< Joeli 2 >

1 Bobeta kelelo na Siona! Bobelela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule! Tika ete bavandi nyonso ya mokili balenga, pamba te mokolo ya Yawe ezali koya; solo, ekomi penza pene.
σαλπίσατε σάλπιγγι ἐν Σιων κηρύξατε ἐν ὄρει ἁγίῳ μου καὶ συγχυθήτωσαν πάντες οἱ κατοικοῦντες τὴν γῆν διότι πάρεστιν ἡμέρα κυρίου ὅτι ἐγγύς
2 Ezali mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya londende mpe ya mapata ya mwindo. Ndenge pole ya tongo epanzanaka na bangomba, ndenge wana mpe mampinga moko ya basoda ebele mpe ya mpiko ezali koya. Makambo ya boye etikala nanu kosalema te na kala mpe ekotikala kosalema te na mikolo oyo ekoya.
ἡμέρα σκότους καὶ γνόφου ἡμέρα νεφέλης καὶ ὁμίχλης ὡς ὄρθρος χυθήσεται ἐπὶ τὰ ὄρη λαὸς πολὺς καὶ ἰσχυρός ὅμοιος αὐτῷ οὐ γέγονεν ἀπὸ τοῦ αἰῶνος καὶ μετ’ αὐτὸν οὐ προστεθήσεται ἕως ἐτῶν εἰς γενεὰς γενεῶν
3 Liboso na bango, moto ezali kotumba; sima na bango, moto ezali kozikisa. Liboso na bango, mokili ezali lokola elanga ya Edeni, mpe sima na bango, lokola esobe. Solo, ata eloko moko te ekotikala.
τὰ ἔμπροσθεν αὐτοῦ πῦρ ἀναλίσκον καὶ τὰ ὀπίσω αὐτοῦ ἀναπτομένη φλόξ ὡς παράδεισος τρυφῆς ἡ γῆ πρὸ προσώπου αὐτοῦ καὶ τὰ ὄπισθεν αὐτοῦ πεδίον ἀφανισμοῦ καὶ ἀνασῳζόμενος οὐκ ἔσται αὐτῷ
4 Bazali lokola bampunda; bapumbwaka lokola basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
ὡς ὅρασις ἵππων ἡ ὄψις αὐτῶν καὶ ὡς ἱππεῖς οὕτως καταδιώξονται
5 Batambolaka likolo ya basonge ya bangomba na makelele makasi lokola makelele ya bashar, lokola makelele ya matiti oyo ezali kozika, lokola mampinga moko ya basoda ya mpiko oyo babongami mpo na kokende na bitumba.
ὡς φωνὴ ἁρμάτων ἐπὶ τὰς κορυφὰς τῶν ὀρέων ἐξαλοῦνται καὶ ὡς φωνὴ φλογὸς πυρὸς κατεσθιούσης καλάμην καὶ ὡς λαὸς πολὺς καὶ ἰσχυρὸς παρατασσόμενος εἰς πόλεμον
6 Soki bamoni bango, bato ya bikolo bakomaka na somo mpe bilongi nyonso ekawukaka.
ἀπὸ προσώπου αὐτοῦ συντριβήσονται λαοί πᾶν πρόσωπον ὡς πρόσκαυμα χύτρας
7 Bakimaka lokola bilombe, bapumbwaka bamir lokola basoda ya mpiko, batambolaka nzela moko, batengamaka te.
ὡς μαχηταὶ δραμοῦνται καὶ ὡς ἄνδρες πολεμισταὶ ἀναβήσονται ἐπὶ τὰ τείχη καὶ ἕκαστος ἐν τῇ ὁδῷ αὐτοῦ πορεύσεται καὶ οὐ μὴ ἐκκλίνωσιν τὰς τρίβους αὐτῶν
8 Batutanaka te bango na bango, moko na moko alandaka kaka nzela na ye. Badusolaka na kati-kati ya bibundeli ya banguna, mpe eloko moko te ekangaka bango nzela.
καὶ ἕκαστος ἀπὸ τοῦ ἀδελφοῦ αὐτοῦ οὐκ ἀφέξεται καταβαρυνόμενοι ἐν τοῖς ὅπλοις αὐτῶν πορεύσονται καὶ ἐν τοῖς βέλεσιν αὐτῶν πεσοῦνται καὶ οὐ μὴ συντελεσθῶσιν
9 Bawelelaka kokota kati na engumba, bapotaka mbangu pene ya mir, bakotaka na bandako ndenge miyibi bakotaka na nzela ya maninisa.
