< Yobo 22 >

1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki:
Then Eliphaz the Temanite answered and said,
2 « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto? Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba kaka mpo na ye moko.
Can a man be profitable unto God, as he that is wise may be profitable unto himself?
3 Ezala soki ozali moyengebene, litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo?
Is it any pleasure to the Almighty, that you are righteous? or is it gain to him, that you make your ways perfect?
4 Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo?
Will he reprove you for fear of you? will he enter with you into judgment?
5 Mabe na yo ezali monene te? Masumu na yo eleki ndelo te?
Is not your wickedness great? and your iniquities infinite?
6 Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,
For you have taken a pledge from your brother for nothing, and stripped the naked of their clothing.
7 ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei,
You have not given water to the weary to drink, and you have withheld bread from the hungry.
8 atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu;
But as for the mighty man, he had the earth; and the honourable man dwelt in it.
9 ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike.
You have sent widows away empty, and the arms of the fatherless have been broken.
10 Yango wana, mitambo ezingeli yo, kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo,
Therefore snares are round about you, and sudden fear troubles you;
11 molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, mpe mpela ezipi yo.
Or darkness, that you can not see; and abundance of waters cover you.
12 Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola? Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka!
Is not God in the height of heaven? and behold the height of the stars, how high they are!
13 Nzokande, ozali koloba: ‹ Nzambe ayebi nini? Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye? ›
And you say, How does God know? can he judge through the dark cloud?
14 Mapata minene ezipi Ye, yango wana azali komona biso te, wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola?
Thick clouds are a covering to him, that he sees not; and he walks in the circuit of heaven.
15 Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, nzela oyo bato mabe balekelaki?
Have you marked the old way which wicked men have trodden?
16 Kufa ememaki bango na mbalakata, mpe miboko na bango etiolaki na mpela.
Which were cut down out of time, whose foundation was overflowed with a flood:
17 Bazalaki koloba na Nzambe: ‹ Tika biso, biso moko! Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini? ›
Which said unto God, Depart from us: and what can the Almighty do for them?
18 Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango na biloko ya kitoko. Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe.
Yet he filled their houses with good things: but the counsel of the wicked is far from me.
19 Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango mpe bazali kosepela, bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba:
The righteous see it, and are glad: and the innocent laugh them to scorn.
20 ‹ Solo, banguna na biso babebi, moto ezikisi bomengo na bango. ›
Whereas our substance is not cut down, but the remnant of them the fire consumes.
21 Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo.
Acquaint now yourself with him, and be at peace: thereby good shall come unto you.
22 Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo.
Receive, I pray you, the law from his mouth, and lay up his words in your heart.
23 Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo.
If you return to the Almighty, you shall be built up, you shall put away iniquity far from your tabernacles.
24 Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku;
Then shall you lay up gold as dust, and the gold of Ophir as the stones of the brooks.
25 bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo.
Yea, the Almighty shall be your defence, and you shall have plenty of silver.
26 Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe.
For then shall you have your delight in the Almighty, and shall lift up your face unto God.
27 Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, mpe okokokisa ndayi na yo.
You shall make your prayer unto him, and he shall hear you, and you shall pay your vows.
28 Makambo oyo okokana, ekosalema, mpe pole ekongenga na nzela na yo.
You shall also decree a thing, and it shall be established unto you: and the light shall shine upon your ways.
29 Soki bato balembi, mpe yo olobi: ‹ Telema! › Nzambe akobikisa bango,
When men are cast down, then you shall say, There is lifting up; and he shall save the humble person.
30 akokangola ata moto oyo asali mabe, akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. »
He shall deliver the island of the innocent: and it is delivered by the pureness of your hands.

< Yobo 22 >