< Jozue 13 >

1 Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye: « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene.
Now Joshua was old and stricken in years; and the LORD said unto him, You are old and stricken in years, and there remains yet very much land to be possessed.
2 Tala mokili oyo etikali: Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri:
This is the land that yet remains: all the borders of the Philistines, and all Geshuri,
3 etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia: mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni; etuka ya bato ya Avi;
From Sihor, which is before Egypt, even unto the borders of Ekron northward, which is counted to the Canaanite: five lords of the Philistines; the Gazathites, and the Ashdothites, the Eshkalonites, the Gittites, and the Ekronites; also the Avites:
4 mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori;
From the south, all the land of the Canaanites, and Mearah that is beside the Sidonians unto Aphek, to the borders of the Amorites:
5 etuka ya bato ya Gebali; mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati.
And the land of the Giblites, and all Lebanon, toward the sunrising, from Baalgad under mount Hermon unto the entering into Hamath.
6 Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo;
All the inhabitants of the hill country from Lebanon unto Misrephothmaim, and all the Sidonians, them will I drive out from before the children of Israel: only divide you it by lot unto the Israelites for an inheritance, as I have commanded you.
7 mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. »
Now therefore divide this land for an inheritance unto the nine tribes, and the half tribe of Manasseh,
8 Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani.
With whom the Reubenites and the Gadites have received their inheritance, which Moses gave them, beyond Jordan eastward, even as Moses the servant of the LORD gave them;
9 Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni,
From Aroer, that is upon the bank of the river Arnon, and the city that is in the midst of the river, and all the plain of Medeba unto Dibon;
10 mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni.
And all the cities of Sihon king of the Amorites, which reigned in Heshbon, unto the border of the children of Ammon;
11 Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika.
And Gilead, and the border of the Geshurites and Maachathites, and all mount Hermon, and all Bashan unto Salcah;
12 Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango.
All the kingdom of Og in Bashan, which reigned in Ashtaroth and in Edrei, who remained of the remnant of the giants: for these did Moses strike, and cast them out.
13 Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo.
Nevertheless the children of Israel expelled not the Geshurites, nor the Maachathites: but the Geshurites and the Maachathites dwell among the Israelites until this day.
14 Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.
Only unto the tribes of Levi he gave none inheritance; the sacrifices of the LORD God of Israel made by fire are their inheritance, as he said unto them.
15 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango:
And Moses gave unto the tribe of the children of Reuben inheritance according to their families.
16 Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba,
And their coast was from Aroer, that is on the bank of the river Arnon, and the city that is in the midst of the river, and all the plain by Medeba;
17 kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni,
Heshbon, and all her cities that are in the plain; Dibon, and Bamothbaal, and Bethbaalmeon,
18 Yakatsi, Kedemoti, Mefati,
And Jahaza, and Kedemoth, and Mephaath,
19 Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku,
And Kirjathaim, and Sibmah, and Zarethshahar in the mount of the valley,
20 Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti:
And Bethpeor, and Ashdothpisgah, and Bethjeshimoth,
21 bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani: Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye.
And all the cities of the plain, and all the kingdom of Sihon king of the Amorites, which reigned in Heshbon, whom Moses stroke with the princes of Midian, Evi, and Rekem, and Zur, and Hur, and Reba, which were dukes of Sihon, dwelling in the country.
22 Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi.
Balaam also the son of Beor, the fortune teller, did the children of Israel slay with the sword among them that were slain by them.
23 Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango.
And the border of the children of Reuben was Jordan, and the border thereof. This was the inheritance of the children of Reuben after their families, the cities and the villages thereof.
24 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango:
And Moses gave inheritance unto the tribe of Gad, even unto the children of Gad according to their families.
25 Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba;
And their coast was Jazer, and all the cities of Gilead, and half the land of the children of Ammon, unto Aroer that is before Rabbah;
26 mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri;
And from Heshbon unto Ramathmizpeh, and Betonim; and from Mahanaim unto the border of Debir;
27 mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani.
And in the valley, Betharam, and Bethnimrah, and Succoth, and Zaphon, the rest of the kingdom of Sihon king of Heshbon, Jordan and his border, even unto the edge of the sea of Chinnereth on the other side Jordan eastward.
28 Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango.
This is the inheritance of the children of Gad after their families, the cities, and their villages.
29 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango:
And Moses gave inheritance unto the half tribe of Manasseh: and this was the possession of the half tribe of the children of Manasseh by their families.
30 Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba,
And their coast was from Mahanaim, all Bashan, all the kingdom of Og king of Bashan, and all the towns of Jair, which are in Bashan, threescore cities:
31 ndambo ya mokili ya Galadi; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango.
And half Gilead, and Ashtaroth, and Edrei, cities of the kingdom of Og in Bashan, were pertaining unto the children of Machir the son of Manasseh, even to the one half of the children of Machir by their families.
32 Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko.
These are the countries which Moses did distribute for inheritance in the plains of Moab, on the other side Jordan, by Jericho, eastward.
33 Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.
But unto the tribe of Levi Moses gave not any inheritance: the LORD God of Israel was their inheritance, as he said unto them.

< Jozue 13 >