τῆς πόλεως ἐπιλήμψονται καὶ ἐπὶ τῶν τειχέων δραμοῦνται καὶ ἐπὶ τὰς οἰκίας ἀναβήσονται καὶ διὰ θυρίδων εἰσελεύσονται ὡς κλέπται
10 Mokili eninganaka liboso na bango, Lola elengaka, moyi mpe sanza eyindaka, minzoto etikaka kongenga.
πρὸ προσώπου αὐτῶν συγχυθήσεται ἡ γῆ καὶ σεισθήσεται ὁ οὐρανός ὁ ἥλιος καὶ ἡ σελήνη συσκοτάσουσιν καὶ τὰ ἄστρα δύσουσιν τὸ φέγγος αὐτῶν
11 Yawe azali koganga lokola kake na liboso ya mampinga na Ye. Milongo ya mampinga na Ye etonda na basoda; basoda oyo batosaka mitindo na Ye bazali na nguya. Mokolo ya Yawe ezali monene, ezali somo makasi; nani akoki kotelema na mokolo yango?
καὶ κύριος δώσει φωνὴν αὐτοῦ πρὸ προσώπου δυνάμεως αὐτοῦ ὅτι πολλή ἐστιν σφόδρα ἡ παρεμβολὴ αὐτοῦ ὅτι ἰσχυρὰ ἔργα λόγων αὐτοῦ διότι μεγάλη ἡ ἡμέρα τοῦ κυρίου μεγάλη καὶ ἐπιφανὴς σφόδρα καὶ τίς ἔσται ἱκανὸς αὐτῇ
12 « Ezala sik’oyo, » elobi Yawe, « bozonga epai na Ngai na mitema na bino mobimba, na kokila bilei, na mpinzoli mpe na kolela. »
καὶ νῦν λέγει κύριος ὁ θεὸς ὑμῶν ἐπιστράφητε πρός με ἐξ ὅλης τῆς καρδίας ὑμῶν καὶ ἐν νηστείᾳ καὶ ἐν κλαυθμῷ καὶ ἐν κοπετῷ
13 Bopasola mitema na bino, kasi bilamba na bino te. Bozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, pamba te atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo, abongolaka mokano na Ye ya kotindela bato pasi.
καὶ διαρρήξατε τὰς καρδίας ὑμῶν καὶ μὴ τὰ ἱμάτια ὑμῶν καὶ ἐπιστράφητε πρὸς κύριον τὸν θεὸν ὑμῶν ὅτι ἐλεήμων καὶ οἰκτίρμων ἐστίν μακρόθυμος καὶ πολυέλεος καὶ μετανοῶν ἐπὶ ταῖς κακίαις
14 Nani ayebi soki akoki kobongola makanisi to koyoka mawa mpe kotika na sima na Ye lipamboli, mpo ete bokoka lisusu kobonzela Yawe, Nzambe na bino, makabo ya bambuma to makabo ya masanga ya vino?
τίς οἶδεν εἰ ἐπιστρέψει καὶ μετανοήσει καὶ ὑπολείψεται ὀπίσω αὐτοῦ εὐλογίαν θυσίαν καὶ σπονδὴν κυρίῳ τῷ θεῷ ἡμῶν
15 Bobeta kelelo na Siona! Bopanza sango ya mokolo ya bule ya kokila bilei mpe bobengisa mayangani ya bule.
σαλπίσατε σάλπιγγι ἐν Σιων ἁγιάσατε νηστείαν κηρύξατε θεραπείαν
16 Bosangisa bato, bobulisa mayangani, bosangisa bakambi mpe bana, ezala oyo bazali nanu komela mabele. Tika ete elenge mobali oyo abali sika atika shambre na ye ya libala, mpe elenge mwasi oyo abali sika atika mpe shambre na ye ya libala.
