< Luka 15 >

1 Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye. 2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba: — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango. 3 Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo: 4 — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango? 5 Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo. 6 Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki! » 7 Na nzela yango, nazali koloba na bino: esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema. 8 Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango? 9 Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki! » 10 Na nzela yango, nazali koloba na bino: ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema. 11 Yesu alobaki lisusu: — Mobali moko azalaki na bana mibali mibale. 12 Leki alobaki na tata na ye: « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. » Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye. 13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu. 14 Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela. 15 Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu. 16 Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango. 17 Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki: « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala! 18 Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai; nakoloba na ye: ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo. 19 Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo! › » 20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye. 21 Mwana alobaki na tata na ye: « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. » 22 Kasi tata alobaki na basali na ye: « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. 23 Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango; tolia mpe tosala feti, 24 pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! » Boye babandaki feti na esengo makasi. 25 Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina. 26 Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka. 27 Mosali azongisaki: « Ndeko na yo azongi! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. » 28 Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye. 29 Kasi azongiselaki tata na ye: « Tala! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai. 30 Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye! » 31 Tata azongiselaki ye: « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo. 32 Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! »

< Luka 15 >