< Yobo 13 >

1 Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, matoyi na ngai eyokaki yango, mpe nasosoli yango malamu.
[Ecce omnia hæc vidit oculus meus, et audivit auris mea, et intellexi singula.
2 Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi, boleki ngai na eloko moko te.
Secundum scientiam vestram et ego novi: nec inferior vestri sum.
3 Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe.
Sed tamen ad Omnipotentem loquar, et disputare cum Deo cupio:
4 Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.
prius vos ostendens fabricatores mendacii, et cultores perversorum dogmatum.
5 Soki bovandaki ata kimia, bolingaki ata komonana bato ya bwanya.
Atque utinam taceretis, ut putaremini esse sapientes.
6 Yoka sik’oyo maloba na ngai, yoka kosamba ya bibebu na ngai.
Audite ergo correptionem meam, et judicium labiorum meorum attendite.
7 Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta mpe ya maloba ya solo te?
Numquid Deus indiget vestro mendacio, ut pro illo loquamini dolos?
8 Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye? Bolingi kobundela Nzambe?
numquid faciem ejus accipitis, et pro Deo judicare nitimini?
9 Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino? Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato?
aut placebit ei quem celare nihil potest? aut decipietur, ut homo, vestris fraudulentiis?
10 Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino, boponaka-ponaka bilongi.
Ipse vos arguet, quoniam in abscondito faciem ejus accipitis.
11 Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te? Kolenga ekokweyela bino te?
Statim ut se commoverit, turbabit vos, et terror ejus irruet super vos.
12 Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko.
Memoria vestra comparabitur cineri, et redigentur in lutum cervices vestræ.
13 Botika makelele mpe botika ngai naloba! Oyo ekoya eya!
Tacete paulisper, ut loquar quodcumque mihi mens suggesserit.
14 Mpo na nini nandima kokufa mpe nasakanela bomoi na ngai?
Quare lacero carnes meas dentibus meis, et animam meam porto in manibus meis?
15 Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye.
Etiam si occiderit me, in ipso sperabo: verumtamen vias meas in conspectu ejus arguam.
16 Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai, pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe akoki koya liboso na Ye.
Et ipse erit salvator meus: non enim veniet in conspectu ejus omnis hypocrita.
17 Boyoka maloba na ngai malamu; tika ete matoyi na bino eyoka malamu makambo oyo nazali koloba!
Audite sermonem meum, et ænigmata percipite auribus vestris.
18 Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, nayebi ete nakolonga na kosambisama.
Si fuero judicatus, scio quod justus inveniar.
19 Nani akoki kofunda ngai? Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa.
Quis est qui judicetur mecum? veniat: quare tacens consumor?
20 Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale, mpe nakobombama te liboso na Yo:
Duo tantum ne facias mihi, et tunc a facie tua non abscondar:
21 longola loboko na Yo likolo na ngai, mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo.
manum tuam longe fac a me, et formido tua non me terreat.
22 Bongo benga ngai, mpe nakoyanola; to tika ngai naloba, mpe Yo okoyanola ngai.
Voca me, et ego respondebo tibi: aut certe loquar, et tu responde mihi.
23 Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo? Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai.
Quantas habeo iniquitates et peccata? scelera mea et delicta ostende mihi.
24 Mpo na nini obombi elongi na Yo mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo?
Cur faciem tuam abscondis, et arbitraris me inimicum tuum?
25 Olingi kaka kotungisa lokasa oyo mopepe ezali komema? Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka?
Contra folium, quod vento rapitur, ostendis potentiam tuam, et stipulam siccam persequeris:
26 Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai.
scribis enim contra me amaritudines, et consumere me vis peccatis adolescentiæ meæ.
27 Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola mpe kolandela bisika nyonso oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai.
Posuisti in nervo pedem meum, et observasti omnes semitas meas, et vestigia pedum meorum considerasti:
28 Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, lokola elamba oyo balie na banselele!
qui quasi putredo consumendus sum, et quasi vestimentum quod comeditur a tinea.]

< Yobo 13 >