< Ezayi 59 >

1 Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te mpo na kobikisa, litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka!
Behold, the LORD's hand is not shortened, that it cannot save; neither his ear heavy, that it cannot hear:
2 Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino, ezali masumu na bino nde esali ete abombela bino elongi na Ye mpo ete ayoka bino te.
But your iniquities have separated between you and your God, and your sins have hid his face from you, that he will not hear.
3 Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.
For your hands are defiled with blood, and your fingers with iniquity; your lips have spoken lies, your tongue has muttered perverseness.
4 Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.
None calls for justice, nor any pleads for truth: they trust in vanity, and speak lies; they conceive mischief, and bring forth iniquity.
5 Bazali kopasola maki ya etupa mpe bazali kotonga ndako ya lifofe. Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa; mpe, soki apasoli liki moko, ekobimisa etupa.
They hatch cockatrice' eggs, and weave the spider's web: he that eats of their eggs dies, and that which is crushed breaks out into a viper.
6 Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, misala na bango ekobomba bango te; misala na bango ezali misala mabe, mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango.
Their webs shall not become garments, neither shall they cover themselves with their works: their works are works of iniquity, and the act of violence is in their hands.
7 Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.
Their feet run to evil, and they make haste to shed innocent blood: their thoughts are thoughts of iniquity; wasting and destruction are in their paths.
8 Bayebi nzela ya kimia te, mpe bosembo ezali na nzela na bango te; bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, moko te oyo akotambola na nzela yango akotikala koyeba kimia.
The way of peace they know not; and there is no judgment in their activities: they have made them crooked paths: whosoever goes therein shall not know peace.
9 Yango wana bosembo ezali mosika na biso, mpe solo ezali kokomela biso te; tozali kozela pole, kasi nyonso ezali kaka molili; toluki moyi, kasi tozali kaka kotambola na molili.
Therefore is judgment far from us, neither does justice overtake us: we wait for light, but behold obscurity; for brightness, but we walk in darkness.
10 Tozali kosimbasimba mir mpo na kotambola lokola bakufi miso, tozali kobanga kotambola lokola bato bazanga miso; tozali kobeta mabaku na moyi makasi lokola nde tozali na butu makasi, tozali na nzoto kolongono kasi tokomi lokola bakufi.
We grope for the wall like the blind, and we grope as if we had no eyes: we stumble at noon day as in the night; we are in desolate places as dead men.
11 Biso nyonso tozali konguna-nguna lokola bangombolo, mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga; tozali koluka bosembo, kasi tozali komona yango te, tozali koluka lobiko, kasi ekimi mosika na biso!
We roar all like bears, and mourn sore like doves: we look for judgment, but there is none; for salvation, but it is far off from us.
12 Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, mpe masumu na biso ekomi kofunda biso; masumu na biso ezali liboso na biso mpe toyebi malamu bambeba na biso:
For our transgressions are multiplied before you, and our sins testify against us: for our transgressions are with us; and as for our iniquities, we know them;
13 kotomboka mpe kowangana Yawe, kopesa Nzambe na biso mokongo, kosala mabongisi ya konyokola bato mpe kotombokisa bato, kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta.
In transgressing and lying against the LORD, and departing away from our God, speaking oppression and revolt, conceiving and uttering from the heart words of falsehood.
14 Boye, bosembo ezongi sima, mpe bosolo etelemi mosika; pamba te solo ekweyi na balabala, mpe bosembo elongi kokota te.
And judgment is turned away backward, and justice stands far off: for truth is fallen in the street, and equity cannot enter.
15 Solo ezali komonana lisusu na esika moko te; bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe. Yawe amoni yango mpe asepeli te ete kosambisa na bosembo ezali te.
Yea, truth fails; and he that departs from evil makes himself a prey: and the LORD saw it, and it displeased him that there was no judgment.
16 Amoni ete ezali ata na moto moko te, akamwe ete ata molobeli moko te azali. Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko, mpe bosembo na Ye elendisi Ye.
And he saw that there was no man, and wondered that there was no intercessor: therefore his arm brought salvation unto him; and his righteousness, it sustained him.
17 Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
For he put on righteousness as a breastplate, and an helmet of salvation upon his head; and he put on the garments of vengeance for clothing, and was clad with zeal as a cloak.
18 Akofuta moto na moto kolanda misala na ye: kanda makasi epai ya bayini na Ye, mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye; akopesa na bisanga lifuti na yango.
According to their deeds, accordingly he will repay, fury to his adversaries, recompence to his enemies; to the islands he will repay recompence.
19 Longwa na ngambo ya weste, bato bakobanga Kombo ya Yawe; mpe longwa na ngambo ya este, bato bakokumisa nkembo na Ye; pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, oyo pema ya Yawe ekomema.
So shall they fear the name of the LORD from the west, and his glory from the rising of the sun. When the enemy shall come in like a flood, the Spirit of the LORD shall lift up a standard against him.
20 « Mpo na Siona, mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, oyo bakobongwana na masumu na bango, » elobi Yawe.
And the Redeemer shall come to Zion, and unto them that turn from transgression in Jacob, says the LORD.
21 « Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango: Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.
As for me, this is my covenant with them, says the LORD; My spirit that is upon you, and my words which I have put in your mouth, shall not depart out of your mouth, nor out of the mouth of your seed, nor out of the mouth of your seed's seed, says the LORD, from henceforth and for ever.

< Ezayi 59 >