< Bilombe 6 >

1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani.
And the children of Israel did evil in the sight of the LORD: and the LORD delivered them into the hand of Midian seven years.
2 Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.
And the hand of Midian prevailed against Israel: [and] because of the Midianites the children of Israel made them the dens which [are] in the mountains, and caves, and strong holds.
3 Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.
And [so] it was, when Israel had sown, that the Midianites came up, and the Amalekites, and the children of the east, even they came up against them;
4 Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te.
And they encamped against them, and destroyed the increase of the earth, till thou comest to Gaza; and left no sustenance for Israel, neither sheep, nor ox, nor ass.
5 Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.
For they came up with their cattle, and their tents, and they came as grasshoppers for multitude; [for] both they and their camels were without number: and they entered into the land to destroy it.
6 Bato ya Madiani bakomisaki bana ya Isalaele babola makasi. Boye, bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo ete asunga bango.
And Israel was greatly impoverished because of the Midianites; and the children of Israel cried to the LORD.
7 Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani,
And it came to pass, when the children of Israel cried to the LORD because of the Midianites,
8 Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu.
That the LORD sent a prophet to the children of Israel, who said to them, Thus saith the LORD God of Israel, I brought you up from Egypt, and brought you forth from the house of bondage;
9 Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango.
And I delivered you from the hand of the Egyptians, and from the hand of all that oppressed you, and drove them out from before you, and gave you their land;
10 Nalobaki na bino: Nazali Yawe, Nzambe na bino; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › »
And I said to you, I [am] the LORD your God; fear not the gods of the Amorites, in whose land ye dwell: but ye have not obeyed my voice.
11 Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani.
And there came an angel of the LORD, and sat under an oak which [was] in Ophrah, that [pertained] to Joash the Abi-ezrite: and his son Gideon thrashed wheat by the wine-press, to hide [it] from the Midianites.
12 Anjelu ya Yawe abimelaki Jedeon mpe alobaki na ye: — Yawe azali elongo na yo, elombe ya bitumba.
And the angel of the LORD appeared to him, and said to him, The LORD [is] with thee, thou mighty man of valor.
13 Jedeon azongisaki: — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani.
And Gideon said to him, O my LORD, if the LORD is with us, why then hath all this befallen us? and where [are] all his miracles which our fathers told us of, saying, Did not the LORD bring us up from Egypt? but now the LORD hath forsaken us, and delivered us into the hands of the Midianites.
14 Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki: — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo?
And the LORD looked upon him, and said, Go in this thy might, and thou shalt save Israel from the hand of the Midianites: have not I sent thee?
15 Jedeon azongisaki: — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai.
And he said to him, O my LORD, by what means shall I save Israel? behold, my family [is] poor in Manasseh, and I [am] the least in my father's house.
16 Yawe alobaki na ye: — Nakozala elongo na yo, mpe okoboma bato ya Madiani lokola moto moko.
And the LORD said to him, Surely I will be with thee, and thou shalt smite the Midianites as one man.
17 Jedeon alobaki: — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai.
And he said to him, If now I have found grace in thy sight, then show me a sign that thou talkest with me.
18 Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. Yawe alobaki: — Nakozela kino okozonga.
Depart not hence, I pray thee, until I come to thee, and bring forth my present, and set [it] before thee. And he said, I will tarry until thou comest again.
19 Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente.
And Gideon went in, and made ready a kid, and unleavened cakes of an ephah of flour: the flesh he put in a basket, and he put the broth in a pot, and brought [it] out to him under the oak, and presented [it].
20 Anjelu na Nzambe alobaki na ye: — Kamata nyama mpe mapa oyo ezanga levire, tia yango na likolo ya libanga oyo mpe sopela yango elubu. Jedeon asalaki yango.
And the angel of God said to him, Take the flesh and the unleavened cakes, and lay [them] upon this rock, and pour out the broth. And he did so.
21 Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye.
