< Levitike 26 >

1 Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
"'You shall make for yourselves no idols, neither shall you raise up an engraved image or a pillar, neither shall you place any figured stone in your land, to bow down to it: for I am Jehovah your God.
2 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
"'You shall keep my Sabbaths, and have reverence for my sanctuary. I am Jehovah.
3 Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,
"'If you walk in my statutes, and keep my commandments, and do them;
4 nakonokisela bino mvula na tango na yango; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.
then I will give you your rains in their season, and the land shall yield its increase, and the trees of the field shall yield their fruit.
5 Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.
Your threshing shall reach to the vintage, and the vintage shall reach to the sowing time; and you shall eat your bread to the full, and dwell in your land safely.
6 Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.
"'I will give peace in the land, and you shall lie down, and no one will make you afraid; and I will remove evil animals out of the land, neither shall the sword go through your land.
7 Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.
You shall chase your enemies, and they shall fall before you by the sword.
8 Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.
Five of you shall chase a hundred, and a hundred of you shall chase ten thousand; and your enemies shall fall before you by the sword.
9 Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.
"'I will have respect for you, and make you fruitful, and multiply you, and will establish my covenant with you.
10 Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.
You shall eat old store long kept, and you shall move out the old because of the new.
11 Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te.
And I will set my tabernacle among you, and my soul will not abhor you.
12 Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai.
I will walk among you, and will be your God, and you will be my people.
13 Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.
I am Jehovah your God, who brought you forth out of the land of Egypt, that you should not be their slaves; and I have broken the bars of your yoke, and made you go upright.
14 Soki boboyi kotosa mpe kosalela mibeko wana nyonso,
"'But if you will not listen to me, and will not do all these commandments;
15 soki bobwaki bikateli na Ngai, mpe soki molimo na bino etombokeli malako na Ngai kino koboya kosalela mibeko na Ngai nyonso mpe kokata boyokani na Ngai,
and if you shall reject my statutes, and if your soul abhors my ordinances, so that you will not do all my commandments, but break my covenant;
16 tala ndenge nakosala bino: nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.
I also will do this to you: I will appoint terror over you, even consumption and fever, that shall consume the eyes, and make the soul to pine away; and you will sow your seed in vain, for your enemies will eat it.
17 Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.
I will set my face against you, and you will be struck before your enemies. Those who hate you will rule over you; and you will flee when no one pursues you.
18 Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
"'If you in spite of these things will not listen to me, then I will chastise you seven times more for your sins.
19 Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze.
I will break the pride of your power, and I will make your sky like iron, and your soil like bronze;
20 Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.
and your strength will be spent in vain; for your land won't yield its increase, neither will the trees of the land yield their fruit.
21 Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
"'If you walk contrary to me, and won't listen to me, then I will bring seven times more plagues on you according to your sins.
22 Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.
I will send the wild animals among you, which will rob you of your children, destroy your livestock, and make you few in number; and your roads will become desolate.
23 Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai,
"'If by these things you won't be reformed to me, but will walk contrary to me;
24 Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
then I will also walk contrary to you; and I will strike you, even I, seven times for your sins.
25 Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.
I will bring a sword upon you, that will execute the vengeance of the covenant; and you will be gathered together within your cities: and I will send the pestilence among you; and you will be delivered into the hand of the enemy.
26 Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo: bokolia kasi bokotonda te.
When I break your staff of bread, ten women shall bake your bread in one oven, and they shall deliver your bread again by weight: and you shall eat, and not be satisfied.
27 Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai,
"'If you in spite of this won't listen to me, but walk contrary to me;
28 Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
then I will walk contrary to you in wrath; and I also will chastise you seven times for your sins.
29 Bokolia bana na bino ya mibali mpe ya basi.
You will eat the flesh of your sons, and you will eat the flesh of your daughters.
30 Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino.
I will destroy your high places, and cut down your incense altars, and cast your dead bodies upon the bodies of your idols; and my soul will abhor you.
31 Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino.
I will lay your cities waste, and will bring your sanctuaries to desolation, and I will not take delight in the sweet fragrance of your offerings.
32 Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.
I will bring the land into desolation; and your enemies that dwell in it will be astonished at it.
33 Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.
I will scatter you among the nations, and I will draw out the sword after you: and your land will be a desolation, and your cities shall be a waste.
34 Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango.
Then the land will enjoy its sabbaths as long as it lies desolate and you are in your enemies' land. Even then the land will rest and enjoy its sabbaths.
35 Na tango nyonso oyo ekozanga bato, ekozwa bopemi oyo ezalaki na yango na tango ya Saba na bino tango bozalaki kovanda kati na yango.
As long as it lies desolate it shall have rest, even the rest which it did not have in your sabbaths, when you lived on it.
36 Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto: bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.
"'As for those of you who are left, I will send a faintness into their hearts in the lands of their enemies: and the sound of a driven leaf will put them to flight; and they shall flee, as one flees from the sword; and they will fall when no one pursues.
37 Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino.
They will stumble over one another, as it were before the sword, when no one pursues: and you will have no power to stand before your enemies.
38 Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino.
You will perish among the nations, and the land of your enemies will eat you up.
39 Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango.
Those of you who are left will rot away in their iniquity in the lands of their enemies; and also in the iniquities of their fathers shall they rot away with them.
40 Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,
"'If they confess their iniquity, and the iniquity of their fathers, in their trespass which they trespassed against me, and also that, because they walked contrary to me,
41 oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango,
I also walked contrary to them, and brought them into the land of their enemies: if then their uncircumcised heart is humbled, and they then accept the punishment of their iniquity;
42 nakokanisa boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na Jakobi, na Izaki mpe na Abrayami; mpe nakokanisa mokili.
then I will remember my covenant with Jacob; and also my covenant with Isaac, and also my covenant with Abraham; and I will remember the land.
43 Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai.
The land also will be left by them, and will enjoy its sabbaths while it lies desolate without them: and they will accept the punishment of their iniquity; because, even because they rejected my ordinances, and their soul abhorred my statutes.
44 Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.
Yet for all that, when they are in the land of their enemies, I will not reject them, neither will I abhor them, to destroy them utterly, and to break my covenant with them; for I am Jehovah their God;
45 Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › »
but I will for their sake remember the covenant of their ancestors, whom I brought forth out of the land of Egypt in the sight of the nations, that I might be their God. I am Jehovah.'"
46 Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize.
These are the statutes, ordinances and laws, which Jehovah made between him and the children of Israel in Mount Sinai by Moses.

< Levitike 26 >