< Luka 13 >

1 Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka.
Παρῆσαν δέ τινες ἐν αὐτῷ τῷ καιρῷ ἀπαγγέλλοντες αὐτῷ περὶ τῶν Γαλιλαίων ὧν τὸ αἷμα Πειλᾶτος ἔμιξεν μετὰ τῶν θυσιῶν αὐτῶν.
2 Yesu alobaki na bango: — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile?
καὶ ἀποκριθεὶς εἶπεν αὐτοῖς· δοκεῖτε ὅτι οἱ Γαλιλαῖοι οὗτοι ἁμαρτωλοὶ παρὰ πάντας τοὺς Γαλιλαίους ἐγένοντο, ὅτι ταῦτα πεπόνθασιν;
3 Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
οὐχί λέγω ὑμῖν, ἀλλ’ ἐὰν μὴ μετανοῆτε, πάντες ὁμοίως ἀπολεῖσθε.
4 Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi?
ἢ ἐκεῖνοι οἱ δεκαοκτώ, ἐφ’ οὓς ἔπεσεν ὁ πύργος ἐν τῷ Σιλωὰμ καὶ ἀπέκτεινεν αὐτούς, δοκεῖτε ὅτι αὐτοὶ ὀφειλέται ἐγένοντο παρὰ πάντας τοὺς ἀνθρώπους τοὺς κατοικοῦντας ἐν Ἱερουσαλήμ;
5 Nazali koloba na bino: Ezali bongo te! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.
οὐχί λέγω ὑμῖν, ἀλλ’ ἐὰν μὴ μετανοήσητε, πάντες ὡσαύτως ἀπολεῖσθε.
6 Bongo alobaki lisese oyo: — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.
Ἔλεγεν δὲ ταύτην τὴν παραβολήν. Συκῆν εἶχέν τις πεφυτευμένην ἐν τῷ ἀμπελῶνι αὐτοῦ, καὶ ἦλθεν ζητῶν καρπὸν ἐν αὐτῇ καὶ οὐχ εὗρεν.
7 Boye alobaki na mobateli elanga yango: « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango! Mpo na nini ekanga mabele pamba? »
εἶπεν δὲ πρὸς τὸν ἀμπελουργόν· ἰδοὺ τρία ἔτη ἀφ’ οὗ ἔρχομαι ζητῶν καρπὸν ἐν τῇ συκῇ ταύτῃ καὶ οὐχ εὑρίσκω· ἔκκοψον αὐτήν· ἱνατί καὶ τὴν γῆν καταργεῖ;
8 Mobateli elanga azongiselaki ye: « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola;
ὁ δὲ ἀποκριθεὶς λέγει αὐτῷ· κύριε, ἄφες αὐτὴν καὶ τοῦτο τὸ ἔτος, ἕως ὅτου σκάψω περὶ αὐτὴν καὶ βάλω κόπρια·
9 tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »
κἂν μὲν ποιήσῃ καρπὸν εἰς τὸ μέλλον· εἰ δὲ μήγε, ἐκκόψεις αὐτήν.
10 Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani.
Ἦν δὲ διδάσκων ἐν μιᾷ τῶν συναγωγῶν ἐν τοῖς σάββασιν.
11 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe.
καὶ ἰδοὺ γυνὴ πνεῦμα ἔχουσα ἀσθενείας ἔτη δεκαοκτώ, καὶ ἦν συνκύπτουσα καὶ μὴ δυναμένη ἀνακύψαι εἰς τὸ παντελές.
12 Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye: — Mwasi, okangolami na pasi na yo!
ἰδὼν δὲ αὐτὴν ὁ Ἰησοῦς προσεφώνησεν καὶ εἶπεν αὐτῇ· γύναι, ἀπολέλυσαι ἀπὸ τῆς ἀσθενείας σου,
13 Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.
καὶ ἐπέθηκεν αὐτῇ τὰς χεῖρας· καὶ παραχρῆμα ἀνορθώθη, καὶ ἐδόξαζεν τὸν θεόν.
