< Luka 15 >

1 Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye.
모든 세리와 죄인들이 말씀을 들으러 가까이 나아오니
2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba: — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.
바리새인과 서기관들이 원망하여 가로되 이 사람이 죄인을 영접하고 음식을 같이 먹는다 하더라
3 Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo:
예수께서 저희에게 이 비유로 이르시되
4 — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango?
너희 중에 어느 사람이 양 일백 마리가 있는데 그 중에 하나를 잃으면 아흔아홉 마리를 들에 두고 그 잃은 것을 찾도록 찾아 다니지 아니하느냐
5 Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.
또 찾은즉 즐거워 어깨에 메고
6 Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki! »
집에 와서 그 벗과 이웃을 불러 모으고 말하되 나와 함께 즐기자 나의 잃은 양을 찾았노라 하리라
7 Na nzela yango, nazali koloba na bino: esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
내가 너희에게 이르노니 이와 같이 죄인 하나가 회개하면 하늘에서는 회개할 것 없는 의인 아흔아홉을 인하여 기뻐하는 것보다 더하리라
8 Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango?
어느 여자가 열 드라크마가 있는데 하나를 잃으면 등불을 켜고 집을 쓸며 찾도록 부지런히 찾지 아니하겠느냐
9 Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango: « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki! »
또 찾은즉 벗과 이웃을 불러 모으고 말하되 나와 함께 즐기자 잃은 드라크마를 찾았노라 하리라
10 Na nzela yango, nazali koloba na bino: ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.
내가 너희에게 이르노니 이와 같이 죄인 하나가 회개하면 하나님의 사자들 앞에 기쁨이 되느니라
11 Yesu alobaki lisusu: — Mobali moko azalaki na bana mibali mibale.
또 가라사대 어떤 사람이 두 아들이 있는데
12 Leki alobaki na tata na ye: « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. » Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.
그 둘째가 아비에게 말하되 아버지여 재산 중에서 내게 돌아올 분깃을 내게 주소서 하는지라 아비가 그 살림을 각각 나눠 주었더니
13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.
그 후 며칠이 못되어 둘째 아들이 재산을 다 모아 가지고 먼 나라에 가 거기서 허랑방탕하여 그 재산을 허비하더니
14 Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.
다 없이한 후 그 나라에 크게 훙년이 들어 저가 비로소 궁핍한지라
15 Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu.
가서 그 나라 백성 중 하나에게 붙여 사니 그가 저를 들로 보내어 돼지를 치게 하였는데
16 Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.
저가 돼지 먹는 쥐엄 열매로 배을 채우고자 하되 주는 자가 없는지라
17 Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki: « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala!
이에 스스로 돌이켜 가로되 내 아버지에게는 양식이 풍족한 품꾼이 얼마나 많은고 나는 여기서 주려 죽는구나
18 Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai; nakoloba na ye: ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.
내가 일어나 아버지께 가서 이르기를 아버지여 내가 하늘과 아버지께 죄를 얻었사오니
19 Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo! › »
지금부터는 아버지의 아들이라 일컬음을 감당치 못하겠나이다 나를 품꾼의 하나로 보소서 하리라 하고
20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
이에 일어나서 아버지께 돌아 가니라 아직도 상거가 먼데 아버지가 저를 보고 측은히 여겨 달려가 목을 안고 입을 맞추니
21 Mwana alobaki na tata na ye: « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »
아들이 가로되 아버지여 내가 하늘과 아버지께 죄를 얻었사오니 지금부터는 아버지의 아들이라 일컬음을 감당치 못하겠나이다 하나
22 Kasi tata alobaki na basali na ye: « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.
아버지는 종들에게 이르되 제일 좋은 옷을 내어다가 입히고 손에 가락지를 끼우고 발에 신을 신기라
23 Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango; tolia mpe tosala feti,
그리고 살진 송아지를 끌어다가 잡으라 우리가 먹고 즐기자
24 pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! » Boye babandaki feti na esengo makasi.
이 내 아들은 죽었다가 다시 살아났으며 내가 잃었다가 다시 얻었노라 하니 저희가 즐거워하더라
25 Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.
맏아들은 밭에 있다가 돌아와 집에 가까웠을 때에 풍류와 춤추는 소리를 듣고
26 Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka.
한 종을 불러 이 무슨 일인가 물은대
27 Mosali azongisaki: « Ndeko na yo azongi! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. »
대답하되 당신의 동생이 돌아왔으매 당신의 아버지가 그의 건강한 몸을 다시 맞아 들이게 됨을 인하여 살진 송아지를 잡았나이다 하니
28 Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye.
저가 노하여 들어가기를 즐겨 아니하거늘 아버지가 나와서 권한대
29 Kasi azongiselaki tata na ye: « Tala! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.
아버지께 대답하여 가로되 내가 여러 해 아버지를 섬겨 명을 어김이 없거늘 내게는 염소 새끼라도 주어 나와 내 벗으로 즐기게 하신 일이 없더니
30 Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye! »
아버지의 살림을 창기와 함께 먹어버린 이 아들이 돌아오매 이를 위하여 살진 송아지를 잡으셨나이다
31 Tata azongiselaki ye: « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.
아버지가 이르되 얘 너는 항상 나와 함께 있으니 내 것이 다 네 것이로되
32 Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi; abungaki, kasi amonani! »
이 네 동생은 죽었다가 살았으며 내가 잃었다가 얻었기로 우리가 즐거워하고 기뻐하는 것이 마땅하다 하니라

< Luka 15 >