< Jeremi 33 >

1 Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli:
Moreover the word of the LORD came unto Jeremiah the second time, while he was yet shut up in the court of the prison, saying,
2 « Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi:
Thus says the LORD the maker thereof, the LORD that formed it, to establish it; the LORD is his name;
3 ‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. ›
Call unto me, and I will answer you, and show you great and mighty things, which you know not.
4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna
For thus says the LORD, the God of Israel, concerning the houses of this city, and concerning the houses of the kings of Judah, which are thrown down by the mounts, and by the sword;
5 kati na etumba na bato ya Babiloni: ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso.
They come to fight with the Chaldeans, but it is to fill them with the dead bodies of men, whom I have slain in mine anger and in my fury, and for all whose wickedness I have hid my face from this city.
6 Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
Behold, I will bring it health and cure, and I will cure them, and will reveal unto them the abundance of peace and truth.
7 Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso.
And I will cause the captivity of Judah and the captivity of Israel to return, and will build them, as at the first.
8 Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai.
And I will cleanse them from all their iniquity, whereby they have sinned against me; and I will pardon all their iniquities, whereby they have sinned, and whereby they have transgressed against me.
9 Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›
And it shall be to me a name of joy, a praise and an honour before all the nations of the earth, which shall hear all the good that I do unto them: and they shall fear and tremble for all the goodness and for all the prosperity that I procure unto it.
10 Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo: ‘Eh! Esika oyo ebeba! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te!’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito:
Thus says the LORD; Again there shall be heard in this place, which all of you say shall be desolate without man and without beast, even in the cities of Judah, and in the streets of Jerusalem, that are desolate, without man, and without inhabitant, and without beast,
11 ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba: ‘Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.
The voice of joy, and the voice of gladness, the voice of the bridegroom, and the voice of the bride, the voice of them that shall say, Praise the LORD of hosts: for the LORD is good; for his mercy endures for ever: and of them that shall bring the sacrifice of praise into the house of the LORD. For I will cause to return the captivity of the land, as at the first, says the LORD.
12 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango.
Thus says the LORD of hosts; Again in this place, which is desolate without man and without beast, and in all the cities thereof, shall be an habitation of shepherds causing their flocks to lie down.
13 Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe.
In the cities of the mountains, in the cities of the vale, and in the cities of the south, and in the land of Benjamin, and in the places about Jerusalem, and in the cities of Judah, shall the flocks pass again under the hands of him that tells them, says the LORD.
14 ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda.
Behold, the days come, says the LORD, that I will perform that good thing which I have promised unto the house of Israel and to the house of Judah.
15 Na mikolo yango mpe na tango yango, nakobimisa Moto ya nzete ya sembo wuta na libota ya Davidi; akosala makambo ya sembo mpe ya boyengebene kati na mokili.
In those days, and at that time, will I cause the Branch of righteousness to grow up unto David; and he shall execute judgment and righteousness in the land.
16 Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango: Yawe azali Bosembo na biso. ›
In those days shall Judah be saved, and Jerusalem shall dwell safely: and this is the name wherewith she shall be called, The LORD our righteousness.
17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele;
For thus says the LORD; David shall never lack a man to sit upon the throne of the house of Israel;
18 Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »
Neither shall the priests the Levites lack a man before me to offer burnt offerings, and to kindle food offerings, and to do sacrifice continually.
19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
And the word of the LORD came unto Jeremiah, saying,
20 « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango,
Thus says the LORD; If all of you can break my covenant of the day, and my covenant of the night, and that there should not be day and night in their season;
21 wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai.
Then may also my covenant be broken with David my servant, that he should not have a son to reign upon his throne; and with the Levites the priests, my ministers.
22 Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »
As the host of heaven cannot be numbered, neither the sand of the sea measured: so will I multiply the seed of David my servant, and the Levites that minister unto me.
23 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi:
Moreover the word of the LORD came to Jeremiah, saying,
24 « Boni! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala? Bazali koloba: ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo.
Consider you not what this people have spoken, saying, The two families which the LORD has chosen, he has even cast them off? thus they have despised my people, that they should be no more a nation before them.
25 Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te,
Thus says the LORD; If my covenant be not with day and night, and if I have not appointed the ordinances of heaven and earth;
26 wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »
Then will I cast away the seed of Jacob and David my servant, so that I will not take any of his seed to be rulers over the seed of Abraham, Isaac, and Jacob: for I will cause their captivity to return, and have mercy on them.

< Jeremi 33 >