< Levitike 8 >

1 Yawe alobaki na Moyize:
And the LORD spoke unto Moses, saying,
2 « Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire;
Take Aaron and his sons with him, and the garments, and the anointing oil, and a bullock for the sin offering, and two rams, and a basket of unleavened bread;
3 mpe sangisa lisanga mobimba na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. »
And gather you all the congregation together unto the door of the tabernacle of the congregation.
4 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe lisanga esanganaki na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
And Moses did as the LORD commanded him; and the assembly was gathered together unto the door of the tabernacle of the congregation.
5 Moyize alobaki na lisanga makambo oyo Yawe atindaki ye kosala.
And Moses said unto the congregation, This is the thing which the LORD commanded to be done.
6 Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi.
And Moses brought Aaron and his sons, and washed them with water.
7 Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode.
And he put upon him the coat, and girded him with the girdle, and clothed him with the robe, and put the ephod upon him, and he girded him with the curious girdle of the ephod, and bound it unto him therewith.
8 Alatisaki Aron elamba ya tolo mpe atiaki Urimi mpe tumimi likolo ya elamba yango.
And he put the breastplate upon him: also he put in the breastplate the Urim and the Thummim.
9 Akangaki kitendi na moto ya Aron; bongo liboso na yango, atiaki medaye ya wolo, elembo ya libulisi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
And he put the turban upon his head; also upon the turban, even upon his forefront, did he put the golden plate, the holy crown; as the LORD commanded Moses.
10 Moyize azwaki mafuta ya epakolami mpe apakolaki Mongombo elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango; na bongo nde abulisaki yango.
And Moses took the anointing oil, and anointed the tabernacle and all that was therein, and sanctified them.
11 Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango.
And he sprinkled thereof upon the altar seven times, and anointed the altar and all his vessels, both the vessel that holds water and his foot, to sanctify them.
12 Asopaki ndambo ya mafuta ya epakolami na moto ya Aron mpe apakolaki ye mafuta yango mpo na kobulisa ye.
And he poured of the anointing oil upon Aaron's head, and anointed him, to sanctify him.
13 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
And Moses brought Aaron's sons, and put coats upon them, and girded them with girdles, and put bonnets upon them; as the LORD commanded Moses.
14 Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango.
And he brought the bullock for the sin offering: and Aaron and his sons laid their hands upon the head of the bullock for the sin offering.
15 Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.
And he slew it; and Moses took the blood, and put it upon the horns of the altar round about with his finger, and purified the altar, and poured the blood at the bottom of the altar, and sanctified it, to make reconciliation upon it.
16 Moyize azwaki lisusu mafuta nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango, atumbaki yango na etumbelo.
And he took all the fat that was upon the inwards, and the lobe above the liver, and the two kidneys, and their fat, and Moses burned it upon the altar.
17 Kasi atumbaki na libanda ya molako ngombe yango ya mobali, poso na yango, misuni na yango mpe nyei na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
But the bullock, and his hide, his flesh, and his dung, he burnt with fire without the camp; as the LORD commanded Moses.
18 Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.
And he brought the ram for the burnt offering: and Aaron and his sons laid their hands upon the head of the ram.
19 Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.
And he killed it; and Moses sprinkled the blood upon the altar round about.
20 Akataki-kataki meme yango na biteni. Moyize atumbaki biteni yango, moto mpe mafuta.
And he cut the ram into pieces; and Moses burnt the head, and the pieces, and the fat.
21 Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
And he washed the inwards and the legs in water; and Moses burnt the whole ram upon the altar: it was a burnt sacrifice for a sweet savour, and an offering made by fire unto the LORD; as the LORD commanded Moses.
22 Bongo amemaki meme mosusu ya mobali mpo na libulisi; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.
And he brought the other ram, the ram of consecration: and Aaron and his sons laid their hands upon the head of the ram.
23 Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron.
And he slew it; and Moses took of the blood of it, and put it upon the tip of Aaron's right ear, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot.
24 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, atiaki ndambo ya makila na basonge ya matoyi na bango ya ngambo ya loboko ya mobali, na misapi ya minene ya maboko na bango ya mobali mpe na misapi ya minene ya makolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali. Sima, asopaki makila na bangambo nyonso ya etumbelo.
And he brought Aaron's sons, and Moses put of the blood upon the tip of their right ear, and upon the thumbs of their right hands, and upon the great toes of their right feet: and Moses sprinkled the blood upon the altar round about.
25 Azwaki biteni oyo ya mafuta: mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali.
And he took the fat, and the rump, and all the fat that was upon the inwards, and the lobe above the liver, and the two kidneys, and their fat, and the right shoulder:
26 Kati na kitunga ya mapa ezanga levire oyo ezalaki liboso ya Yawe, azwaki lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko; atiaki yango likolo ya biteni ya mafuta mpe ya mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.
And out of the basket of unleavened bread, that was before the LORD, he took one unleavened cake, and a cake of oiled bread, and one wafer, and put them on the fat, and upon the right shoulder:
27 Atiaki biloko yango nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; bongo ayebisaki bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
And he put all upon Aaron's hands, and upon his sons' hands, and waved them for a wave offering before the LORD.
28 Moyize azwaki yango lisusu na maboko na bango mpe atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. Ezalaki mbeka ya libulisi, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
And Moses took them from off their hands, and burnt them on the altar upon the burnt offering: they were consecrations for a sweet savour: it is an offering made by fire unto the LORD.
29 Moyize azwaki tolo ya meme ya libulisi, atombolaki yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
And Moses took the breast, and waved it for a wave offering before the LORD: for of the ram of consecration it was Moses' part; as the LORD commanded Moses.
30 Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.
And Moses took of the anointing oil, and of the blood which was upon the altar, and sprinkled it upon Aaron, and upon his garments, and upon his sons, and upon his sons' garments with him; and sanctified Aaron, and his garments, and his sons, and his sons' garments with him.
31 Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali: « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki: ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. ›
And Moses said unto Aaron and to his sons, Boil the flesh at the door of the tabernacle of the congregation: and there eat it with the bread that is in the basket of consecrations, as I commanded, saying, Aaron and his sons shall eat it.
32 Oyo ekotikala kati na mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa, bokotumba yango na moto.
And that which remains of the flesh and of the bread shall all of you burn with fire.
33 Mikolo sambo, bokolongwa te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani kino mikolo ya libulisi na bino ekokoka, pamba te libulisi na bino ekowumela mikolo sambo.
And all of you shall not go out of the door of the tabernacle of the congregation in seven days, until the days of your consecration be at an end: for seven days shall he consecrate you.
34 Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino.
As he has done this day, so the LORD has commanded to do, to make an atonement for you.
35 Bokovanda mikolo sambo, butu mpe moyi, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bokosala makambo oyo Yawe atindi mpo ete bokufa te. Pamba te, yango nde epesamelaki ngai lokola mitindo. »
Therefore shall all of you abide at the door of the tabernacle of the congregation day and night seven days, and keep the charge of the LORD, that all of you die not: for so I am commanded.
36 Aron mpe bana na ye ya mibali basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
So Aaron and his sons did all things which the LORD commanded by the hand of Moses.

< Levitike 8 >