< Luka 13 >

1 Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka. 2 Yesu alobaki na bango: — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile? 3 Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso. 4 Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi? 5 Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso. 6 Bongo alobaki lisese oyo: — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te. 7 Boye alobaki na mobateli elanga yango: « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango! Mpo na nini ekanga mabele pamba? » 8 Mobateli elanga azongiselaki ye: « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola; 9 tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. » 10 Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani. 11 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe. 12 Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye: — Mwasi, okangolami na pasi na yo! 13 Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe. 14 Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato: — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te! 15 Nkolo azongiselaki ye: — Bato ya bilongi mibale! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi? 16 Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba? 17 Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala. 18 Bongo Yesu atunaki: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Nakokanisa yango na nini? 19 Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango. 20 Yesu atunaki lisusu: — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini? 21 Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. 22 Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi. 23 Moto moko atunaki Ye: — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika? Yesu alobaki na bango: 24 — Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te. 25 Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela: « Nkolo, Nkolo, fungolela biso! » Kasi Ye akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! » 26 Bongo bokoloba: « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso! » 27 Kasi akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe! » 28 Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe; kasi bino, bokobwakama libanda. 29 Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe. 30 Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso. 31 Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo! 32 Yesu alobaki na bango: — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba: « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. » 33 Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi! 34 Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki. 35 Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino: Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba: « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! »

< Luka 13 >