< Yobo 28 >

1 Ezali na esika oyo batimolaka palata, mpe na esika oyo bapetolaka wolo.
ἔστιν γὰρ ἀργυρίῳ τόπος ὅθεν γίνεται τόπος δὲ χρυσίῳ ὅθεν διηθεῖται
2 Ebende ewutaka na mabele, mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako.
σίδηρος μὲν γὰρ ἐκ γῆς γίνεται χαλκὸς δὲ ἴσα λίθῳ λατομεῖται
3 Moto asilisaka molili, alukaka kino na se, na bisika ya se penza, libanga kati na molili oyo eleki makasi,
τάξιν ἔθετο σκότει καὶ πᾶν πέρας αὐτὸς ἐξακριβάζεται λίθος σκοτία καὶ σκιὰ θανάτου
4 atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, adiembelaka mosika ya bato nyonso.
διακοπὴ χειμάρρου ἀπὸ κονίας οἱ δὲ ἐπιλανθανόμενοι ὁδὸν δικαίαν ἠσθένησαν ἐκ βροτῶν
5 Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango lokola nde moto ezikisi yango.
γῆ ἐξ αὐτῆς ἐξελεύσεται ἄρτος ὑποκάτω αὐτῆς ἐστράφη ὡσεὶ πῦρ
6 Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele.
τόπος σαπφείρου οἱ λίθοι αὐτῆς καὶ χῶμα χρυσίον αὐτῷ
7 Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, miso ya mpongo moko te emoni yango,
τρίβος οὐκ ἔγνω αὐτὴν πετεινόν καὶ οὐ παρέβλεψεν αὐτὴν ὀφθαλμὸς γυπός
8 nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, mpe nkosi etambola nanu kuna te.
οὐκ ἐπάτησαν αὐτὴν υἱοὶ ἀλαζόνων οὐ παρῆλθεν ἐπ’ αὐτῆς λέων
9 Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi mpe apikolaka ngomba longwa na misisa,
ἐν ἀκροτόμῳ ἐξέτεινεν χεῖρα αὐτοῦ κατέστρεψεν δὲ ἐκ ῥιζῶν ὄρη
10 atimolaka nzela kati na mabanga, mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso,
δίνας δὲ ποταμῶν ἔρρηξεν πᾶν δὲ ἔντιμον εἶδέν μου ὁ ὀφθαλμός
11 akawusaka mayi ya bibale mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama.
βάθη δὲ ποταμῶν ἀνεκάλυψεν ἔδειξεν δὲ ἑαυτοῦ δύναμιν εἰς φῶς
12 Kasi bakoki komona bwanya wapi? Mayele evandaka wapi?
ἡ δὲ σοφία πόθεν εὑρέθη ποῖος δὲ τόπος ἐστὶν τῆς ἐπιστήμης
13 Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.
οὐκ οἶδεν βροτὸς ὁδὸν αὐτῆς οὐδὲ μὴ εὑρεθῇ ἐν ἀνθρώποις
14 Libulu ya mozindo elobi: « Ezali kati na ngai te; » mpe ebale monene elobi: « Ezali epai na ngai te. »
ἄβυσσος εἶπεν οὐκ ἔστιν ἐν ἐμοί καὶ θάλασσα εἶπεν οὐκ ἔστιν μετ’ ἐμοῦ
15 Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata;
οὐ δώσει συγκλεισμὸν ἀντ’ αὐτῆς καὶ οὐ σταθήσεται ἀργύριον ἀντάλλαγμα αὐτῆς
16 bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri;
καὶ οὐ συμβασταχθήσεται χρυσίῳ Ωφιρ ἐν ὄνυχι τιμίῳ καὶ σαπφείρῳ
17 wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko.
οὐκ ἰσωθήσεται αὐτῇ χρυσίον καὶ ὕαλος καὶ τὸ ἄλλαγμα αὐτῆς σκεύη χρυσᾶ
18 Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo.
μετέωρα καὶ γαβις οὐ μνησθήσεται καὶ ἕλκυσον σοφίαν ὑπὲρ τὰ ἐσώτατα
19 Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto.
οὐκ ἰσωθήσεται αὐτῇ τοπάζιον Αἰθιοπίας χρυσίῳ καθαρῷ οὐ συμβασταχθήσεται
20 Boye, bwanya ewutaka wapi? Mayele evandaka wapi?
ἡ δὲ σοφία πόθεν εὑρέθη ποῖος δὲ τόπος ἐστὶν τῆς συνέσεως
21 Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo.
λέληθεν πάντα ἄνθρωπον καὶ ἀπὸ πετεινῶν τοῦ οὐρανοῦ ἐκρύβη
22 Libebi mpe kufa elobi: « Kaka sango na yango nde ekomaki na matoyi na biso. »
ἡ ἀπώλεια καὶ ὁ θάνατος εἶπαν ἀκηκόαμεν δὲ αὐτῆς τὸ κλέος
23 Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka.
ὁ θεὸς εὖ συνέστησεν αὐτῆς τὴν ὁδόν αὐτὸς δὲ οἶδεν τὸν τόπον αὐτῆς
24 Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola.
αὐτὸς γὰρ τὴν ὑπ’ οὐρανὸν πᾶσαν ἐφορᾷ εἰδὼς τὰ ἐν τῇ γῇ πάντα ἃ ἐποίησεν
25 Tango apesaki makasi na mopepe mpe atiaki mondelo na mayi,
ἀνέμων σταθμὸν ὕδατός τε μέτρα
26 tango atiaki mobeko mpo na mvula mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali,
ὅτε ἐποίησεν οὕτως ὑετὸν ἠρίθμησεν καὶ ὁδὸν ἐν τινάγματι φωνάς
27 amonaki bwanya mpe akumisaki yango, andimaki yango mpe amekaki yango.
τότε εἶδεν αὐτὴν καὶ ἐξηγήσατο αὐτήν ἑτοιμάσας ἐξιχνίασεν
28 Bongo alobaki na moto: « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya! Koboya mabe, yango nde mayele! »
εἶπεν δὲ ἀνθρώπῳ ἰδοὺ ἡ θεοσέβειά ἐστιν σοφία τὸ δὲ ἀπέχεσθαι ἀπὸ κακῶν ἐστιν ἐπιστήμη

< Yobo 28 >