< Yobo 38 >

1 Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi:
Then the LORD answered Job out of the whirlwind, and said,
2 « Nani azali kobebisa mabongisi na ngai na maloba ezanga tina?
Who is this that darkens counsel by words without knowledge?
3 Lata mokaba na yo lokola elombe mobali; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.
Gird up now your loins like a man; for I will demand of you, and answer you me.
4 Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele? Yebisa ngai soki ozali mayele.
Where were you when I laid the foundations of the earth? declare, if you have understanding.
5 Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye? Nani amekaki molayi na yango na singa?
Who has laid the measures thereof, if you know? or who has stretched the line upon it?
6 Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini? Nani atiaki libanga na yango ya songe,
Whereupon are the foundations thereof fastened? or who laid the corner stone thereof;
7 tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo?
When the morning stars sang together, and all the sons of God shouted for joy?
8 Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi tango yango ebimaki wuta na mabele,
Or who shut up the sea with doors, when it brake forth, as if it had issued out of the womb?
9 tango nakomisaki mapata elamba na yango, mpe molili, singa ya kokangela yango,
When I made the cloud the garment thereof, and thick darkness a swaddling band for it,
10 tango natielaki yango bandelo, tango natielaki yango bikuke ya makasi,
And brake up for it my decreed place, and set bars and doors,
11 tango nalobaki: ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo? ›
And said, Until now shall you come, but no further: and here shall your proud waves be stayed?
12 Boni, osili kopesa tongo mitindo to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
Have you commanded the morning since your days; and caused the dayspring to know his place;
13 mpo ete esimba bandelo ya mokili mpe ebimisa bato mabe?
That it might take hold of the ends of the earth, that the wicked might be shaken out of it?
14 Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.
It is turned as clay to the seal; and they stand as a garment.
15 Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.
And from the wicked their light is withheld, and the high arm shall be broken.
16 Osila kokoma kino na etima ya ebale monene? Osila kotambola na se ya libulu ya molili?
Have you entered into the springs of the sea? or have you walked in the search of the depth?
17 Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa?
Have the gates of death been opened unto you? or have you seen the doors of the shadow of death?
18 Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili? Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso.
Have you perceived the breadth of the earth? declare if you know it all.
19 Wapi nzela oyo ememaka na pole? Bongo molili ezalaka wapi
Where is the way where light dwells? and as for darkness, where is the place thereof,
20 mpo ete omema yango na bisika na yango mpe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka?
That you should take it to the bound thereof, and that you should know the paths to the house thereof?
21 Solo, oyebi yango malamu, pamba te osilaki kobotama mpe motuya ya mikolo na yo ezali ebele.
Know you it, because you were then born? or because the number of your days is great?
22 Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga?
Have you entered into the treasures of the snow? or have you seen the treasures of the hail,
23 Nabombaki yango mpo na tango ya pasi mpe mpo na mikolo ya bitumba.
Which I have reserved against the time of trouble, against the day of battle and war?
24 Na nzela nini pole ebimaka mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka?
By what way is the light parted, which scatters the east wind upon the earth?
25 Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
Who has divided a watercourse for the overflowing of waters, or a way for the lightning of thunder;
26 mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato, na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,
To cause it to rain on the earth, where no man is; on the wilderness, wherein there is no man;
27 mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu?
To satisfy the desolate and waste ground; and to cause the bud of the tender herb to spring forth?
28 Boni, mvula ezali nde na tata? Nani abotaki matanga ya mamwe?
Has the rain a father? or who has begotten the drops of dew?
29 Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga? Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo?
Out of whose womb came the ice? and the hoary frost of heaven, who has gendered it?
30 Tango nini mayi ekomaka libanga mpe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga?
The waters are hid as with a stone, and the face of the deep is frozen.
31 Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko to kofungola basinga ya Minzoto minei?
Can you bind the sweet influences of Pleiades, or loose the bands of Orion?
32 Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake na tango na yango mpe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango?
Can you bring forth Mazzaroth in his season? or can you guide Arcturus with his sons?
33 Oyebi mibeko ya likolo? Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili?
Know you the ordinances of heaven? can you set the dominion thereof in the earth?
34 Okoki kotombola mongongo na yo na mapata mpo ete mayi ebele ezipa yo?
Can you lift up your voice to the clouds, that abundance of waters may cover you?
35 Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango mpe eloba na yo: ‹ Tala biso oyo? ›
Can you send lightnings, that they may go and say unto you, Here we are?
36 Nani atia bwanya na motema ya moto to nani apesa soso mayele?
Who has put wisdom in the inward parts? or who has given understanding to the heart?
37 Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata mpe kosopa mayi ya nzungu ya likolo
Who can number the clouds in wisdom? or who can stay the bottles of heaven,
38 mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto mpe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko?
When the dust grows into hardness, and the clods cleave fast together?
39 Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi mpe kosilisa nzala ya bana na yango
Will you hunt the prey for the lion? or fill the appetite of the young lions,
40 tango elalaka kati na mabulu na yango mpe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele?
When they couch in their dens, and abide in the covert to lie in wait?
41 Nani abongiselaka yanganga bilei tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei?
Who provides for the raven his food? when his young ones cry unto God, they wander for lack of food.

< Yobo 38 >