< Bilombe 2 >

1 Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki: « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki: ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino;
And an angel of the LORD came up from Gilgal to Bochim, and said, I made you to depart from Egypt, and have brought you to the land which I swore to your fathers; and I said, I will never break my covenant with you.
2 mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo?
And ye shall make no league with the inhabitants of this land; ye shall throw down their altars: but ye have not obeyed my voice: why have ye done this?
3 Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »
Therefore I also said, I will not drive them out from before you; but they shall be as thorns in your sides, and their gods shall be a snare to you.
4 Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,
And it came to pass, when the angel of the LORD spoke these words to all the children of Israel, that the people lifted up their voice, and wept.
5 mpe babengaki esika yango Bokimi. Babonzaki kuna bambeka epai na Yawe.
And they called the name of that place Bochim: and they sacrificed there to the LORD.
6 Sima na Jozue kobengana bato, bana ya Isalaele bakendeki kobotola mokili, moto na moto na eteni na ye ya mabele.
And when Joshua had let the people go, the children of Israel went every man to his inheritance to possess the land.
7 Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi.
And the people served the LORD all the days of Joshua, and all the days of the elders that outlived Joshua, who had seen all the great works of the LORD, that he did for Israel.
8 Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama.
And Joshua the son of Nun, the servant of the LORD, died, being an hundred and ten years old.
9 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
And they buried him in the border of his inheritance in Timnathheres, in the mount of Ephraim, on the north side of the hill Gaash.
10 Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.
And also all that generation were gathered to their fathers: and there arose another generation after them, which knew not the LORD, nor yet the works which he had done for Israel.
11 Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala.
And the children of Israel did evil in the sight of the LORD, and served Baalim:
12 Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,
And they forsook the LORD God of their fathers, who brought them out of the land of Egypt, and followed other gods, of the gods of the people that were around them, and bowed themselves to them, and provoked the LORD to anger.
13 pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite.
And they forsook the LORD, and served Baal and Ashtaroth.
14 Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.
And the anger of the LORD was hot against Israel, and he delivered them into the hands of spoilers that spoiled them, and he sold them into the hands of their enemies around them, so that they could not any longer stand before their enemies.
15 Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.
Wherever they went out, the hand of the LORD was against them for evil, as the LORD had said, and as the LORD had sworn to them: and they were greatly distressed.
16 Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi.
Nevertheless the LORD raised up judges, who delivered them out of the hand of those that spoiled them.
17 Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda: nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.
And yet they would not hearken to their judges, but they played the harlot with other gods, and bowed themselves to them: they turned quickly out of the way which their fathers walked in, obeying the commandments of the LORD; but they did not so.
18 Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.
And when the LORD raised up judges for them, then the LORD was with the judge, and delivered them out of the hand of their enemies all the days of the judge: for the LORD repented because of their groanings by reason of them that oppressed them and burdened them.
19 Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.
And it came to pass, when the judge was dead, that they returned, and corrupted themselves more than their fathers, in following other gods to serve them, and to bow down to them; they ceased not from their own doings, nor from their stubborn way.
20 Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki: « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai,
And the anger of the LORD was hot against Israel; and he said, Because that this people hath transgressed my covenant which I commanded their fathers, and have not hearkened to my voice;
21 Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa.
I also will not henceforth drive out from before them any of the nations which Joshua left when he died:
22 Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. »
That through them I may test Israel, whether they will keep the way of the LORD to walk in it, as their fathers kept it, or not.
23 Yawe akabaki te bikolo yango na maboko ya Jozue, asalaki ete etikala; abenganaki yango te mbala moko.
Therefore the LORD left those nations, without driving them out speedily; neither did he deliver them into the hand of Joshua.

< Bilombe 2 >