< Jeremi 50 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango:
Das Wort, welches Jehovah wider Babel, wider das Land der Chaldäer, durch die Hand Jirmejahus, des Propheten, geredet hat:
2 « Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te! Loba: ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni! Beli akoyokisama soni! Mariduki akobukana! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. ›
Sagt an unter den Völkerschaften und laßt hören, und erhebt ein Panier, laßt hören, verhehlet nicht, sprechet: Babel ist eingenommen, Bel ist beschämt, Merodach ist entsetzt, beschämt sind seine Götzenbilder, entsetzt seine Götzen.
3 Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, ekobebisa yango, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna; ezala bato to banyama, nyonso ekokima.
Denn wider dasselbe zieht herauf eine Völkerschaft von Mitternacht. Sie wird ihr Land zur Verwüstung setzen, und kein Bewohner wird darinnen sein. Vom Menschen und bis zum Vieh entfliehen sie und gehen davon.
4 Na tango wana, na mikolo wana, » elobi Yawe, « bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolela mpo na koluka Yawe, Nzambe na bango.
In jenen Tagen und zu jener Zeit, spricht Jehovah, werden die Söhne Israels kommen, sie und die Söhne Jehudahs allzumal, gehend und weinend gehen sie, Jehovah, ihren Gott, zu suchen.
5 Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango; bakolobana bango na bango: ‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te, boyokani oyo tokoki kobosana te! ›
Nach Zijon fragen sie den Weg, dahin ist ihr Angesicht: Kommt und laßt uns Jehovah anhangen, in ewigem Bunde, der nicht soll vergessen werden.
6 Bato na Ngai bazalaki lokola bameme oyo ebungi nzela; babateli na bango babungisaki bango nzela, basalaki ete bayengayenga na bangomba, batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse mpe babosana lopango na bango ya kopemela.
Eine verlorene Herde ist Mein Volk, ihre Hirten führten es irre, abwendige Berge, von Berg zu Hügel gingen sie, vergaßen ihrer Lagerstätte.
7 Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba: ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›
Alle die, so sie fanden, fraßen sie auf, und ihre Dränger sprachen: Wir verschulden uns nicht, darum, daß sie sich wider Jehovah, den Wohnort der Gerechtigkeit, und ihrer Väter Hoffnung, wider Jehovah, versündigt haben.
8 Bobima mbangu na Babiloni, botika mokili ya Babiloni! Bozala lokola bantaba ya mibali oyo ezali kotambola liboso ya etonga.
Entfliehet aus Babels Mitte, und vom Lande der Chaldäer gehet aus, und seiet als die Böcke, vor den Schafen her.
9 Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.
Denn siehe, Ich errege und bringe herauf wider Babel eine Versammlung großer Völkerschaften aus dem Lande der Mitternacht, und sie ordnen sich wider sie; von dorther soll es erobert werden; seine Pfeile sind wie die des klugen Helden, sie kehren nicht leer zurück.
10 Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, » elobi Yawe.
Und Chaldäa wird zur Beute; alle, die sie erbeuten, sollen satt werden, spricht Jehovah.
11 « Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,
Denn ihr seid fröhlich, denn ihr jauchzet, ihr Plünderer Meines Erbes, wachset heran wie die Färse, die drischt, und wiehert wie die Gewaltigen.
12 mama na bino akoyoka soni makasi; ye oyo abotaki bino akosambwa. Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe.
Sehr beschämt ist eure Mutter, sie errötet, die euch gebar. Siehe, die letzte der Völkerschaften, eine Wüste, eine Dürre, und eine Einöde.
13 Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.
Ob der Entrüstung Jehovahs wird sie nicht bewohnt, und wird ganz zur Verwüstung werden. Ein jeder, der vorübergeht an Babel, wird erstaunen, und wird ob allen ihren Schlägen zischen.
14 Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo, bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni mpe bobeta yango makonga! Botika ata likonga moko te, pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.
Ordnet euch wider Babel ringsumher, all ihr Spanner des Bogens, schießt auf sie, schont des Pfeiles nicht; denn wider Jehovah hat sie gesündigt.
15 Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso! Ayei komitika ye moko, mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, bamir na ye ebukani: ezali na lolenge oyo nde Yawe azongiseli ye mabe na mabe. Bozongisela ye makambo oyo ye asalaki bikolo mosusu.
Erhebet ringsum wider sie das Feldgeschrei. Ihre Hand gibt sie, ihre Grundfesten fallen, ihre Mauern reißt man nieder; denn Jehovahs Rache ist es. Rächt euch an ihr! Wie sie getan hat, tuet ihr!
