< Yoane 21 >

1 Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango:
Après cela, Jésus se fit encore voir aux disciples près de la mer de Tibériade, et il se fit voir de cette manière:
2 Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko: Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale;
Simon Pierre, et Thomas, appelé Didyme, Nathanaël, qui était de Cana en Galilée, les fils de Zébédée et deux autres de ses disciples étaient ensemble.
3 Simona Petelo alobaki na bango: — Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi! Balobaki na ye: — Biso mpe tokende elongo na yo! Bakendeki mpe bamataki na bwato; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te.
Simon Pierre leur dit: Je vais pêcher. Ils lui dirent: Nous allons aussi avec toi. Ils sortirent, et entrèrent aussitôt dans la barque; mais ils ne prirent rien cette nuit-là.
4 Na tongo makasi, Yesu atelemaki na libongo, kasi bayekoli bayebaki te ete ezali Ye.
Le matin étant venu, Jésus se trouva sur le rivage; mais les disciples ne savaient pas que c'était Jésus.
5 Yesu abengaki bango: — Bana na Ngai! Boni, bozali na mbisi te? Bazongisaki: — Te!
Jésus leur dit: Enfants, n'avez-vous rien à manger? Ils lui répondirent: Non.
6 Alobaki na bango: — Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi. Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele.
Et il leur dit: Jetez le filet du côté droit de la barque, et vous trouverez. Ils le jetèrent donc, et ils ne pouvaient plus le retirer, à cause de la quantité de poissons.
7 Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo: — Bandeko, ezali Nkolo! Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi.
C'est pourquoi le disciple que Jésus aimait, dit à Pierre: C'est le Seigneur! Et Simon Pierre apprenant que c'était le Seigneur, se ceignit de sa robe de dessus (car il était nu), et se jeta à la mer.
8 Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili: bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki.
Mais les autres disciples vinrent avec la barque, traînant le filet plein de poissons, car ils n'étaient éloignés de terre que d'environ deux cents coudées.
9 Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.
Quand ils furent descendus à terre, ils virent de la braise qui était là, et du poisson dessus, et du pain.
10 Yesu alobaki na bango: — Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.
Jésus leur dit: Apportez de ces poissons que vous avez pris maintenant.
11 Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te.
Simon Pierre remonta, et tira le filet à terre, plein de cent cinquante-trois grands poissons, et quoiqu'il y en eût tant, le filet ne se rompit point.
12 Bongo Yesu alobaki na bango: — Boya kolia. Lokola bayekoli bayebaki ete ezali Nkolo, moko te kati na bango amekaki kotuna Ye: « Ozali nani? »
Jésus leur dit: Venez dîner. Et aucun des disciples n'osait lui demander: Qui es-tu? sachant que c'était le Seigneur.
13 Yesu apusanaki, azwaki mapa mpe akabolaki yango kati na bango; asalaki mpe bongo mpo na mbisi.
Jésus donc s'approcha, et prit du pain, et leur en donna, ainsi que du poisson.
14 Ezalaki mbala ya misato oyo Yesu abimelaki bayekoli na Ye sima na kosekwa na Ye kati na bakufi.
C'était déjà la troisième fois que Jésus se faisait voir à ses disciples, après être ressuscité des morts.
15 Tango basilisaki kolia, Yesu atunaki Simona Petelo: — Simona, mwana mobali ya Yoane; boni, olingaka Ngai koleka ndenge bango balingaka Ngai? Azongisaki: — Iyo, Nkolo! Oyebi malamu ete nalingaka Yo. Yesu alobaki na ye: — Batela bampate na Ngai.
Après qu'ils eurent dîné, Jésus dit à Simon Pierre: Simon, fils de Jona, m'aimes-tu plus que ceux-ci? Pierre répondit: Oui, Seigneur, tu sais que je t'aime. Jésus lui dit: Pais mes agneaux.
16 Yesu atunaki ye mpo na mbala ya mibale: — Simona, mwana mobali ya Yoane; boni, olingaka Ngai? Azongisaki: — Iyo, Nkolo! Oyebi malamu ete nalingaka yo! Yesu alobaki na ye: — Batela bampate na Ngai.
