< Jeremi 39 >

1 Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango.
It happened when Jerusalem was taken, (in the ninth year of Zedekiah king of Judah, in the tenth month, came Nebuchadnezzar king of Babylon and all his army against Jerusalem, and besieged it;
2 Tango Sedesiasi akokisaki mibu zomi na moko na bokonzi, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba.
in the eleventh year of Zedekiah, in the fourth month, the ninth day of the month, a breach was made in the city).
3 Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni.
Then all the officials of the king of Babylon came in, and sat in the Middle Gate, Nergal-sar-ezer of Samgar, Nebu-sar-sekim the Rab-saris, Nergal-sar-ezer the Rab-mag, with all the rest of the officers of the king of Babylon.
4 Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani.
It happened that, when Zedekiah the king of Judah and all the men of war saw them, then they fled, and went forth out of the city by night, by the way of the king's garden, through the gate between the two walls; and he went out toward the Arabah.
5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu.
But the army of the Chaldeans pursued after them, and overtook Zedekiah in the plains of Jericho: and when they had taken him, they brought him up to Nebuchadnezzar king of Babylon to Riblah in the land of Hamath; and he gave judgment on him.
6 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata, na miso na ye, mito ya bana mibali ya Sedesiasi mpe ya bankumu nyonso ya Yuda.
Then the king of Babylon killed the sons of Zedekiah in Riblah before his eyes: also the king of Babylon killed all the nobles of Judah.
7 Apesaki lisusu mitindo ete batobola miso ya Sedesiasi, bakanga ye minyololo ya bibende ya bronze mpo na komema ye na Babiloni.
Moreover he put out Zedekiah's eyes, and bound him in fetters, to carry him to Babylon.
8 Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi.
The Chaldeans burned the king's house, and the houses of the people, with fire, and broke down the walls of Jerusalem.
9 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu, na Babiloni, bato oyo batikalaki kati na engumba elongo na bato oyo bayaki komitika bango moko epai na ye, mpe bato mosusu.
Then Nebuzaradan the captain of the guard carried away captive into Babylon the residue of the people who remained in the city, the deserters also who fell away to him, and the residue of the people who remained.
10 Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga.
But Nebuzaradan the captain of the guard left of the poor of the people, who had nothing, in the land of Judah, and gave them vineyards and fields at the same time.
11 Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi:
Now Nebuchadnezzar king of Babylon commanded Nebuzaradan the captain of the guard concerning Jeremiah, saying,
12 « Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. »
"Take him, and look well to him, and do him no harm; but do to him even as he shall tell you."
13 Boye, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi; Nebutsasibani, mokonzi ya bakalaka ya lokumu; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi nyonso ya basoda ya mokonzi ya Babiloni
So Nebuzaradan the captain of the guard sent, and Nebushazban the Rab-saris, Nergal-sar-ezer the Rab-mag and all the chief officers of the king of Babylon;
14 batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye.
they sent, and took Jeremiah out of the court of the guard, and committed him to Gedaliah the son of Ahikam, the son of Shaphan, that he should carry him home: so he lived among the people.
15 Wana Jeremi azalaki ya kokangama kati na lopango ya bakengeli, Yawe alobaki na ye:
Now the word of Jehovah came to Jeremiah, while he was shut up in the court of the guard, saying,
16 — Kende koyebisa Ebedi-Meleki, moto ya Kushi: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakomi pene ya kokokisa makambo oyo nalakaki mpo na engumba oyo, makambo ya pasi kasi ya esengo te; tango makambo yango ekokokisama, ekosalema na miso na yo.
"Go, and speak to Ebedmelech the Ethiopian, saying, 'Thus says Jehovah of hosts, the God of Israel: "Look, I will bring my words on this city for disaster, and not for prosperity; and they shall be fulfilled before you in that day.
17 Kasi na mokolo wana, nakobatela yo, › elobi Yawe, ‹ okokabama te na maboko ya bato oyo yo ozali kobanga.
But I will deliver you in that day, says Jehovah; and you shall not be given into the hand of the men of whom you are afraid.
18 Solo, nakobikisa yo, mpe okokufa na mopanga te; kasi bomoi na yo ekozala bomengo na yo ya bitumba, pamba te otielaka Ngai elikya, elobi Yawe. › »
For I will surely save you, and you shall not fall by the sword, but your life will be given to you as a reward; because you have put your trust in me,"' says Jehovah."

< Jeremi 39 >