< Luka 19 >

1 Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango.
Et ingressus perambulabat Iericho.
2 Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele;
Et ecce vir nomine Zachæus: et hic princeps erat publicanorum, et ipse dives:
3 azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza.
et quærebat videre Iesum, quis esset: et non poterat præ turba, quia statura pusillus erat.
4 Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana.
Et præcurrens ascendit in arborem sycomorum ut videret eum: quia inde erat transiturus.
5 Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye: — Zashe, kita noki! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.
Et cum venisset ad locum, suspiciens Iesus vidit illum, et dixit ad eum: Zachæe festinans descende: quia hodie in domo tua oportet me manere.
6 Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo.
Et festinans descendit, et excepit illum gaudens.
7 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima; bazalaki koloba: — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu!
Et cum viderent omnes, murmurabant, dicentes quod ad hominem peccatorem divertisset.
8 Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye: — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.
Stans autem Zachæus, dixit ad Dominum: Ecce dimidium bonorum meorum, Domine, do pauperibus: et si quid aliquem defraudavi, reddo quadruplum.
9 Yesu alobaki na ye: — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.
Ait Iesus ad eum: Quia hodie salus domui huic facta est: eo quod et ipse filius sit Abrahæ.
10 Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.
Venit enim Filius hominis quærere, et salvum facere quod perierat.
11 Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango.
Hæc illis audientibus adiiciens, dixit parabolam, eo quod esset prope Ierusalem: et quia existimarent quod confestim regnum Dei manifestaretur.
12 Boye Yesu alobaki: — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga.
Dixit ergo: Homo quidam nobilis abiit in regionem longinquam accipere sibi regnum, et reverti.
13 Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango: « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »
Vocatis autem decem servis suis, dedit eis decem mnas, et ait ad illos: Negotiamini dum venio.
14 Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba: « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »
Cives autem eius oderant eum: et miserunt legationem post illum, dicentes: Nolumus hunc regnare super nos.
15 Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.
Et factum est ut rediret accepto regno: et iussit vocari servos, quibus dedit pecuniam, ut sciret quantum quisque negotiatus esset.
16 Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »
Venit autem primus dicens: Domine, mna tua decem mnas acquisivit.
17 Nkolo alobaki na ye: « Osali malamu! Ozali mosali malamu! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »
Et ait illi: Euge bone serve, quia in modico fuisti fidelis, eris potestatem habens super decem civitates.
18 Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »
Et alter venit, dicens: Domine, mna tua fecit quinque mnas.
19 Nkolo na ye azongisaki: « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »
Et huic ait: Et tu esto super quinque civitates.
20 Mosali mosusu ayaki mpe alobaki: « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.
Et alter venit, dicens: Domine, ecce mna tua, quam habui repositam in sudario:
21 Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata: ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »
timui enim te, quia homo austerus es: tollis quod non posuisti, et metis quod non seminasti.
22 Nkolo na ye azongisaki: « Mosali mabe! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.
Dicit ei: De ore tuo te iudico serve nequam. Sciebas quod ego homo austerus sum, tollens quod non posui, et metens quod non seminavi:
23 Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki? »
et quare non dedisti pecuniam meam ad mensam, ut ego veniens cum usuris utique exegissem illam?
24 Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana: « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »
Et astantibus dixit: Auferte ab illo mnam, et date illi, qui decem mnas habet.
25 Balobaki na ye: « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi! »
Et dixerunt ei: Domine, habet decem mnas.
26 Nkolo azongisaki: « Nazali koloba na bino: na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.
Dico autem vobis, quia omni habenti dabitur, et abundabit: ab eo autem, qui non habet, et quod habet auferetur ab eo.
27 Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »
Verumtamen inimicos meos illos, qui noluerunt me regnare super se, adducite huc: et interficite ante me.
28 Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi.
Et his dictis, præcedebat ascendens Ierosolymam.
29 Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye;
Et factum est, cum appropinquasset ad Bethphage, et Bethaniam ad montem, qui vocatur Oliveti, misit duos discipulos suos,
30 alobaki na bango: — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela; bofungola yango mpe bomema yango awa.
dicens: Ite in castellum, quod contra est: in quod introeuntes, invenietis pullum asinæ alligatum, cui nemo umquam hominum sedit: solvite illum, et adducite.
31 Soki moto moko atuni bino: « Mpo na nini bozali kofungola yango? » Boloba na ye: « Nkolo azali na bosenga na yango. »
Et si quis vos interrogaverit: Quare solvitis? sic dicetis ei: Quia Dominus operam eius desiderat.
32 Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango.
Abierunt autem qui missi erant: et invenerunt, sicut dixit illis, stantem pullum.
33 Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango: — Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane?
Solventibus autem illis pullum, dixerunt domini eius ad illos: Quid solvitis pullum?
34 Bazongisaki: — Nkolo azali na bosenga na yango.
At illi dixerunt: Quia Dominus eum necessarium habet.
35 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango.
Et duxerunt illum ad Iesum. Et iacentes vestimenta sua supra pullum, imposuerunt Iesum.
36 Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela.
Eunte autem illo, substernebant vestimenta sua in via.
37 Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki.
Et cum appropinquaret iam ad descensum Montis Oliveti, cœperunt omnes turbæ discipulorum gaudentes laudare Deum voce magna super omnibus, quas viderant, virtutibus,
38 Bazalaki koloba: « Tika ete apambolama, mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Kimia kati na Likolo, mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo! »
dicentes: Benedictus, qui venit rex in nomine Domini! Pax in cælo, et gloria in excelsis!
39 Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu: — Moteyi, pamela bayekoli na Yo!
Et quidam Pharisæorum de turbis, dixerunt ad illum: Magister, increpa discipulos tuos.
40 Yesu azongisaki: — Nazali koloba na bino: soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga!
Quibus ipse ait: Dico vobis, quia si hi tacuerint, lapides clamabunt.
41 Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango
Et ut appropinquavit, videns civitatem flevit super illam, dicens:
42 mpe alobaki: — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.
Quia si cognovisses et tu, et quidem in hac die tua, quæ ad pacem tibi, nunc autem abscondita sunt ab oculis tuis.
43 Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso;
Quia venient dies in te: et circumdabunt te inimici tui vallo, et circumdabunt te: et coangustabunt te undique:
44 bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.
et ad terram prosternent te, et filios tuos, qui in te sunt, et non relinquent in te lapidem super lapidem: eo quod non cognoveris tempus visitationis tuæ.
45 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna; alobaki na bango:
Et ingressus in templum, cœpit eiicere vendentes in illo, et ementes,
46 — Ekomama: « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi!
dicens illis: Scriptum est: Quia domus mea domus orationis est. Vos autem fecistis illam speluncam latronum.
47 Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye;
Et erat docens quotidie in templo. Principes autem sacerdotum, et scribæ, et princeps plebis quærebant illum perdere:
48 kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi.
et non inveniebant quid facerent illi. Omnis enim populus suspensus erat, audiens illum.

< Luka 19 >