< Yobo 9 >

1 Yobo azongisaki:
And Job, responding, said:
2 « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe?
Truly, I know that it is so, and that man cannot be justified compared with God.
3 Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.
If he chooses to contend with him, he is not able to respond to him once out of a thousand times.
4 Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu?
He is understanding in heart and mighty in strength; who has resisted him and yet had peace?
5 Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango;
He has moved mountains, and those whom he overthrew in his fury did not know it.
6 aningisaka mabele wuta na esika na yango mpe alengisaka makonzi na yango;
He shakes the earth out of its place and its pillars tremble.
7 apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te; atiaka kashe na minzoto.
He commands the sun and it does not rise, and he closes the stars as if under a seal.
8 Atandaki Ye moko Likolo mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale;
He alone extends the heavens, and he walks upon the waves of the sea.
9 akelaki bangombolo minene, orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude;
He fashions Arcturus, and Orion, and Hyades, and the interior of the south.
10 asalaka makambo minene oyo elekelaka mayele ya bato, bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te.
He accomplishes great and incomprehensible and miraculous things, which cannot be numbered.
11 Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye; soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.
If he approaches me, I will not see him; if he departs, I will not understand.
12 Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango? Nani akoki koloba na Ye: ‹ Ozali kosala nini? ›
If he suddenly should question, who will answer him? Or who can say, “Why did you do so?”
13 Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.
God, whose wrath no one is able to resist, and under whom they bend who carry the world,
14 Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye? Nakolonga ndenge nini kopona maloba ya komekana na Ye?
what am I then, that I should answer him and exchange words with him?
15 Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.
And if I now have any justice, I will not respond, but will beseech my judge.
16 Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,
And if he should listen to me when I call, I would not believe that he had heard my voice.
17 pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,
For he will crush me in a whirlwind and multiply my wounds, even without cause.
18 aboyi kotikela ngai tango ya kopema, wana azali kaka kotondisa ngai na pasi.
He does not permit my spirit to rest, and he fills me with bitterness.
19 Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye?
If strength is sought, he is most strong; if equity in judgment, no one would dare to give testimony for me.
20 Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.
If I wanted to justify myself, my own mouth will condemn me; if I would reveal my innocence, he would prove me depraved.
21 Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.
And if I now became simple, my soul would be ignorant even of this, and my life would weary me.
22 Nyonso ezali kaka ndenge moko! Yango wana nalobi: ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›
There is one thing that I have said: both the innocent and the impious he consumes.
23 Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.
If he scourges, let him kill all at once, and not laugh at the punishment of the innocent.
24 Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani?
Since the earth has been given into the hand of the impious, he covers the face of its judges; for if it is not him, then who is it?
25 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.
My days have been swifter than a messenger; they have fled and have not seen goodness.
26 Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.
They have passed by like ships carrying fruits, just like an eagle flying to food.
27 Soki nalobi: ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
If I say: “By no means will I speak this way.” I change my face and I am tortured with sorrow.
28 nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.
I have dreaded all my works, knowing that you did not spare the offender.
29 Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba?
Yet, if I am also just as impious, why have I labored in vain?
30 Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,
If I had been washed with snow-like waters, and my hands were shining like the cleanest thing,
31 okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.
yet you would plunge me in filth, and my own garments would abhor me.
32 Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
For even I would not answer a man who were like myself, nor one who could be heard with me equally in judgment.
33 Soki ezalaki ata na moto moko oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe,
There is no one who could both prevail in argument and in placing his hand between the two.
34 moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
Let him take his staff away from me, and let not the fear of him terrify me.
35 nalingaki kotombola mongongo na ngai liboso na Ye na kobanga te. Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.
I will speak and I will not fear him, for in fearfulness I am not able to respond.

< Yobo 9 >