< Yobo 6 >

1 Yobo azongisaki:
Respondens autem Iob, dixit:
2 « Ah! Soki ezalaki na makoki ya komeka kilo ya mawa na ngai, mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo,
Utinam appenderentur peccata mea, quibus iram merui: et calamitas, quam patior, in statera.
3 nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo.
Quasi arena maris hæc gravior appareret: unde et verba mea dolore sunt plena:
4 Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.
Quia sagittæ Domini in me sunt, quarum indignatio ebibit spiritum meum, et terrores Domini militant contra me.
5 Boni, ane ya zamba elelaka soki ezali kolia matiti? Ngombe ya mobali elelaka soki ezali kolia bilei na yango?
Numquid rugiet onager cum habuerit herbam? aut mugiet bos cum ante præsepe plenum steterit?
6 Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi? Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi?
Aut poterit comedi insulsum, quod non est sale conditum? aut potest aliquis gustare, quod gustatum affert mortem?
7 Makambo oyo nazalaki koboya, yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe.
Quæ prius nolebat tangere anima mea, nunc præ angustia, cibi mei sunt.
8 Ah! Nani akoki kosala ete bosenga na ngai ekokisama, mpe ete Nzambe akokisela ngai likambo oyo nazali kozela!
Quis det ut veniat petitio mea: et quod expecto, tribuat mihi Deus?
9 Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto!
Et qui cœpit, ipse me conterat: solvat manum suam, et succidat me?
10 Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu.
Et hæc mihi sit consolatio ut affligens me dolore, non parcat, nec contradicam sermonibus Sancti.
11 Makasi nini penza nazali na yango mpo ete nazala lisusu na elikya? Mpo na nini nawumela lisusu kotala suka ya bomoi na ngai?
Quæ est enim fortitudo mea ut sustineam? aut quis finis meus, ut patienter agam?
12 Boni, nazali makasi lokola libanga? Nzoto na ngai ezali ya ebende?
Nec fortitudo lapidum fortitudo mea, nec caro mea ænea est.
13 Nazali na nguya ya komisunga awa natikali lisusu na makoki te?
Ecce, non est auxilium mihi in me, et necessarii quoque mei recesserunt a me.
14 Moto nyonso oyo azali na pasi asengeli na mawa ya baninga na ye, ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
Qui tollit ab amico suo misericordiam, timorem Domini derelinquit.
15 Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, lokola mayi ya moluka oyo ekawuki.
Fratres mei præterierunt me, sicut torrens qui raptim transit in convallibus.
16 Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, mpe mvula ya pembe, epanzanaka, ememaka mpela.
Qui timent pruinam, irruet super eos nix.
17 Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, mpe moluka yango ekawukaka nyonso mpo na molunge makasi.
Tempore, quo fuerint dissipati, peribunt: et ut incaluerit, solventur de loco suo.
18 Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.
Involutæ sunt semitæ gressuum eorum: ambulabunt in vacuum, et peribunt.
19 Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, elukaki mayi; masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, etielaki yango motema.
Considerate semitas Thema, itinera Saba, et expectate paulisper.
20 Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema; tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa.
Confusi sunt, quia speravi: venerunt quoque usque ad me, et pudore cooperti sunt.
21 Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, bozali na makoki te ya kosunga ngai; awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino!
Nunc venistis: et modo videntes plagam meam timetis.
22 Boni, nasila koloba na bino: ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino,
Numquid dixi: Afferte mihi, et de substantia vestra donate mihi?
23 mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe? ›
Vel, Liberate me de manu hostis, et de manu robustorum eruite me?
24 Boteya ngai, bongo nakokanga monoko; bolakisa ngai mabe nini ngai nasali!
Docete me, et ego tacebo: et siquid forte ignoravi, instruite me.
25 Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini?
Quare detraxistis sermonibus veritatis, cum e vobis nullus sit qui possit arguere me?
26 Bokanisi ete bokoki kosembola makambo oyo nazali koloba to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi?
Ad increpandum tantum eloquia concinnatis, et in ventum verba profertis.
27 Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike mpe koteka moninga na bino na bowumbu!
Super pupillum irruitis, et subvertere nitimini amicum vestrum.
28 Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai! Boni, nakoki penza kokosa bino, kaka na miso makasi boye?
Verumtamen quod cœpistis explete: præbete aurem, et videte an mentiar.
29 Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo! Bokanisa penza malamu, pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami.
Respondete obsecro absque contentione: et loquentes id quod iustum est, iudicate.
30 Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai; monoko na ngai ekoki kososola mabe te?
Et non invenietis in lingua mea iniquitatem, nec in faucibus meis stultitia personabit.

< Yobo 6 >