< Luka 18 >

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te.
And he spake a parable unto them to the end that they ought always to pray, and not to faint;
2 Alobaki: — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te.
saying, There was in a city a judge, who feared not God, and regarded not man:
3 Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye: « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »
and there was a widow in that city; and she came oft unto him, saying, Avenge me of mine adversary.
4 Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki: « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,
And he would not for a while: but afterward he said within himself, Though I fear not God, nor regard man;
5 kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »
yet because this widow troubleth me, I will avenge her, lest she wear me out by her continual coming.
6 Nkolo abakisaki: — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo!
And the Lord said, Hear what the unrighteous judge saith.
7 Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi? Boni, akozelisa bango?
And shall not God avenge his elect, that cry to him day and night, and [yet] he is longsuffering over them?
8 Nazali koloba na bino: akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya! Boni, akokuta kondima kati na mokili?
I say unto you, that he will avenge them speedily. Nevertheless, when the Son of man cometh, shall he find faith on the earth?
9 Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo:
And he spake also this parable unto certain who trusted in themselves that they were righteous, and set all others at nought:
10 — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela: moko azalaki Mofarizeo; mpe mosusu, mofutisi mpako.
Two men went up into the temple to pray; the one a Pharisee, and the other a publican.
11 Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki: « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.
The Pharisee stood and prayed thus with himself, God, I thank thee, that I am not as the rest of men, extortioners, unjust, adulterers, or even as this publican.
12 Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »
I fast twice in the week; I give tithes of all that I get.
13 Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki: « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu! »
But the publican, standing afar off, would not lift up so much as his eyes unto heaven, but smote his breast, saying, God, be thou merciful to me a sinner.
14 Nazali koloba na bino: mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.
I say unto you, This man went down to his house justified rather than the other: for every one that exalteth himself shall be humbled; but he that humbleth himself shall be exalted.
15 Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango.
And they were bringing unto him also their babes, that he should touch them: but when the disciples saw it, they rebuked them.
16 Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki: — Botika bana mike baya epai na Ngai; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.
But Jesus called them unto him, saying, Suffer the little children to come unto me, and forbid them not: for to such belongeth the kingdom of God.
17 Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
Verily I say unto you, Whosoever shall not receive the kingdom of God as a little child, he shall in no wise enter therein.
18 Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu: — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko? (aiōnios g166)
And a certain ruler asked him, saying, Good Teacher, what shall I do to inherit eternal life? (aiōnios g166)
19 Yesu azongisaki: — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.
And Jesus said unto him, Why callest thou me good? none is good, save one, [even] God.
20 Oyebi mibeko oyo: « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »
Thou knowest the commandments, Do not commit adultery, Do not kill, Do not steal, Do not bear false witness, Honor thy father and mother.
21 Mokambi yango azongisaki: — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.
And he said, All these things have I observed from my youth up.
22 Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye: — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
And when Jesus heard it, he said unto him, One thing thou lackest yet: sell all that thou hast, and distribute unto the poor, and thou shalt have treasure in heaven: and come, follow me.
23 Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
But when he heard these things, he became exceeding sorrowful; for he was very rich.
24 Yesu atalaki ye mpe alobaki: — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe!
And Jesus seeing him said, How hardly shall they that have riches enter into the kingdom of God!
25 Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
For it is easier for a camel to enter in through a needle’s eye, than for a rich man to enter into the kingdom of God.
26 Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki: — Bongo nani penza akoki kobikisama?
And they that heard it said, Then who can be saved?
27 Yesu azongisaki: — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.
But he said, The things which are impossible with men are possible with God.
28 Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo!
And Peter said, Lo, we have left our own, and followed thee.
29 Yesu alobaki na bango: — Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba,
And he said unto them, Verily I say unto you, There is no man that hath left house, or wife, or brethren, or parents, or children, for the kingdom of God’s sake,
30 akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko. (aiōn g165, aiōnios g166)
who shall not receive manifold more in this time, and in the world to come eternal life. (aiōn g165, aiōnios g166)
31 Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Tozali kokende na Yelusalemi; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.
And he took unto him the twelve, and said unto them, Behold, we go up to Jerusalem, and all the things that are written through the prophets shall be accomplished unto the Son of man.
32 Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi,
For he shall be delivered up unto the Gentiles, and shall be mocked, and shamefully treated, and spit upon:
33 bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.
and they shall scourge and kill him: and the third day he shall rise again.
34 Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela.
And they understood none of these things; and this saying was hid from them, and they perceived not the things that were said.
35 Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga.
And it came to pass, as he drew nigh unto Jericho, a certain blind man sat by the way side begging:
36 Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki: — Likambo nini oyo ezali kosalema?
and hearing a multitude going by, he inquired what this meant.
37 Balobaki na ye: — Yesu ya Nazareti azali koleka!
And they told him, that Jesus of Nazareth passeth by.
38 Agangaki: — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
And he cried, saying, Jesus, thou son of David, have mercy on me.
39 Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka: — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa!
And they that went before rebuked him, that he should hold his peace: but he cried out the more a great deal, Thou son of David, have mercy on me.
40 Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye:
And Jesus stood, and commanded him to be brought unto him: and when he was come near, he asked him,
41 — Olingi nasala nini mpo na yo? Mokufi miso azongisaki: — Nkolo, nalingi komona.
What wilt thou that I should do unto thee? And he said, Lord, that I may receive my sight.
42 Yesu alobaki na ye: — Mona! Kondima na yo ebikisi yo.
And Jesus said unto him, Receive thy sight: thy faith hath made thee whole.
43 Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
And immediately he received his sight, and followed him, glorifying God: and all the people, when they saw it, gave praise unto God.

< Luka 18 >