< Jeremi 12 >

1 Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia?
δίκαιος εἶ κύριε ὅτι ἀπολογήσομαι πρὸς σέ πλὴν κρίματα λαλήσω πρὸς σέ τί ὅτι ὁδὸς ἀσεβῶν εὐοδοῦται εὐθήνησαν πάντες οἱ ἀθετοῦντες ἀθετήματα
2 Olonaki bango mpe bazwi misisa; bazali kokola mpe kobota mbuma. Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, kasi mosika ya mitema na bango.
ἐφύτευσας αὐτοὺς καὶ ἐρριζώθησαν ἐτεκνοποίησαν καὶ ἐποίησαν καρπόν ἐγγὺς εἶ σὺ τοῦ στόματος αὐτῶν καὶ πόρρω ἀπὸ τῶν νεφρῶν αὐτῶν
3 Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, omonaka ngai mpe oyebi makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. Tindika bango lokola bameme oyo babongisi mpo na koboma! Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa.
καὶ σύ κύριε γινώσκεις με δεδοκίμακας τὴν καρδίαν μου ἐναντίον σου ἅγνισον αὐτοὺς εἰς ἡμέραν σφαγῆς αὐτῶν
4 Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka: « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »
ἕως πότε πενθήσει ἡ γῆ καὶ πᾶς ὁ χόρτος τοῦ ἀγροῦ ξηρανθήσεται ἀπὸ κακίας τῶν κατοικούντων ἐν αὐτῇ ἠφανίσθησαν κτήνη καὶ πετεινά ὅτι εἶπαν οὐκ ὄψεται ὁ θεὸς ὁδοὺς ἡμῶν
5 Soki ozali kosala momekano ya kokima mbangu elongo na bato oyo bazali kotambola na makolo, mpe bango bazali komelisa yo pema, ndenge nini okoki komekana na bato oyo batambolaka likolo ya bampunda? Soki ozali komitungisa na mokili oyo ezali na kimia, ekozala boni liboso ya mpela ya ebale Yordani?
σοῦ οἱ πόδες τρέχουσιν καὶ ἐκλύουσίν σε πῶς παρασκευάσῃ ἐφ’ ἵπποις καὶ ἐν γῇ εἰρήνης σὺ πέποιθας πῶς ποιήσεις ἐν φρυάγματι τοῦ Ιορδάνου
6 Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo.
ὅτι καὶ οἱ ἀδελφοί σου καὶ ὁ οἶκος τοῦ πατρός σου καὶ οὗτοι ἠθέτησάν σε καὶ αὐτοὶ ἐβόησαν ἐκ τῶν ὀπίσω σου ἐπισυνήχθησαν μὴ πιστεύσῃς ἐν αὐτοῖς ὅτι λαλήσουσιν πρὸς σὲ καλά
7 Nakobosana libota na ngai, nakosundola libula na ngai, nakokaba molingami na ngai na maboko ya banguna na ye.
ἐγκαταλέλοιπα τὸν οἶκόν μου ἀφῆκα τὴν κληρονομίαν μου ἔδωκα τὴν ἠγαπημένην ψυχήν μου εἰς χεῖρας ἐχθρῶν αὐτῆς
8 Libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola nkosi ya zamba: ezali kogangela ngai; yango wana nayini yango.
ἐγενήθη ἡ κληρονομία μου ἐμοὶ ὡς λέων ἐν δρυμῷ ἔδωκεν ἐπ’ ἐμὲ τὴν φωνὴν αὐτῆς διὰ τοῦτο ἐμίσησα αὐτήν
9 Boni, libula na ngai ekomi na miso na ngai lokola ndeke oyo eliaka misuni, bongo ebebi na makila, mpo ete bandeke mosusu oyo eliaka misuni eya kozingela mpe kobundisa yango? Bokende kosangisa banyama nyonso ya zamba mpe bobengisa yango mpo ete eya kolia nyama!
μὴ σπήλαιον ὑαίνης ἡ κληρονομία μου ἐμοὶ ἢ σπήλαιον κύκλῳ αὐτῆς βαδίσατε συναγάγετε πάντα τὰ θηρία τοῦ ἀγροῦ καὶ ἐλθέτωσαν τοῦ φαγεῖν αὐτήν
10 Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.
ποιμένες πολλοὶ διέφθειραν τὸν ἀμπελῶνά μου ἐμόλυναν τὴν μερίδα μου ἔδωκαν μερίδα ἐπιθυμητήν μου εἰς ἔρημον ἄβατον
11 Bakomisi yango esobe, etikali pamba na miso na ngai, ekomi eloko ya mawa. Mokili mobimba ebebisami, pamba te moto moko te azali lisusu komema yango na motema.
ἐτέθη εἰς ἀφανισμὸν ἀπωλείας δῑ ἐμὲ ἀφανισμῷ ἠφανίσθη πᾶσα ἡ γῆ ὅτι οὐκ ἔστιν ἀνὴρ τιθέμενος ἐν καρδίᾳ
12 Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba; moto moko te akozala na kimia.
ἐπὶ πᾶσαν διεκβολὴν ἐν τῇ ἐρήμῳ ἦλθον ταλαιπωροῦντες ὅτι μάχαιρα τοῦ κυρίου καταφάγεται ἀπ’ ἄκρου τῆς γῆς ἕως ἄκρου τῆς γῆς οὐκ ἔστιν εἰρήνη πάσῃ σαρκί
13 Bakolona ble, kasi bakobuka banzube; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.
σπείρατε πυροὺς καὶ ἀκάνθας θερίσατε οἱ κλῆροι αὐτῶν οὐκ ὠφελήσουσιν αὐτούς αἰσχύνθητε ἀπὸ καυχήσεως ὑμῶν ἀπὸ ὀνειδισμοῦ ἔναντι κυρίου
14 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.
ὅτι τάδε λέγει κύριος περὶ πάντων τῶν γειτόνων τῶν πονηρῶν τῶν ἁπτομένων τῆς κληρονομίας μου ἧς ἐμέρισα τῷ λαῷ μου Ισραηλ ἰδοὺ ἐγὼ ἀποσπῶ αὐτοὺς ἀπὸ τῆς γῆς αὐτῶν καὶ τὸν Ιουδαν ἐκβαλῶ ἐκ μέσου αὐτῶν
15 Kasi sima na Ngai kobengana bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa moko na moko kati na libula na ye mpe kati na mokili na ye.
καὶ ἔσται μετὰ τὸ ἐκβαλεῖν με αὐτοὺς ἐπιστρέψω καὶ ἐλεήσω αὐτοὺς καὶ κατοικιῶ αὐτοὺς ἕκαστον εἰς τὴν κληρονομίαν αὐτοῦ καὶ ἕκαστον εἰς τὴν γῆν αὐτοῦ
16 Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo: ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.
καὶ ἔσται ἐὰν μαθόντες μάθωσιν τὴν ὁδὸν τοῦ λαοῦ μου τοῦ ὀμνύειν τῷ ὀνόματί μου ζῇ κύριος καθὼς ἐδίδαξαν τὸν λαόν μου ὀμνύειν τῇ Βααλ καὶ οἰκοδομηθήσονται ἐν μέσῳ τοῦ λαοῦ μου
17 Kasi ekolo oyo ekoyoka te, nakobengana bango nyonso mpe nakobebisa bango, » elobi Yawe.
ἐὰν δὲ μὴ ἐπιστρέψωσιν καὶ ἐξαρῶ τὸ ἔθνος ἐκεῖνο ἐξάρσει καὶ ἀπωλείᾳ

< Jeremi 12 >