< Ezayi 57 >

1 Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.
The righteous perishes, and no man lays it to heart; and merciful men are taken away, none considering that the righteous is taken away from the evil.
2 Bato oyo batambolaka na bosembo bakokota na kimia, bakozwa bopemi na bambeto na bango.
He enters into peace; they rest in their beds, each one who walks in his uprightness.
3 « Kasi bino, boya awa, bino bana ya mwasi ya soloka, bino bana oyo bobotami na nzela ya ekobo mpe ya kindumba.
"But draw near here, you sons of the sorceress, offspring of an adulterer and a prostitute.
4 Bozali koseka nani? Bozali kofungolela nani monoko? Bozali kotiela nani penza monoko? Boni, bozali bana ya batomboki te, bozali libota ya lokuta te?
Against whom are you mocking? Against whom do you make a wide mouth, and stick out your tongue? Aren't you children of rebellion, offspring of liars,
5 Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.
you who inflame yourselves among the oaks, under every green tree; who kill the children in the valleys, under the clefts of the rocks?
6 Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye?
Among the smooth stones of the valley is your portion; they, they are your lot; you have even poured a drink offering to them. You have offered an offering. Shall I be appeased for these things?
7 Otiaki mbeto na yo na likolo, na songe ya ngomba; kuna nde ozalaki komata mpo na kobonza mbeka.
On a high and lofty mountain you have set your bed; there also you went up to offer sacrifice.
8 Otiaki nzambe na yo ya ekeko na sima ya ekuke na yo mpe ya mabaya oyo esimbaka ekuke yango. Osundoli ngai, olongoli bilamba na yo, omati likolo ya mbeto na yo; osali boyokani elongo na bato oyo olingaka kosangisa na bango nzoto mpe oluki komona bolumbu na bango.
Behind the doors and the posts you have set up your memorial: for you have uncovered to someone besides me, and have gone up; you have enlarged your bed, and made you a covenant with them: you loved their bed where you saw it.
9 Okendeki epai ya Moloki na mafuta ya olive mpe obakisaki lisusu malasi na yo. Otindaki bantoma na yo mosika, omikitisaki na se penza kino na mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
You went to the king with oil, and increased your perfumes, and sent your ambassadors far off, and debased yourself even to Sheol. (Sheol h7585)
10 Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, kasi omilobelaki te: ‹ Ezali na tina te! › Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, yango wana olembaki te.
You were wearied with the length of your way; yet you did not say, 'It is in vain.' You found a reviving of your strength; therefore you weren't faint.
11 Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te?
"Of whom have you been afraid and in fear, that you lie, and have not remembered me, nor laid it to your heart? Haven't I held my peace even of long time, and you do not fear me?
12 Nakobimisa bosembo mpe misala na yo na pwasa, mpe ekozala na litomba ata moko te mpo na yo.
I will declare your righteousness; and as for your works, they shall not profit you.
13 Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko ebikisa yo tango okoluka lisungi! Mopepe makasi ekomema yango nyonso, mopepe moko ekopikola yango. Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye akozwa lokola libula mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. »
When you cry, let those who you have gathered deliver you; but the wind shall take them, a breath shall carry them all away: but he who takes refuge in me shall possess the land, and shall inherit my holy mountain."
14 Bakoloba: « Botondisa mabele, botondisa mabele, bobongisa nzela, bolongola mabaku na nzela ya bato na Ngai! »
He will say, "Build up, build up, prepare the way, take up the stumbling-block out of the way of my people."
15 Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi: « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.
For thus says the high and lofty One who inhabits eternity, whose name is Holy: "I dwell in the high and holy place, with him also who is of a contrite and humble spirit, to revive the spirit of the humble, and to revive the heart of the contrite.
16 Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.
For I will not contend forever, neither will I be always angry; for the spirit would faint before me, and the souls who I have made.
17 Natombokaki likolo ya posa na ye ya kozwa bomengo na nzela ya moyibi; napesaki ye etumbu, nabombaki elongi na Ngai na kanda, kasi apengwaki kaka mpo na kolanda posa mabe ya motema na ye.
For the iniquity of his covetousness was I angry, and struck him; I hid myself and was angry; and he went on backsliding in the way of his heart.
18 Namonaki banzela na ye, kasi nakobikisa ye; nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye.
I have seen his ways, and will heal him: I will lead him also, and restore comforts to him and to his mourners.
19 Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
I create the fruit of the lips: Peace, peace, to him who is far off and to him who is near," says Jehovah; "and I will heal him."
20 Kasi bato mabe bazali lokola ebale oyo etomboki, oyo evandaka kimia te: mayi na yango ebwakaka potopoto mpe bosoto libanda.
But the wicked are like the troubled sea; for it can't rest, and its waters cast up mire and dirt.
21 Nzambe na ngai alobi: « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »
"There is no peace," says my God, "for the wicked."

< Ezayi 57 >