< Yobo 27 >

1 Yobo akobaki koloba:
Job again took up his parable, and said,
2 « Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,
"As God lives, who has taken away my right, Shaddai, who has made my soul bitter.
3 wana ngai nazali nanu na bomoi, mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai,
(For the length of my life is still in me, and the spirit of God is in my nostrils);
4 bibebu na ngai ekoloba mabe te, mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te.
surely my lips shall not speak unrighteousness, neither shall my tongue utter deceit.
5 Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino! Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola boyengebene na ngai,
Far be it from me that I should justify you. Until I die I will not put away my integrity from me.
6 nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.
I hold fast to my righteousness, and will not let it go. My conscience will not accuse me as long as I live.
7 Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe, mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo!
"Let my enemy be as the wicked. Let him who rises up against me be as the unrighteous.
8 Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye?
For what is the hope of the godless, when he is cut off, when God takes away his life?
9 Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye tango pasi ekomelaki ye?
Will God hear his cry when trouble comes on him?
10 Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso?
Will he delight himself in Shaddai, and call on God at all times?
11 Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
I will teach you about the hand of God. That which is with Shaddai will I not conceal.
12 Bino nyonso, boyebi yango malamu! Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye?
Look, all of you have seen it yourselves; why then have you become altogether vain?
13 Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso:
"This is the portion of a wicked man with God, the heritage of oppressors, which they receive from Shaddai.
14 Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, mopanga ezali lifuti na bango, bakitani na ye bakokufa na nzala,
If his children are multiplied, it is for the sword. His offspring shall not be satisfied with bread.
15 bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye, oyo bakotikala na bomoi, mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te.
Those who remain of him shall be buried in death. His widows shall make no lamentation.
16 Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele,
Though he heap up silver as the dust, and prepare clothing as the clay;
17 nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye.
he may prepare it, but the just shall put it on, and the innocent shall divide the silver.
18 Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu, lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka.
He builds his house as the moth, as a booth which the watchman makes.
19 Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te; tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te.
He lies down rich, but he shall not do so again. He opens his eyes, and it is gone.
20 Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela; na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata.
Terrors overtake him like waters. A storm steals him away in the night.
21 Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye, mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye.
The east wind carries him away, and he departs. It sweeps him out of his place.
22 Bakobwakela ye makonga na mawa te, ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto oyo azali kobwakela ye yango.
For it hurls at him, and does not spare, as he flees away from his hand.
23 Bakobetela libebi na ye maboko, mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. »
Men shall clap their hands at him, and shall hiss him out of his place.

< Yobo 27 >