 20 >