Il lui dit une seconde fois: Simon, fils de Jona, m'aimes-tu? Pierre lui répondit: Oui, Seigneur, tu sais que je t'aime. Jésus lui dit: Pais mes brebis.
17 Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato: — Simona, mwana mobali ya Yoane; boni, olingaka Ngai? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye: « Olingaka Ngai? » Bongo azongiselaki Yesu: — Nkolo, oyebi makambo nyonso; oyebi malamu ete nalingaka Yo! Yesu alobaki na ye: — Batela bameme na Ngai.
Il lui dit pour la troisième fois: Simon, fils de Jona, m'aimes-tu? Pierre fut attristé de ce qu'il lui avait dit pour la troisième fois: M'aimes-tu? Et il lui dit: Seigneur, tu connais toutes choses, tu sais que je t'aime. Jésus lui dit: Pais mes brebis.
18 Nazali koloba na yo penza ya solo: tango ozalaki elenge, ozalaki kokanga yo moko mokaba na yo mpe ozalaki kokende na esika nyonso oyo olingi. Kasi tango okokoma mobange, okotanda maboko na yo, mpe ekozala moto mosusu nde akokanga yo mokaba mpe akomema yo na esika oyo yo okolinga kutu kokende te.
En vérité, en vérité je te le dis; lorsque tu étais plus jeune, tu te ceignais toi-même, et tu allais où tu voulais; mais lorsque tu seras vieux, tu étendras tes mains, et un autre te ceindra, et te mènera où tu ne voudrais pas.
19 Yesu alobaki bongo mpo na kotalisa lolenge ya kufa oyo Petelo asengelaki kokufa mpo na nkembo ya Nzambe. Sima na Ye koloba bongo, alobaki na Petelo: — Landa Ngai!
Or, il dit cela pour marquer par quelle mort Pierre glorifierait Dieu. Et après avoir ainsi parlé, il lui dit: Suis-moi.
20 Petelo atalaki na sima mpe amonaki moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga koleka bayekoli mosusu, ye oyo, wana bazalaki kolia, alalelaki Yesu na tolo mpe atunaki Ye: « Nkolo, nani akoteka Yo? » Ye mpe azalaki kolanda bango.
Et Pierre s'étant retourné, vit venir après lui le disciple que Jésus aimait, celui qui, pendant le souper, s'était penché sur le sein de Jésus, et lui avait dit: Seigneur, qui est celui qui te trahit?
21 Tango Petelo amonaki ye, atunaki Yesu: — Nkolo, okanisi nini mpo na ye?
Pierre donc l'ayant vu, dit à Jésus: Seigneur, et celui-ci, que lui arrivera-t-il?
22 Yesu azongisaki: — Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini? Kasi yo, landa Ngai.
Jésus lui dit: Si je veux qu'il demeure jusqu'à ce que je vienne, que t'importe? Toi, suis-moi.
23 Mpo na yango, sango epanzanaki kati na bandeko ete moyekoli yango akokufa te. Nzokande, Yesu alobaki te ete moyekoli wana akokufa te, kasi alobaki nde: « Soki nalingi ete azala kaka na bomoi kino tango nakoya, wana etali yo na nini? »
Le bruit se répandit donc parmi les frères, que ce disciple ne mourrait point. Cependant Jésus ne lui avait pas dit: Il ne mourra point; mais: Si je veux qu'il demeure jusqu'à ce que je vienne, que t'importe?
24 Ezali kutu moyekoli yango nde azali kotatola makambo yango mpe akomaki yango na mokanda. Mpe biso toyebi ete litatoli na ye ezali ya solo.
C'est ce disciple qui rend témoignage de ces choses, et qui les a écrites; et nous savons que son témoignage est véritable.
25 Yesu asalaki lisusu makambo mosusu ebele; soki bakomaki yango na mikanda moko sima na mosusu, nakanisi ete mokili mobimba elingaki kokoka te mpo na kobomba babuku oyo balingaki kokoma.
Il y a encore beaucoup d'autres choses que Jésus a faites, et si elles étaient écrites en détail, je ne pense pas que le monde même pût contenir les livres qu'on en écrirait. Amen.

< Yoane 21 >