14 Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato: — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te!
ἀποκριθεὶς δὲ ὁ ἀρχισυνάγωγος, ἀγανακτῶν ὅτι τῷ σαββάτῳ ἐθεράπευσεν ὁ Ἰησοῦς, ἔλεγεν τῷ ὄχλῳ ὅτι ἓξ ἡμέραι εἰσὶν ἐν αἷς δεῖ ἐργάζεσθαι· ἐν αὐταῖς οὖν ἐρχόμενοι θεραπεύεσθε καὶ μὴ τῇ ἡμέρᾳ τοῦ σαββάτου.
15 Nkolo azongiselaki ye: — Bato ya bilongi mibale! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi?
ἀπεκρίθη δὲ αὐτῷ ὁ κύριος καὶ εἶπεν· ὑποκριταί, ἕκαστος ὑμῶν τῷ σαββάτῳ οὐ λύει τὸν βοῦν αὐτοῦ ἢ τὸν ὄνον ἀπὸ τῆς φάτνης καὶ ἀπαγαγὼν ποτίζει;
16 Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba?
ταύτην δὲ θυγατέρα Ἀβραὰμ οὖσαν, ἣν ἔδησεν ὁ σατανᾶς ἰδοὺ δέκα καὶ ὀκτὼ ἔτη, οὐκ ἔδει λυθῆναι ἀπὸ τοῦ δεσμοῦ τούτου τῇ ἡμέρᾳ τοῦ σαββάτου;
17 Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala.
καὶ ταῦτα λέγοντος αὐτοῦ κατῃσχύνοντο πάντες οἱ ἀντικείμενοι αὐτῷ, καὶ πᾶς ὁ ὄχλος ἔχαιρεν ἐπὶ πᾶσιν τοῖς ἐνδόξοις τοῖς γινομένοις ὑπ’ αὐτοῦ.
18 Bongo Yesu atunaki: — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini? Nakokanisa yango na nini?
Ἔλεγεν οὖν· τίνι ὁμοία ἐστὶν ἡ βασιλεία τοῦ θεοῦ, καὶ τίνι ὁμοιώσω αὐτήν;
19 Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.
ὁμοία ἐστὶν κόκκῳ σινάπεως, ὃν λαβὼν ἄνθρωπος ἔβαλεν εἰς κῆπον ἑαυτοῦ, καὶ ηὔξησεν καὶ ἐγένετο εἰς δένδρον, καὶ τὰ πετεινὰ τοῦ οὐρανοῦ κατεσκήνωσεν ἐν τοῖς κλάδοις αὐτοῦ.
20 Yesu atunaki lisusu: — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini?
Καὶ πάλιν εἶπεν· τίνι ὁμοιώσω τὴν βασιλείαν τοῦ θεοῦ;
21 Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.
ὁμοία ἐστὶν ζύμῃ, ἣν λαβοῦσα γυνὴ ἔκρυψεν εἰς ἀλεύρου σάτα τρία, ἕως οὗ ἐζυμώθη ὅλον.
22 Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi.
Καὶ διεπορεύετο κατὰ πόλεις καὶ κώμας διδάσκων καὶ πορείαν ποιούμενος εἰς Ἱεροσόλυμα.
23 Moto moko atunaki Ye: — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika? Yesu alobaki na bango:
Εἶπεν δέ τις αὐτῷ· κύριε, εἰ ὀλίγοι οἱ σῳζόμενοι; ὁ δὲ εἶπεν πρὸς αὐτούς·
24 — Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.
ἀγωνίζεσθε εἰσελθεῖν διὰ τῆς στενῆς θύρας, ὅτι πολλοί, λέγω ὑμῖν, ζητήσουσιν εἰσελθεῖν καὶ οὐκ ἰσχύσουσιν.