16 Boboma wuta na mokili ya Babiloni bato oyo basalaka bilanga mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma. Likolo ya mopanga ya monyokoli, tika ete moto na moto azonga na mokili na ye, tika ete moto na moto akima na mokili na ye.
Rottet den Sämann aus von Babel, und den, so die Sichel faßt zur Zeit der Ernte. Vor dem bedrückenden Schwerte wendet sich jeder Mann zu seinem Volk, und jeder Mann flieht in sein Land.
17 Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda: Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.
Ein verscheuchtes Schaf ist Israel, Löwen verjagten es. Zuerst fraß es der König Aschurs, und hernach zerdrückte ihm das Gebein Nebuchadrezzar, Babels König.
18 Yango wana tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakopesa mokonzi ya Babiloni mpe mokili na ye etumbu ndenge napesaki mokonzi ya Asiri.
Darum spricht also Jehovah der Heerscharen, der Gott Israels: Siehe, Ich suche heim den König Babels und sein Land, wie Ich den König Aschurs heimgesucht habe,
19 Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye; mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe ya Galadi.
Und bringe Israel zurück in seinen Wohnort, so daß es auf Karmel und in Baschan weidet, und auf dem Gebirge Ephraim und Gilead sich seine Seele sättige.
20 Na tango wana, na mikolo wana, › elobi Yawe, ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi kasi bakomona yango te, masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te; pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi.
In jenen Tagen und zu jener Zeit, spricht Jehovah, wird man die Missetat Israels suchen, und wird keine da sein, und Jehudahs Sünde, und man wird keine finden; denn Ich werde dem vergeben, den Ich verbleiben ließ.
21 Bobundisa mokili ya Meratayimi mpe bavandi ya Pekodi; bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › elobi Yawe. ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino.
Wider das Land der zweifachen Widerspenstigkeit: Ziehe hinauf wider dasselbe und wider die, so in Pekod wohnen, veröde und banne ihre Nachkommen, spricht Jehovah, und tue nach allem, was Ich dir gebiete.
22 Makelele ya bitumba ezali kati na mokili, lokito ya kobebisama monene!
Des Streites Stimme ist im Lande, und großes Zerbrechen.
23 Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba ebukani mpe epanzani? Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo?
Wie ist der Hammer doch des ganzen Landes zerhauen und zerbrochen! Wie ward Babel zur Verwüstung unter den Völkerschaften!
24 Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. Omonanaki mpe okangamaki mpo ete otelemelaki Yawe.
Ich legte dir Fallstricke, Babel, und du fingst dich auch, und du wußtest es nicht. Du wardst gefunden und auch erfaßt, denn Jehovah hast du befehdet.
25 Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye; pamba te yango nde mosala oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni.
Jehovah hat Seine Schatzkammer geöffnet und die Geräte Seines Unwillens herausgebracht, denn ein Geschäft hat der Herr Jehovah der Heerscharen im Lande der Chaldäer.
26 Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, bobuka bibombelo na ye, bokangisa bomengo ya bitumba ndenge bakangisaka maboke ya ble, bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
Kommt wider sie vom Ende, öffnet ihre Scheunen, schichtet sie auf wie Kornhaufen und verbannt sie, daß ihr kein Überrest sei.
27 Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.
Würgt alle ihre Farren, laßt sie zur Schlachtbank herabkommen. Wehe über sie, denn ihr Tag ist gekommen, die Zeit ihrer Heimsuchung.
28 Boyoka! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.
Die Stimme der Flüchtenden und der Entrinnenden aus Babels Land! anzusagen in Zijon die Rache Jehovahs, unseres Gottes, die Rache für Seinen Tempel.
29 Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.
Rufet Schützen auf wider Babel, alle die den Bogen spannen; lagert euch ringsumher, daß kein Entkommen ist. Vergeltet ihr nach ihren Werken, tut ihr nach allem, was sie tat; denn wider Jehovah, den Heiligen Israels, vermaß sie sich.
30 Yango wana, na mokolo wana, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Darum sollen ihre Jünglinge auf ihren Straßen fallen, und alle ihre Männer des Streites an jenem Tage untergehen, spricht Jehovah.
31 ‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, › elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; ‹ pamba te mokolo na yo ekoki, tango na yo ya kozwa etumbu.
Siehe, Ich bin wider dich, Vermessene, spricht der Herr Jehovah der Heerscharen; denn gekommen ist dein Tag, die Zeit deiner Heimsuchung.
