< Yoane 17 >

1 Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki: Tata, tango ekoki; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo; 2 pamba te opesaki Ye bokonzi likolo ya bato nyonso, mpo ete apesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo opesaki Ye. (aiōnios g166) 3 Nzokande, bomoi ya seko ezali: koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki. (aiōnios g166) 4 Namonisi nkembo na Yo awa na mokili mpe nasilisi mosala oyo opesaki Ngai. 5 Sik’oyo Tata, pesa Ngai lisusu nkembo oyo nazalaki na yango kuna epai Yo ozali liboso ete okela mokili. 6 Namonisi nkembo na Yo epai ya bato oyo opesaki Ngai sima na Yo kolongola bango na misala ya mokili. Bazalaki bato na Yo, kasi opesaki Ngai bango; mpe batosi Liloba na Yo. 7 Bayebi malamu sik’oyo ete nyonso oyo opesaki Ngai ewutaki solo epai na Yo; 8 pamba te nateyaki bango maloba oyo opesaki Ngai, mpe bayambaki yango na esengo; bayebi ete nawutaki solo epai na Yo, mpe bandimi ete Yo nde otindaki Ngai. 9 Nazali kobondela nde mpo na bango; nazali kobondela te mpo na bato ya mokili, kasi mpo na bato oyo opesaki Ngai, mpo ete bazali bato na Yo. 10 Bato na Yo nyonso bazali bato na Ngai, mpe bato na Ngai nyonso bazali bato na Yo; mpe nkembo na Ngai ezali komonisama kati na bango. 11 Kala mingi te, nakozala lisusu te kati na mokili, pamba te nazali koya epai na Yo; kasi bango, bakokoba kozala kati na mokili. Tata na Ngai, Yo oyo ozali Mosantu, batela bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai, mpo ete bazala moko ndenge Yo na Ngai tozali moko. 12 Wana nazalaki elongo na bango, nabatelaki bango na nguya ya Kombo na Yo, Kombo oyo opesaki Ngai; nabatelaki bango malamu, mpe moko te kati na bango abungaki, longola kaka ye oyo asengeli na libebi mpo ete Makomi ekokisama. 13 Sik’oyo, nazali koya epai na Yo; kasi nazali koloba makambo oyo tango nazali nanu kati na mokili mpo ete esengo na Ngai, oyo ezali ya kokoka, ezala kati na bango. 14 Nateyaki bango maloba oyo oyebisaki Ngai, mpe mokili eyinaki bango mpo ete bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 15 Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana. 16 Bazali bato ya mokili te, ndenge Ngai mpe nazali ya mokili te. 17 Bulisa bango na nzela ya bosolo na Yo, Liloba na Yo ya solo. 18 Ndenge otindaki Ngai kati na mokili, ndenge wana mpe Ngai nazali kotinda bango. 19 Namibonzaki mobimba epai na Yo mpo na bango, mpo ete bango mpe babulisama na nzela ya bosolo. 20 Nazali kobondela mpo na bango kaka te, kasi mpe mpo na bato oyo bakondima Ngai na nzela ya mateya na bango, 21 mpo ete bango nyonso bazala moko ndenge Yo Tata ozali kati na Ngai, mpe Ngai kati na Yo; ete bango mpe bazala moko kati na biso, mpe ete mokili endima ete ezali Yo nde otindaki Ngai. 22 Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko: 23 Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai. 24 Tata, nalingi ete bato oyo opesaki Ngai bazala elongo na Ngai kuna epai nazali kokende, mpo ete bamona nkembo na Ngai, nkembo oyo opesaki Ngai, pamba te olingaki Ngai liboso ete okela mokili. 25 Tata, Yo oyo ozali sembo, mokili eyebi Yo te; kasi Ngai nayebi Yo, mpe bato oyo bayebi ete Yo nde otindaki Ngai. 26 Nalakisi bango nguya ya Kombo na Yo, mpe nakokoba kolakisa bango yango, mpo ete bolingo oyo ozali na yango mpo na Ngai ezala kati na bango, mpe Ngai nazala kati na bango.

< Yoane 17 >