< Ezayi 54 >

1 Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, yo oyo obotaka te! Yemba nzembo mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te! Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe. 2 Yeisa ndako na yo ya kapo monene, bakisa bakapo na ndako yango mpo ete eya monene; kokanga motema te! Benda na molayi basinga na yo mpe pika banzete na yo makasi! 3 Pamba te okofungwama na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi; bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu mpe bakosala ete bato bavanda lisusu na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te. 4 Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te! Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te! Okobosana soni ya bolenge na yo mpe okokanisa lisusu te pasi na yo ya kokufisa mobali; 5 pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye: Yawe, Mokonzi ya mampinga; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo; babengaka Ye: Nzambe ya mokili mobimba. 6 Pamba te Yawe abengi yo lisusu lokola mwasi oyo basundola, bongo azali na pasi na motema. Ndenge nini bakoki solo kosundola mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo? 7 Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke; kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo. 8 Mpo ete nazalaki na kanda makasi, nabombelaki yo elongi na Ngai kaka mpo na tango moke; kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, elobi Yawe, Mosikoli na yo. 9 Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa ekozindisa lisusu mabele te. Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo ete nakosilikela yo lisusu te mpe nakopamela yo lisusu te. 10 Ata bangomba milayi eningani, ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, mpe boyokani na Ngai ya kimia ekotikala kolongwa te, elobi Yawe oyo alingaka yo. 11 Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka mpe ezangeli kobondisama, nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri, 12 nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo. 13 Yawe akoteya bana na yo nyonso, mpe kimia ya bana na yo ekozala monene. 14 Okolendisama kati na bosembo: minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te. 15 Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo. 16 Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto oyo apelisaka moto makasi na makala mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi mpo ete asala mosala ya kobebisa. 17 Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.

< Ezayi 54 >

A Dove is Sent Forth from the Ark
A Dove is Sent Forth from the Ark