συναγάγετε λαόν ἁγιάσατε ἐκκλησίαν ἐκλέξασθε πρεσβυτέρους συναγάγετε νήπια θηλάζοντα μαστούς ἐξελθάτω νυμφίος ἐκ τοῦ κοιτῶνος αὐτοῦ καὶ νύμφη ἐκ τοῦ παστοῦ αὐτῆς
17 Tika ete Banganga-Nzambe oyo basalelaka Yawe balela na kati-kati ya ndako moke ya kokotela mpe etumbelo. Tika ete baloba: « Oh Yawe, bikisa bato na Yo, kokomisa te libula na Yo eloko ya kotiola to eloko ya maseki kati na bikolo. Mpo na nini bato ya bikolo mosusu baloba: ‹ Wapi Nzambe na bango? › »
ἀνὰ μέσον τῆς κρηπῖδος τοῦ θυσιαστηρίου κλαύσονται οἱ ἱερεῖς οἱ λειτουργοῦντες κυρίῳ καὶ ἐροῦσιν φεῖσαι κύριε τοῦ λαοῦ σου καὶ μὴ δῷς τὴν κληρονομίαν σου εἰς ὄνειδος τοῦ κατάρξαι αὐτῶν ἔθνη ὅπως μὴ εἴπωσιν ἐν τοῖς ἔθνεσιν ποῦ ἐστιν ὁ θεὸς αὐτῶν
18 Yawe akotonda na zuwa mpo na mokili na Ye mpe akoyokela bato na Ye mawa.
καὶ ἐζήλωσεν κύριος τὴν γῆν αὐτοῦ καὶ ἐφείσατο τοῦ λαοῦ αὐτοῦ
19 Yawe akoyanola mpe akoloba na bango: « Nakotindela bino ble, vino ya sika mpe mafuta; bongo bokotonda yango. Nakokomisa bino lisusu te eloko ya kotiola kati na bikolo.
καὶ ἀπεκρίθη κύριος καὶ εἶπεν τῷ λαῷ αὐτοῦ ἰδοὺ ἐγὼ ἐξαποστέλλω ὑμῖν τὸν σῖτον καὶ τὸν οἶνον καὶ τὸ ἔλαιον καὶ ἐμπλησθήσεσθε αὐτῶν καὶ οὐ δώσω ὑμᾶς οὐκέτι εἰς ὀνειδισμὸν ἐν τοῖς ἔθνεσι
20 Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.
καὶ τὸν ἀπὸ βορρᾶ ἐκδιώξω ἀφ’ ὑμῶν καὶ ἐξώσω αὐτὸν εἰς γῆν ἄνυδρον καὶ ἀφανιῶ τὸ πρόσωπον αὐτοῦ εἰς τὴν θάλασσαν τὴν πρώτην καὶ τὰ ὀπίσω αὐτοῦ εἰς τὴν θάλασσαν τὴν ἐσχάτην καὶ ἀναβήσεται ἡ σαπρία αὐτοῦ καὶ ἀναβήσεται ὁ βρόμος αὐτοῦ ὅτι ἐμεγάλυνεν τὰ ἔργα αὐτοῦ
21 Oh mabele, kobanga te, zala na esengo mpe sepela, pamba te Yawe asali makambo minene.
θάρσει γῆ χαῖρε καὶ εὐφραίνου ὅτι ἐμεγάλυνεν κύριος τοῦ ποιῆσαι
22 Banyama ya zamba, bobanga te, pamba te matiti eboti lisusu na elanga, banzete eboti lisusu bambuma; banzete ya figi mpe ya vino eboti bambuma ebele penza.
θαρσεῖτε κτήνη τοῦ πεδίου ὅτι βεβλάστηκεν πεδία τῆς ἐρήμου ὅτι ξύλον ἤνεγκεν τὸν καρπὸν αὐτοῦ ἄμπελος καὶ συκῆ ἔδωκαν τὴν ἰσχὺν αὐτῶν
23 Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.
καὶ τὰ τέκνα Σιων χαίρετε καὶ εὐφραίνεσθε ἐπὶ τῷ κυρίῳ θεῷ ὑμῶν διότι ἔδωκεν ὑμῖν τὰ βρώματα εἰς δικαιοσύνην καὶ βρέξει ὑμῖν ὑετὸν πρόιμον καὶ ὄψιμον καθὼς ἔμπροσθεν
24 Etando oyo batutelaka ble ekotonda na bambuma, banzungu ekotonda na vino mpe na mafuta.
καὶ πλησθήσονται αἱ ἅλωνες σίτου καὶ ὑπερεκχυθήσονται αἱ ληνοὶ οἴνου καὶ ἐλαίου
25 Nakozongisela bino mibu oyo mampinga minene ya mankoko, ya makelele, ya mabanki minene mpe ya bambinzo eliaki: mampinga minene na Ngai oyo natindaki mpo na kobundisa bino.
