< Yobo 24 >

1 Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te mpo na esambiselo? Mpo na nini bato oyo bayebi Ye basengeli koluka na pamba mikolo ya boye?
διὰ τί δὲ κύριον ἔλαθον ὧραι
2 Bato bapusaka bandelo, bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki,
ἀσεβεῖς δὲ ὅριον ὑπερέβησαν ποίμνιον σὺν ποιμένι ἁρπάσαντες
3 babotolaka ane ya mwana etike mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali ya mwasi oyo akufisi mobali;
ὑποζύγιον ὀρφανῶν ἀπήγαγον καὶ βοῦν χήρας ἠνεχύρασαν
4 balongolaka babola na nzela, mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama.
ἐξέκλιναν ἀδυνάτους ἐξ ὁδοῦ δικαίας ὁμοθυμαδὸν ἐκρύβησαν πραεῖς γῆς
5 Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo na mosala mpo na koluka biloko ya kolia, kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei;
ἀπέβησαν δὲ ὥσπερ ὄνοι ἐν ἀγρῷ ὑπὲρ ἐμοῦ ἐξελθόντες τὴν ἑαυτῶν πρᾶξιν ἡδύνθη αὐτῷ ἄρτος εἰς νεωτέρους
6 bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele mpe balokotaka bambuma oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe.
ἀγρὸν πρὸ ὥρας οὐκ αὐτῶν ὄντα ἐθέρισαν ἀδύνατοι δὲ ἀμπελῶνας ἀσεβῶν ἀμισθὶ καὶ ἀσιτὶ ἠργάσαντο
7 Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba, bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili;
γυμνοὺς πολλοὺς ἐκοίμισαν ἄνευ ἱματίων ἀμφίασιν δὲ ψυχῆς αὐτῶν ἀφείλαντο
8 bapoli na mvula ya ngomba, bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama.
ἀπὸ ψεκάδων ὀρέων ὑγραίνονται παρὰ τὸ μὴ ἔχειν αὐτοὺς σκέπην πέτραν περιεβάλοντο
9 Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo.
ἥρπασαν ὀρφανὸν ἀπὸ μαστοῦ ἐκπεπτωκότα δὲ ἐταπείνωσαν
10 Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu; bamemaka maboke ya nzete ya ble, kasi bazongaka kaka na nzala.
γυμνοὺς δὲ ἐκοίμισαν ἀδίκως πεινώντων δὲ τὸν ψωμὸν ἀφείλαντο
11 Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu, bakamolaka bambuma ya vino, kasi bazongaka kaka na posa ya komela.
ἐν στενοῖς ἀδίκως ἐνήδρευσαν ὁδὸν δὲ δικαίαν οὐκ ᾔδεισαν
12 Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.
οἳ ἐκ πόλεως καὶ οἴκων ἰδίων ἐξεβάλλοντο ψυχὴ δὲ νηπίων ἐστέναξεν μέγα αὐτὸς δὲ διὰ τί τούτων ἐπισκοπὴν οὐ πεποίηται
13 Bato oyo bazali kosala bongo, bazali kotombokela pole, bayebi nzela na Ye te mpe batambolaka ata kati na yango te.
ἐπὶ γῆς ὄντων αὐτῶν καὶ οὐκ ἐπέγνωσαν ὁδὸν δὲ δικαιοσύνης οὐκ ᾔδεισαν οὐδὲ ἀτραποὺς αὐτῆς ἐπορεύθησαν
14 Mobomi azali kotelema na moyi mpe koboma mobola elongo na moto akelela; na butu, azali lokola moyibi.
γνοὺς δὲ αὐτῶν τὰ ἔργα παρέδωκεν αὐτοὺς εἰς σκότος καὶ νυκτὸς ἔσται ὡς κλέπτης
15 Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota; amilobelaka: ‹ Moto moko te akomona ngai, › mpe abombaka elongi na ye.
καὶ ὀφθαλμὸς μοιχοῦ ἐφύλαξεν σκότος λέγων οὐ προσνοήσει με ὀφθαλμός καὶ ἀποκρυβὴν προσώπου ἔθετο
16 Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato; kasi na moyi, bamikangelaka na ndako, bazali koboya pole.
διώρυξεν ἐν σκότει οἰκίας ἡμέρας ἐσφράγισαν ἑαυτούς οὐκ ἐπέγνωσαν φῶς
17 Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, somo ya molili ekomaka moninga na bango.
ὅτι ὁμοθυμαδὸν τὸ πρωὶ αὐτοῖς σκιὰ θανάτου ὅτι ἐπιγνώσεται ταραχὰς σκιᾶς θανάτου
18 Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino.
ἐλαφρός ἐστιν ἐπὶ πρόσωπον ὕδατος καταραθείη ἡ μερὶς αὐτῶν ἐπὶ γῆς
19 Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe, ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka bato oyo basalaka masumu. (Sheol h7585)
ἀναφανείη δὲ τὰ φυτὰ αὐτῶν ἐπὶ γῆς ξηρά ἀγκαλίδα γὰρ ὀρφανῶν ἥρπασαν (Sheol h7585)
20 Libumu ya mama ebosanaka bango mpe bankusu esepelaka kolia bango. Bakanisaka bango lisusu te, pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete.
εἶτ’ ἀνεμνήσθη αὐτοῦ ἡ ἁμαρτία ὥσπερ δὲ ὁμίχλη δρόσου ἀφανὴς ἐγένετο ἀποδοθείη δὲ αὐτῷ ἃ ἔπραξεν συντριβείη δὲ πᾶς ἄδικος ἴσα ξύλῳ ἀνιάτῳ
21 Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana mpe bato oyo babotaka te, kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali.
στεῖραν γὰρ οὐκ εὖ ἐποίησεν καὶ γύναιον οὐκ ἠλέησεν
22 Kasi Nzambe, na nguya na Ye, abakisaka mikolo ya banyokoli na bango; ata batombolami, bazalaka na elikya te mpo na bomoi na bango.
θυμῷ δὲ κατέστρεψεν ἀδυνάτους ἀναστὰς τοιγαροῦν οὐ μὴ πιστεύσῃ κατὰ τῆς ἑαυτοῦ ζωῆς
23 Nzambe apesaka bango kimia, kasi miso na Ye etalaka nzela na bango.
μαλακισθεὶς μὴ ἐλπιζέτω ὑγιασθῆναι ἀλλὰ πεσεῖται νόσῳ
24 Mpe atako sik’oyo bazali bato minene, na tango moke bakozala lisusu te, bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso, bakokatama lokola mito ya ble.
πολλοὺς γὰρ ἐκάκωσεν τὸ ὕψωμα αὐτοῦ ἐμαράνθη δὲ ὥσπερ μολόχη ἐν καύματι ἢ ὥσπερ στάχυς ἀπὸ καλάμης αὐτόματος ἀποπεσών
25 Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai ete nazali koloba lokuta? Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba? »
εἰ δὲ μή τίς ἐστιν ὁ φάμενος ψευδῆ με λέγειν καὶ θήσει εἰς οὐδὲν τὰ ῥήματά μου

< Yobo 24 >