< Levitike 21 >

1 Yawe ayebisaki Moyize: « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron: ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye,
And the LORD said unto Moses, Speak unto the priests the sons of Aaron, and say unto them, There shall none be defiled for the dead among his people:
2 longola kaka soki ezali ebembe ya mama na ye, ya tata na ye, ya mwana na ye ya mobali to ya mwana na ye ya mwasi, ya ndeko na ye ya mobali.
But for his kin, that is near unto him, that is, for his mother, and for his father, and for his son, and for his daughter, and for his brother.
3 Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo.
And for his sister a virgin, that is nigh unto him, which has had no husband; for her may he be defiled.
4 Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye.
But he shall not defile himself, being a chief man among his people, to profane himself.
5 Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango.
They shall not make baldness upon their head, neither shall they shave off the corner of their beard, nor make any cuttings in their flesh.
6 Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.
They shall be holy unto their God, and not profane the name of their God: for the offerings of the LORD made by fire, and the bread of their God, they do offer: therefore they shall be holy.
7 Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango.
They shall not take a wife that is a whore, or profane; neither shall they take a woman put away from her husband: for he is holy unto his God.
8 Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu.
You shall sanctify him therefore; for he offers the bread of your God: he shall be holy unto you: for I the LORD, which sanctify you, am holy.
9 Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto.
And the daughter of any priest, if she profane herself by playing the whore, she profanes her father: she shall be burnt with fire.
10 Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga.
And he that is the high priest among his brethren, upon whose head the anointing oil was poured, and that is consecrated to put on the garments, shall not uncover his head, nor rend his clothes;
11 Akoki te kopusana pembeni ya ebembe mpe komikomisa mbindo mpo na kufa ya tata na ye to ya mama na ye.
Neither shall he go in to any dead body, nor defile himself for his father, or for his mother;
12 Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe.
Neither shall he go out of the sanctuary, nor profane the sanctuary of his God; for the crown of the anointing oil of his God is upon him: I am the LORD.
13 Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
And he shall take a wife in her virginity.
14 Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.
A widow, or a divorced woman, or profane, or an harlot, these shall he not take: but he shall take a virgin of his own people to wife.
15 Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › »
Neither shall he profane his seed among his people: for I the LORD do sanctify him.
16 Yawe ayebisaki Moyize:
And the LORD spoke unto Moses, saying,
17 « Loba na Aron: ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.
Speak unto Aaron, saying, Whosoever he be of your seed in their generations that has any blemish, let him not approach to offer the bread of his God.
18 Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo: mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te,
For whatsoever man he be that has a blemish, he shall not approach: a blind man, or a lame, or he that has a flat nose, or any thing superfluous,
19 moto oyo abukana lokolo to loboko,
Or a man that is broken footed, or broken handed,
20 moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo.
Or crooked back, or a dwarf, or that has a blemish in his eye, or be scurvy, or scabbed, or has his stones broken;
21 Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye.
No man that has a blemish of the seed of Aaron the priest shall come nigh to offer the offerings of the LORD made by fire: he has a blemish; he shall not come nigh to offer the bread of his God.
22 Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule.
He shall eat the bread of his God, both of the most holy, and of the holy.
23 Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › »
Only he shall not go in unto the vail, nor come nigh unto the altar, because he has a blemish; that he profane not my sanctuaries: for I the LORD do sanctify them.
24 Moyize alobaki makambo oyo epai ya Aron, epai ya bana na ye ya mibali, mpe epai ya bana nyonso ya Isalaele.
And Moses told it unto Aaron, and to his sons, and unto all the children of Israel.

< Levitike 21 >