καὶ ἀνταποδώσω ὑμῖν ἀντὶ τῶν ἐτῶν ὧν κατέφαγεν ἡ ἀκρὶς καὶ ὁ βροῦχος καὶ ἡ ἐρυσίβη καὶ ἡ κάμπη ἡ δύναμίς μου ἡ μεγάλη ἣν ἐξαπέστειλα εἰς ὑμᾶς
26 Bokolia bilei ebele mpe bokotonda, bongo bokokumisa Kombo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo asaleli bino makambo ya kokamwa: bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.
καὶ φάγεσθε ἐσθίοντες καὶ ἐμπλησθήσεσθε καὶ αἰνέσετε τὸ ὄνομα κυρίου τοῦ θεοῦ ὑμῶν ἃ ἐποίησεν μεθ’ ὑμῶν εἰς θαυμάσια καὶ οὐ μὴ καταισχυνθῇ ὁ λαός μου εἰς τὸν αἰῶνα
27 Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele, ete nazali Yawe, Nzambe na bino, mpe ete Nzambe mosusu azali te. Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.
καὶ ἐπιγνώσεσθε ὅτι ἐν μέσῳ τοῦ Ισραηλ ἐγώ εἰμι καὶ ἐγὼ κύριος ὁ θεὸς ὑμῶν καὶ οὐκ ἔστιν ἔτι πλὴν ἐμοῦ καὶ οὐ μὴ καταισχυνθῶσιν οὐκέτι πᾶς ὁ λαός μου εἰς τὸν αἰῶνα
28 Sima na makambo oyo, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola, mibange na bino bakolota bandoto, bilenge na bino bakozwa bimoniseli.
καὶ ἔσται μετὰ ταῦτα καὶ ἐκχεῶ ἀπὸ τοῦ πνεύματός μου ἐπὶ πᾶσαν σάρκα καὶ προφητεύσουσιν οἱ υἱοὶ ὑμῶν καὶ αἱ θυγατέρες ὑμῶν καὶ οἱ πρεσβύτεροι ὑμῶν ἐνύπνια ἐνυπνιασθήσονται καὶ οἱ νεανίσκοι ὑμῶν ὁράσεις ὄψονται
29 Ata mpe kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, nakosopa Molimo na Ngai, na mikolo wana.
καὶ ἐπὶ τοὺς δούλους καὶ ἐπὶ τὰς δούλας ἐν ταῖς ἡμέραις ἐκείναις ἐκχεῶ ἀπὸ τοῦ πνεύματός μου
30 Nakolakisa bino bilembo ya kokamwa, na likolo mpe na mokili: makila, moto mpe makonzi ya milinga.
καὶ δώσω τέρατα ἐν τῷ οὐρανῷ καὶ ἐπὶ τῆς γῆς αἷμα καὶ πῦρ καὶ ἀτμίδα καπνοῦ
31 Moyi ekobongwana molili, mpe sanza ekobongwana makila, liboso ete mokolo ya Yawe ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya somo.
ὁ ἥλιος μεταστραφήσεται εἰς σκότος καὶ ἡ σελήνη εἰς αἷμα πρὶν ἐλθεῖν ἡμέραν κυρίου τὴν μεγάλην καὶ ἐπιφανῆ
32 Bongo moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Yawe akobikisama; pamba te na ngomba Siona mpe na Yelusalemi, ekozala na bato oyo bakobika, kolanda ndenge Yawe alobaki, mpe bato oyo Yawe akobenga bakozala kati na bato oyo bakobika.
καὶ ἔσται πᾶς ὃς ἂν ἐπικαλέσηται τὸ ὄνομα κυρίου σωθήσεται ὅτι ἐν τῷ ὄρει Σιων καὶ ἐν Ιερουσαλημ ἔσται ἀνασῳζόμενος καθότι εἶπεν κύριος καὶ εὐαγγελιζόμενοι οὓς κύριος προσκέκληται

< Joeli 2 >