25 Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela: « Nkolo, Nkolo, fungolela biso! » Kasi Ye akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! »
ἀφ’ οὗ ἂν ἐγερθῇ ὁ οἰκοδεσπότης καὶ ἀποκλείσῃ τὴν θύραν, καὶ ἄρξησθε ἔξω ἑστάναι καὶ κρούειν τὴν θύραν λέγοντες· κύριε, ἄνοιξον ἡμῖν, καὶ ἀποκριθεὶς ἐρεῖ ὑμῖν· οὐκ οἶδα ὑμᾶς πόθεν ἐστέ.
26 Bongo bokoloba: « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso! »
τότε ἄρξεσθε λέγειν· ἐφάγομεν ἐνώπιόν σου καὶ ἐπίομεν, καὶ ἐν ταῖς πλατείαις ἡμῶν ἐδίδαξας·
27 Kasi akozongisela bino: « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe! »
καὶ ἐρεῖ· λέγω ὑμῖν, οὐκ οἶδα ὑμᾶς πόθεν ἐστέ· ἀπόστητε ἀπ’ ἐμοῦ πάντες ἐργάται ἀδικίας.
28 Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe; kasi bino, bokobwakama libanda.
ἐκεῖ ἔσται ὁ κλαυθμὸς καὶ ὁ βρυγμὸς τῶν ὀδόντων, ὅταν ὄψεσθε Ἀβραὰμ καὶ Ἰσαὰκ καὶ Ἰακὼβ καὶ πάντας τοὺς προφήτας ἐν τῇ βασιλείᾳ τοῦ θεοῦ, ὑμᾶς δὲ ἐκβαλλομένους ἔξω.
29 Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.
καὶ ἥξουσιν ἀπὸ ἀνατολῶν καὶ δυσμῶν καὶ Βορρᾶ καὶ νότου καὶ ἀνακλιθήσονται ἐν τῇ βασιλείᾳ τοῦ θεοῦ.
30 Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
καὶ ἰδοὺ εἰσὶν ἔσχατοι οἳ ἔσονται πρῶτοι, καὶ εἰσὶν πρῶτοι οἳ ἔσονται ἔσχατοι.
31 Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye: — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo!
Ἐν αὐτῇ τῇ ὥρᾳ προσῆλθάν τινες Φαρισαῖοι λέγοντες αὐτῷ· ἔξελθε καὶ πορεύου ἐντεῦθεν, ὅτι Ἡρώδης θέλει σε ἀποκτεῖναι.
32 Yesu alobaki na bango: — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba: « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »
καὶ εἶπεν αὐτοῖς· πορευθέντες εἴπατε τῇ ἀλώπεκι ταύτῃ· ἰδοὺ ἐκβάλλω δαιμόνια καὶ ἰάσεις ἀποτελῶ σήμερον καὶ αὔριον, καὶ τῇ τρίτῃ τελειοῦμαι.
33 Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi!
πλὴν δεῖ με σήμερον καὶ αὔριον καὶ τῇ ἐχομένῃ πορεύεσθαι, ὅτι οὐκ ἐνδέχεται προφήτην ἀπολέσθαι ἔξω Ἱερουσαλήμ.
34 Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
Ἱερουσαλὴμ Ἱερουσαλήμ, ἡ ἀποκτείνουσα τοὺς προφήτας καὶ λιθοβολοῦσα τοὺς ἀπεσταλμένους πρὸς αὐτήν, ποσάκις ἠθέλησα ἐπισυνάξαι τὰ τέκνα σου ὃν τρόπον ὄρνιξ τὴν ἑαυτῆς νοσσιὰν ὑπὸ τὰς πτέρυγας, καὶ οὐκ ἠθελήσατε.
35 Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino: Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba: « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! »
ἰδοὺ ἀφίεται ὑμῖν ὁ οἶκος ὑμῶν. λέγω ὑμῖν ὅτι οὐ μὴ ἴδητέ με ἕως ἥξει ὅτε εἴπητε· εὐλογημένος ὁ ἐρχόμενος ἐν ὀνόματι κυρίου.

< Luka 13 >