Then the angel of the LORD put forth the end of the staff that [was] in his hand, and touched the flesh and the unleavened cakes; and there rose fire out of the rock, and consumed the flesh and the unleavened cakes. Then the angel of the LORD departed from his sight.
22 Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki: « Nkolo Yawe, mawa na ngai! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. »
And when Gideon perceived that he was [an] angel of the LORD, Gideon said, Alas, O LORD God! for because I have seen an angel of the LORD face to face.
23 Kasi Yawe alobaki na ye: — Zala na kimia! Kobanga te.
And the LORD said to him, Peace [be] to thee; fear not: thou shalt not die.
24 Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri.
Then Gideon built an altar there to the LORD, and called it Jehovah-shalom: to this day it [is] yet in Ophrah of the Abi-ezrites.
25 Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon: — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango.
And it came to pass the same night, that the LORD said to him, Take thy father's young bullock, even the second bullock of seven years old, and throw down the altar of Baal that thy father hath, and cut down the grove that [is] by it:
26 Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki.
And build an altar to the LORD thy God upon the top of this rock, in the ordered place, and take the second bullock, and offer a burnt-sacrifice with the wood of the grove which thou shalt cut down.
27 Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te.
Then Gideon took ten men of his servants, and did as the LORD had said to him: and [so] it was, because he feared his father's household, and the men of the city, that he could not do [it] by day, that he did [it] by night.
28 Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika.
And when the men of the city arose early in the morning, behold, the altar of Baal was cast down, and the grove was cut down that [was] by it, and the second bullock was offered upon the altar [that was] built.
29 Balobanaki: « Nani asali makambo ya boye? » Wana bazalaki kotuna mpo na koluka koyeba, bayebisaki bango ete ezali Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto asalaki bongo.
And they said one to another, Who hath done this thing? And when they inquired and asked, they said, Gideon the son of Joash hath done this thing.
30 Bato ya engumba balobaki na Joasi: — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango.
Then the men of the city said to Joash, Bring out thy son, that he may die: because he hath cast down the altar of Baal, and because he hath cut down the grove that [was] by it.
31 Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye: — Boni, bino nde bokolobela Bala? Bino nde bokobundela ye? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye.
And Joash said to all that stood against him, Will ye plead for Baal? will ye save him? he that will plead for him, let him be put to death whilst [it is yet] morning: if he [is] a god, let him plead for himself, because [one] hath cast down his altar.
32 Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba: Tika ete Bala amibundela ye moko.
Therefore on that day he called him Jerubbaal, saying, Let Baal plead against him, because he hath thrown down his altar.
33 Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli.
Then all the Midianites, and the Amalekites, and the children of the east were assembled, and went over, and encamped in the valley of Jezreel.
34 Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye.
But the Spirit of the LORD came upon Gideon, and he blew a trumpet; and Abiezer was called after him.
35 Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye.
And he sent messengers throughout all Manasseh; who also was called after him: and he sent messengers to Asher, and to Zebulun, and to Naphtali; and they came up to meet them.
36 Jedeon alobaki na Nzambe: « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai,
And Gideon said to God, If thou wilt save Israel by my hand, as thou hast said,
37 nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. »
Behold, I will put a fleece of wool on the floor; [and] if the dew shall be on the fleece only, and [it] shall [be] dry upon all the earth [besides], then shall I know that thou wilt save Israel by my hand, as thou hast said.
38 Mpe esalemaki bongo. Mokolo oyo elandaki, Jedeon alamukaki na tongo-tongo, akamolaki bapwale, ebimisaki mayi mpe etondisaki sani mobimba.
And it was so: for he rose early on the morrow, and pressed the fleece, and wrung the dew out of the fleece, a bowl-full of water.
39 Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe: « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. »
And Gideon said to God, Let not thy anger be hot against me, and I will speak but this once: Let me make trial, I pray thee, but this once with the fleece; let it now be dry only upon the fleece, and upon all the ground let there be dew.
40 Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango: bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe.
And God did so that night: for it was dry upon the fleece only, and there was dew on all the ground.

< Bilombe 6 >