32 Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›
Und straucheln wird der Vermessene und fallen, und keiner richtet ihn auf; und Ich zünde ein Feuer an in seinen Städten, das alles um ihn her auffresse.
33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda; bato nyonso oyo bakangaki bango mpe bamemaki bango na bowumbu baboyi kotika bango.
So spricht Jehovah der Heerscharen: Unterdrückt sind die Söhne Israels und Jehudahs Söhne allzumal, und alle, die sie gefangenführten, halten sie fest, sie weigern sich, sie zu entsenden.
34 Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.
Stark ist ihr Erlöser! Jehovah der Heerscharen ist Sein Name. Er hadert ihren Hader, auf daß Er das Land ausruhen lasse, und zittern lasse, die in Babel wohnen.
35 Mopanga, boma bato ya Babiloni; boma bavandi ya Babiloni, boma bakambi mpe bato na yango ya bwanya, › elobi Yawe!
Das Schwert ist wider die Chaldäer, spricht Jehovah, und wider die Einwohner Babels und wider seine Obersten und wider seine Weisen.
36 ‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta; tika ete bakoma bato ya maboma! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko; tika ete bakoma na somo!
Das Schwert ist wider die Unwahren, und zu Narren werden sie; das Schwert ist wider seine Helden, daß sie sich entsetzen.
37 Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, bapaya nyonso oyo bazali sima na yango mpo ete bakoma lokola basi! Mopanga, bebisa bomengo na yango mpo ete ekoma bomengo ya bitumba!
Das Schwert ist wider seine Rosse und wider seine Streitwagen und wider allen Troß in seiner Mitte, daß sie zu Weibern werden; das Schwert ist wider seine Schätze, daß sie geraubt werden.
38 Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka; pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko, bikeko oyo epesaka bato somo!
Dürre kommt über ihre Wasser, daß sie vertrocknen; denn ein Land der Schnitzbilder ist es, und sie rühmen sich ihrer Schreckbilder.
39 Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zamba ekokoma kovanda kuna; maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna. Bato bakovanda lisusu kuna te to moto moko te akotikala kuna mpo na libela.
Darum sollen Zijim mit Ijim und Käuzlein darin wohnen. Und man soll nimmermehr darin wohnen, noch soll man dort wohnen zu Geschlecht und Geschlecht.
40 Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moto moko te akowumela kati na yango.
Und wie Gott Sodom und Gomorrah und deren Nachbarn umkehrte, spricht Jehovah, soll allda kein Mann wohnen, noch darin sich aufhalten ein Sohn des Menschen.
41 Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya wuta na nor, ekolo moko monene mpe bakonzi ebele bazali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.
Siehe, ein Volk kommt von Mitternacht, und eine große Völkerschaft und viele Könige werden auferweckt von den Seiten der Erde.
42 Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko!
Bogen und Wurfspieß fassen sie, sind grausam und erbarmen sich nicht, ihre Stimme ist wie ein tobend Meer, und auf Rossen reiten sie, geordnet wie der Mann zum Streite, wider dich, Tochter Babels.
43 Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
Der König Babels hört ihr Gerücht und seine Hände werden schlaff, Angst ergreift ihn, Wehen, wie die Gebärerin.
44 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai? Nani akoki kobeta tembe na Ngai? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai? »
Siehe, wie der Löwe von dem Anschwellen des Jordan aufsteigt nach dem Wohnorte Ethans! Aber im Augenblick lasse Ich ihn von ihr laufen. Und wer ist der Auserwählte, den Ich über sie bestellte? Denn wer ist wie Ich? Und wer ruft Mich zum Zeugen vor, und wer ist der Hirte, der vor Meinem Angesichte steht?
45 Yango wana, boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala mpo na Babiloni, mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela mokili ya bato ya Babiloni: Bakobengana bango na lopango lokola bana mike ya etonga, akobebisa etando na bango.
Darum hört Jehovahs Ratschluß, den Er über Babel beschlossen hat, und Seine Gedanken, die Er denkt wider der Chaldäer Land. Denn schleppen sie nicht davon die Geringen der Herde? Verwüsten sie nicht ihren Wohnort über ihnen?
46 Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, mabele ekoningana; makelele na yango ekoyokana kino na bikolo mosusu.
Von der Stimme: Babel ist eingenommen! erbebt die Erde, und das Geschrei wird gehört unter den Völkerschaften.

< Jeremi 50 >