< Yobo 34 >

1 Eliwu azwaki maloba mpe alobaki:
ὑπολαβὼν δὲ Ελιους λέγει
2 « Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai; bino bato ya mayele, boyoka ngai!
ἀκούσατέ μου σοφοί ἐπιστάμενοι ἐνωτίζεσθε τὸ καλόν
3 Pamba te litoyi nde esosolaka maloba ndenge lolemo emekaka bilei.
ὅτι οὖς λόγους δοκιμάζει καὶ λάρυγξ γεύεται βρῶσιν
4 Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo, toyekola elongo makambo oyo ezali malamu.
κρίσιν ἑλώμεθα ἑαυτοῖς γνῶμεν ἀνὰ μέσον ἑαυτῶν ὅ τι καλόν
5 Tala makambo oyo Yobo azali koloba: ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
ὅτι εἴρηκεν Ιωβ δίκαιός εἰμι ὁ κύριος ἀπήλλαξέν μου τὸ κρίμα
6 Atako nazali sembo, bazali kozwa ngai lokola mokosi; atako nasali mabe te, likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. ›
ἐψεύσατο δὲ τῷ κρίματί μου βίαιον τὸ βέλος μου ἄνευ ἀδικίας
7 Nani azali lokola Yobo, oyo amelaka kotiolama lokola mayi?
τίς ἀνὴρ ὥσπερ Ιωβ πίνων μυκτηρισμὸν ὥσπερ ὕδωρ
8 Atambolaka elongo na banyokoli ya bato, asanganaka na bato mabe.
οὐχ ἁμαρτὼν οὐδὲ ἀσεβήσας ἢ ὁδοῦ κοινωνήσας μετὰ ποιούντων τὰ ἄνομα τοῦ πορευθῆναι μετὰ ἀσεβῶν
9 Pamba te alobi: ‹ Ezali na litomba te epai na moto, na koluka kosepelisa Nzambe. ›
μὴ γὰρ εἴπῃς ὅτι οὐκ ἔσται ἐπισκοπὴ ἀνδρός καὶ ἐπισκοπὴ αὐτῷ παρὰ κυρίου
10 Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai! Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe; ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala makambo oyo ezangi bosembo.
διό συνετοὶ καρδίας ἀκούσατέ μου μή μοι εἴη ἔναντι κυρίου ἀσεβῆσαι καὶ ἔναντι παντοκράτορος ταράξαι τὸ δίκαιον
11 Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye.
ἀλλὰ ἀποδιδοῖ ἀνθρώπῳ καθὰ ποιεῖ ἕκαστος αὐτῶν καὶ ἐν τρίβῳ ἀνδρὸς εὑρήσει αὐτόν
12 Te, Nzambe akoki kosala mabe te, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te.
οἴῃ δὲ τὸν κύριον ἄτοπα ποιήσειν ἢ ὁ παντοκράτωρ ταράξει κρίσιν
13 Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili? Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba?
ὃς ἐποίησεν τὴν γῆν τίς δέ ἐστιν ὁ ποιῶν τὴν ὑπ’ οὐρανὸν καὶ τὰ ἐνόντα πάντα
14 Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, mpe soki abatelaki kati na Ye moko molimo na Ye mpe pema na Ye,
εἰ γὰρ βούλοιτο συνέχειν καὶ τὸ πνεῦμα παρ’ αὐτῷ κατασχεῖν
15 bato nyonso balingaki kokufa elongo, mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu.
τελευτήσει πᾶσα σὰρξ ὁμοθυμαδόν πᾶς δὲ βροτὸς εἰς γῆν ἀπελεύσεται ὅθεν καὶ ἐπλάσθη
16 Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo; yoka makambo oyo nazali koloba.
εἰ δὲ μὴ νουθετῇ ἄκουε ταῦτα ἐνωτίζου φωνὴν ῥημάτων
17 Boni, moto oyo ayinaka bosembo akoki solo kozala mokonzi? Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo mpe Nkolo-Na-Nguya?
ἰδὲ σὺ τὸν μισοῦντα ἄνομα καὶ τὸν ὀλλύντα τοὺς πονηροὺς ὄντα αἰώνιον δίκαιον
18 Ezali Ye nde alobaka na bakonzi: ‹ Bozali bato pamba, › mpe na bato ya lokumu: ‹ Bozali bato mabe? ›
ἀσεβὴς ὁ λέγων βασιλεῖ παρανομεῖς ἀσεβέστατε τοῖς ἄρχουσιν
19 Aponaka bilongi ya bakambi te, mpe asalelaka bazwi bolamu te mpo na bozwi na bango koleka babola, pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye.
