< Yobo 17 >

1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila, mikolo na ngai etikali ya kotanga, kunda ezali kozela ngai.
My breath is corrupt, my days are extinct, the graves are ready for me.
2 Solo, batioli bazingeli ngai, miso na ngai ezali komona kotiola na bango.
Are there not mockers with me? and does not mine eye continue in their provocation?
3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai!
Lay down now, put me in a guarantor with you; who is he that will shake hands with me?
4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te; yango wana, okolongisa bango te.
For you have hid their heart from understanding: therefore shall you not exalt them.
5 Moto oyo akofunda balingami na ye mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, bana na ye bakokufa miso.
He that speaks flattery to his friends, even the eyes of his children shall fail.
6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi.
He has made me also a byword of the people; and in old times I was as a timbrel.
7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi.
Mine eye also is dim by reason of sorrow, and all my members are as a shadow.
8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, mpe moto oyo ayebi na ye likambo te atelemeli moto mabe.
Upright men shall be astonished at this, and the innocent shall stir up himself against the hypocrite.
9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka.
The righteous also shall hold on his way, and he that has clean hands shall be stronger and stronger.
10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu! Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino.
But as for you all, do all of you return, and come now: for I cannot find one wise man among you.
11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.
My days are past, my purposes are broken off, even the thoughts of my heart.
12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi bazali koloba kati na molili: ‹ Pole ekomi pene, › nzokande molili ezali makasi.
They change the night into day: the light is short because of darkness.
13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, ezali nde kunda; soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, ezali nde kati na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
If I wait, the grave is mine house: I have made my bed in the darkness. (Sheol h7585)
14 Soki nalobi na kunda: ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na mutsopi: ‹ Ozali mama na ngai to ndeko na ngai ya mwasi, ›
I have said to corruption, You are my father: to the worm, You are my mother, and my sister.
15 wana elikya na ngai ezali penza wapi, mpe nani penza azali komona elikya na ngai?
And where is now my hope? as for my hope, who shall see it?
16 Ekokita kino na bikuke ya kufa tango tokokende elongo kopema kati na putulu. » (Sheol h7585)
They shall go down to the bars of the pit, when our rest together is in the dust. (Sheol h7585)

< Yobo 17 >