< Jeremi 15 >

1 Yawe alobaki na ngai: « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai! Tika ete bakende mosika na Ngai!
Then said the LORD unto me, Though Moses and Samuel stood before me, yet my mind could not be toward this people: cast them out of my sight, and let them go forth.
2 Bongo soki batuni yo: ‹ Tokende wapi? › Zongisela bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu! ›
And it shall come to pass, if they say unto you, Where shall we go forth? then you shall tell them, Thus says the LORD; Such as are for death, to death; and such as are for the sword, to the sword; and such as are for the famine, to the famine; and such as are for the captivity, to the captivity.
3 Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe: « mopanga, mpo na koboma bango; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.
And I will appoint over them four kinds, says the LORD: the sword to slay, and the dogs to tear, and the fowls of the heaven, and the beasts of the earth, to devour and destroy.
4 Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.
And I will cause them to be removed into all kingdoms of the earth, because of Manasseh the son of Hezekiah king of Judah, for that which he did in Jerusalem.
5 Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa? Nani akolela yo? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo?
For who shall have pity upon you, O Jerusalem? or who shall lament for you? or who shall go aside to ask how you do?
6 Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo; nakoyokela yo lisusu mawa te.
You have forsaken me, says the LORD, you are gone backward: therefore will I stretch out my hand against you, and destroy you; I am weary with repenting.
7 Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.
And I will fan them with a fan in the gates of the land; I will bereave them of children, I will destroy my people since they return not from their ways.
8 Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.
Their widows are increased to me above the sand of the seas: I have brought upon them against the mother of the young men a spoiler at noonday: I have caused him to fall upon it suddenly, and terrors upon the city.
9 Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela: akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.
She that has borne seven languishes: she has given up the spirit; her sun is gone down while it was yet day: she has been ashamed and confounded: and the residue of them will I deliver to the sword before their enemies, says the LORD.
10 Oh mama na ngai, mawa na ngai! Mpo na nini obotaki ngai! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.
Woe is me, my mother, that you have borne me a man of strife and a man of contention to the whole earth! I have neither lent on interest, nor men have lent to me on interest; yet every one of them does curse me.
11 Yawe alobaki: « Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo; solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo na tango ya pasi mpe ya minyoko.
The LORD said, Verily it shall be well with your remnant; verily I will cause the enemy to plead you well in the time of evil and in the time of affliction.
12 Boni, moto akoki penza kobuka ebende? Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze?
Shall iron break the northern iron and the steel?
13 Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.
Your substance and your treasures will I give to the spoil without price, and that for all your sins, even in all your borders.
14 Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »
And I will make you to pass with your enemies into a land which you know not: for a fire is kindled in mine anger, which shall burn upon you.
15 Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo!
O LORD, you know: remember me, and visit me, and revenge me of my persecutors; take me not away in your longsuffering: know that for your sake I have suffered rebuke.
16 Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Your words were found, and I did eat them; and your word was unto me the joy and rejoicing of mine heart: for I am called by your name, O LORD God of hosts.
17 Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.
I sat not in the assembly of the mockers, nor rejoiced; I sat alone because of your hand: for you have filled me with indignation.
18 Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
Why is my pain perpetual, and my wound incurable, which refuses to be healed? will you be altogether unto me as a liar, and as waters that fail?
19 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo; kasi yo, kolanda bango te.
Therefore thus says the LORD, If you return, then will I bring you again, and you shall stand before me: and if you take forth the precious from the vile, you shall be as my mouth: let them return unto you; but return not you unto them.
20 Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.
And I will make you unto this people a fenced brazen wall: and they shall fight against you, but they shall not prevail against you: for I am with you to save you and to deliver you, says the LORD.
21 « Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe mpe nakokangola yo na maboko ya bato oyo banyokolaka yo. »
And I will deliver you out of the hand of the wicked, and I will redeem you out of the hand of the terrible.

< Jeremi 15 >