ὃς οὐκ ἐπῃσχύνθη πρόσωπον ἐντίμου οὐδὲ οἶδεν τιμὴν θέσθαι ἁδροῖς θαυμασθῆναι πρόσωπα αὐτῶν
20 Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu; bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, bato ya nguya bazali kolongwa atako loboko ya moto etindiki bango te.
κενὰ δὲ αὐτοῖς ἀποβήσεται τὸ κεκραγέναι καὶ δεῖσθαι ἀνδρός ἐχρήσαντο γὰρ παρανόμως ἐκκλινομένων ἀδυνάτων
21 Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, amonaka etamboli na bango nyonso.
αὐτὸς γὰρ ὁρατής ἐστιν ἔργων ἀνθρώπων λέληθεν δὲ αὐτὸν οὐδὲν ὧν πράσσουσιν
22 Ezala molili, ezala libulu ya kufa, eloko moko te ekoki kobomba bato mabe.
οὐδὲ ἔσται τόπος τοῦ κρυβῆναι τοὺς ποιοῦντας τὰ ἄνομα
23 Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.
ὅτι οὐκ ἐπ’ ἄνδρα θήσει ἔτι ὁ γὰρ κύριος πάντας ἐφορᾷ
24 Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te mpe atiaka bato mosusu na esika na bango.
ὁ καταλαμβάνων ἀνεξιχνίαστα ἔνδοξά τε καὶ ἐξαίσια ὧν οὐκ ἔστιν ἀριθμός
25 Pamba te ayebi misala na bango, akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami.
ὁ γνωρίζων αὐτῶν τὰ ἔργα καὶ στρέψει νύκτα καὶ ταπεινωθήσονται
26 Apesaka bango etumbu lokola bato mabe na esika oyo bato nyonso bakoki komona,
ἔσβεσεν δὲ ἀσεβεῖς ὁρατοὶ δὲ ἐναντίον αὐτοῦ
27 pamba te baboyaki kolanda Ye mpe kososola banzela na Ye.
ὅτι ἐξέκλιναν ἐκ νόμου θεοῦ δικαιώματα δὲ αὐτοῦ οὐκ ἐπέγνωσαν
28 Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.
τοῦ ἐπαγαγεῖν ἐπ’ αὐτὸν κραυγὴν πένητος καὶ κραυγὴν πτωχῶν εἰσακούσεται
29 Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye? Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye? Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato
καὶ αὐτὸς ἡσυχίαν παρέξει καὶ τίς καταδικάσεται καὶ κρύψει πρόσωπον καὶ τίς ὄψεται αὐτόν καὶ κατὰ ἔθνους καὶ κατὰ ἀνθρώπου ὁμοῦ
30 mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te mpe batiela bato mitambo te.
βασιλεύων ἄνθρωπον ὑποκριτὴν ἀπὸ δυσκολίας λαοῦ
31 Soki moto moko alobi na Nzambe: ‹ Nasali mabe, nazwi etumbu ya masumu na ngai, kasi nakosala lisusu mabe te.
ὅτι πρὸς τὸν ἰσχυρὸν ὁ λέγων εἴληφα οὐκ ἐνεχυράσω
32 Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te; soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. ›
ἄνευ ἐμαυτοῦ ὄψομαι σὺ δεῖξόν μοι εἰ ἀδικίαν ἠργασάμην οὐ μὴ προσθήσω
33 Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu? Nayebi ete ondimi na yo te. Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te! Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi.
μὴ παρὰ σοῦ ἀποτείσει αὐτήν ὅτι ἀπώσῃ ὅτι σὺ ἐκλέξῃ καὶ οὐκ ἐγώ καὶ τί ἔγνως λάλησον
34 Bato ya mayele mpe bato ya bwanya oyo bazali koyoka ngai balobaki:
διὸ συνετοὶ καρδίας ἐροῦσιν ταῦτα ἀνὴρ δὲ σοφὸς ἀκήκοέν μου τὸ ῥῆμα
35 ‹ Yobo azali koloba na boyebi te, maloba na ye ezali na tina te. ›
Ιωβ δὲ οὐκ ἐν συνέσει ἐλάλησεν τὰ δὲ ῥήματα αὐτοῦ οὐκ ἐν ἐπιστήμῃ
36 Oh! Tika ete Yobo asambisama kino na suka mpo ete apesa biyano lokola moto mabe!
οὐ μὴν δὲ ἀλλὰ μάθε Ιωβ μὴ δῷς ἔτι ἀνταπόκρισιν ὥσπερ οἱ ἄφρονες
37 Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, azali kotia tembe kati na biso mpe azali kokoba kobakisa maloba mpo na kotelemela Nzambe. »
ἵνα μὴ προσθῶμεν ἐφ’ ἁμαρτίαις ἡμῶν ἀνομία δὲ ἐφ’ ἡμῖν λογισθήσεται πολλὰ λαλούντων ῥήματα ἐναντίον τοῦ κυρίου

< Yobo 34 >