< Bilombe 3 >

1 Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana.
Now Yahweh left these nations to test Israel, namely everyone in Israel who had not experienced any of the wars fought in Canaan.
2 Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba.
(He did this to teach warfare to the new generation of the Israelites who had not known it before.)
3 Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.
These are the nations: the five kings from the Philistines, all the Canaanites, the Sidonians, and the Hivites who lived in the Lebanon mountains, from Mount Baal Hermon to Hamath Pass.
4 Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize.
These nations were left as a means by which Yahweh would test Israel, to confirm whether they would obey the commands he gave their ancestors through Moses.
5 Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi;
So the people of Israel lived among the Canaanites, the Hittites, the Amorites, the Perizzites, the Hivites, and the Jebusites.
6 babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango.
Their daughters they took to be their wives, and their own daughters they gave to their sons, and they served their gods.
7 Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera.
The people of Israel did what was evil in the sight of Yahweh and forgot Yahweh their God. They worshiped the Baals and the Asherahs.
8 Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye.
Therefore, the anger of Yahweh was set on fire against Israel, and he sold them into the hand of Cushan-Rishathaim king of Aram Naharaim. The people of Israel served Cushan-Rishathaim for eight years.
9 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli: Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele.
When the people of Israel called out to Yahweh, Yahweh raised up someone who would come to help the people of Israel, and who would rescue them: Othniel son of Kenaz (Caleb's younger brother).
10 Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli; mpe Otinieli alongaki ye.
Yahweh's Spirit empowered him, and he judged Israel and he went out to war. Yahweh gave him victory over Cushan-Rishathaim king of Aram. The hand of Othniel defeated Cushan-Rishathaim.
11 Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki.
The land had peace for forty years. Then Othniel son of Kenaz died.
12 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele.
After that, the Israelites again did what was evil in the sight of Yahweh, and Yahweh gave strength to Eglon king of Moab to overpower the Israelites.
13 Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila.
Eglon joined with the Ammonites and the Amalekites and they went and defeated Israel, and they took possession of the City of Palms.
14 Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe.
The people of Israel served Eglon the king of Moab for eighteen years.
15 Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.
When the people of Israel called out to Yahweh, Yahweh raised up someone who would help them, Ehud son of Gera, a Benjamite, a left-handed man. The people of Israel sent him, with their tribute payment, to Eglon king of Moab.
16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye.
Ehud made himself a sword that had two edges, one cubit in length; he strapped it on under his clothing on his right thigh.
17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene.
He gave the tribute payment to King Eglon of Moab. (Now Eglon was a very fat man.)
18 Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango.
After Ehud had presented the tribute payment, he left with those who had carried it in.
19 Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye: — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. Mokonzi azongisaki: — Kimia! Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda.
As for Ehud himself, however, when he reached the place where the carved images were made near Gilgal, he turned and went back, and he said, “I have a secret message for you, my king.” Eglon said, “Silence!” So all those serving him left the room.
20 Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye: — Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe.
Ehud came to him. The king was sitting by himself, alone in the coolness of the upper room. Ehud said, “I have a message from God for you.” The king got up out of his seat.
21 Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.
Ehud reached with his left hand and took the sword from his right thigh, and he stabbed it into the king's body.
22 Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi.
The hilt of the sword also went into him following the blade. The tip of the sword came out of his back and the fat closed over it, for Ehud did not pull the sword out of his belly.
23 Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende.
Then Ehud went out on the porch and closed the doors of the upper room behind him and locked them.
24 Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki: — Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako.
After Ehud had gone, the king's servants came; they saw that the doors of the upper room were locked, so they thought, “Surely he is relieving himself in the coolness of the upper room.”
25 Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se.
They were growing more concerned until they felt they were neglecting their duty when the king still did not open the doors to the upper room. So they took the key and opened them, and there lay their master, fallen to the floor, dead.
26 Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira.
While the servants were waiting, wondering what they should do, Ehud escaped and passed beyond the place where there were carved images of idols, and so he escaped to Seirah.
27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.
When he arrived, he blew a trumpet in the hill country of Ephraim. Then the people of Israel went down with him from the hills, and he was leading them.
28 Alobaki na bango: — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi.
He said to them, “Follow me, for Yahweh is about to defeat your enemies, the Moabites.” They followed him and they captured the fords of the Jordan across from the Moabites, and they did not allow anyone to cross the river.
29 Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki.
At that time they killed about ten thousand men of Moab, and all were strong and capable men. Not one escaped.
30 Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe.
So that day Moab was subdued by the strength of Israel, and the land had rest for eighty years.
31 Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.
After Ehud the next judge was Shamgar son of Anath who killed 600 men of the Philistines with a stick used to goad cattle. He also delivered Israel from danger.

< Bilombe 3 >