< Yobo 41 >

1 Boni, okoki koloba ngando na ndobo? Okoki kokanga lolemo na yango na singa?
an extrahere poteris Leviathan hamo et fune ligabis linguam eius
2 Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo? Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo?
numquid pones circulum in naribus eius et armilla perforabis maxillam eius
3 Boni, ekobondela yo mingi? Ekoloba na yo maloba ya boboto?
numquid multiplicabit ad te preces aut loquetur tibi mollia
4 Ekoki kosala boyokani elongo na yo mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela?
numquid feriet tecum pactum et accipies eum servum sempiternum
5 Okoki kosakana na yango lokola ndeke? Okoki kokanga yango na singa mpo na kosepelisa bana na yo ya basi?
numquid inludes ei quasi avi aut ligabis illum ancillis tuis
6 Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo? Bakoki kokabola yango epai ya bateki?
concident eum amici divident illum negotiatores
7 Okoki kotobola mokongo na yango na makonga? Okoki kotobola moto na yango na ndobo oyo bakangelaka bambisi?
numquid implebis sagenas pelle eius et gurgustium piscium capite illius
8 Tia loboko na yo na likolo na yango: soki okanisi etumba oyo okutani na yango, okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango.
pone super eum manum tuam memento belli nec ultra addas loqui
9 Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba; soki kaka omoni yango, okweyi na somo.
ecce spes eius frustrabitur eum et videntibus cunctis praecipitabitur
10 Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango; boye nani akoki kotelemela ngai?
non quasi crudelis suscitabo eum quis enim resistere potest vultui meo
11 Nani adefisaki ngai eloko mpo ete nafuta niongo na ye? Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai.
quis ante dedit mihi ut reddam ei omnia quae sub caelo sunt mea sunt
12 Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela biteni na yango ya nzoto, makasi na yango mpe kitoko ya nzoto na yango.
non parcam ei et verbis potentibus et ad deprecandum conpositis
13 Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto? Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango?
quis revelavit faciem indumenti eius et in medium oris eius quis intrabit
14 Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango? Minu na yango etonda na somo.
portas vultus eius quis aperiet per gyrum dentium eius formido
15 Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba, ekangama elongo na ezipelo ya mabanga.
corpus illius quasi scuta fusilia et conpactum squamis se prementibus
16 Ekangama moko na mosusu, mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te.
una uni coniungitur et ne spiraculum quidem incedit per eas
17 Ekangama moko na mosusu, esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te.
una alteri adherebunt et tenentes se nequaquam separabuntur
18 Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole; mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo.
sternutatio eius splendor ignis et oculi eius ut palpebrae diluculi
19 Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.
de ore eius lampades procedunt sicut taedae ignis accensae
20 Milinga ebimaka na zolo na yango lokola na mbeki oyo ezali kotoka to lokola nzungu ya ebende ya moto.
de naribus eius procedit fumus sicut ollae succensae atque ferventis
21 Pema na yango epelisaka makala ya moto, lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango.
halitus eius prunas ardere facit et flamma de ore eius egreditur
22 Makasi na yango evandi na kingo na yango, mpe somo ebimaka liboso na yango.
in collo eius morabitur fortitudo et faciem eius praecedet egestas
23 Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo, elendisama makasi mpe eninganaka te.
membra carnium eius coherentia sibi mittet contra eum fulmina et ad locum alium non ferentur
24 Motema na yango ezali makasi lokola libanga, makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma.
cor eius indurabitur quasi lapis et stringetur quasi malleatoris incus
25 Soki etelemi, bato ya makasi babangaka, mpe somo ekimisaka bango.
cum sublatus fuerit timebunt angeli et territi purgabuntur
26 Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli, ekosala yango eloko te.
cum adprehenderit eum gladius subsistere non poterit neque hasta neque torax
27 Emonaka ebende lokola lititi, bronze lokola nzete epola.
reputabit enim quasi paleas ferrum et quasi lignum putridum aes
28 Mbanzi ekimisaka yango te, mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga ezali lokola poso ya loso mpo na yango.
non fugabit eum vir sagittarius in stipulam versi sunt ei lapides fundae
29 Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike.
quasi stipulam aestimabit malleum et deridebit vibrantem hastam
30 Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.
sub ipso erunt radii solis sternet sibi aurum quasi lutum
31 Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi oyo ezali kotoka na nzungu, ekomisaka ebale monene lokola nzungu oyo batokiselaka malasi.
fervescere faciet quasi ollam profundum mare ponet quasi cum unguenta bulliunt
32 Engengisaka nzela na sima na yango lokola suki ya pembe likolo ya mayi.
post eum lucebit semita aestimabit abyssum quasi senescentem
33 Na mokili, nyama moko te ekokani na yango; mpe ebangaka te.
non est super terram potestas quae conparetur ei qui factus est ut nullum timeret
34 Ebangaka te kobundisa banyama minene, ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. »
omne sublime videt ipse est rex super universos filios superbiae

< Yobo 41 >