< Ezayi 52 >

1 Oh Siona, lamuka, lamuka! Tika ete omikomisa lisusu makasi. Yelusalemi, engumba ya bule, lata bilamba na yo ya lokumu, pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te.
DESPIERTA, despierta, vístete tu fortaleza, oh Sión; vístete tu ropa de hermosura, oh Jerusalem, ciudad santa: porque nunca más acontecerá que venga á ti incircunciso ni inmundo.
2 Oh Yelusalemi, milongola na putulu, telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu! Oh Siona, mboka kitoko, yo oyo ozali mokangami, kata minyololo na kingo na yo!
Sacúdete del polvo; levántate y siéntate, Jerusalem; suéltate de las ataduras de tu cuello, cautiva hija de Sión.
3 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. »
Porque así dice Jehová: De balde fuisteis vendidos; por tanto, sin dinero seréis rescatados.
4 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango.
Porque así dijo el Señor Jehová: Mi pueblo descendió á Egipto en tiempo pasado, para peregrinar allá; y el Assur lo cautivó sin razón.
5 Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama.
Y ahora ¿qué á mí aquí, dice Jehová, ya que mi pueblo sea llevado sin por qué? Y los que en él se enseñorean, lo hacen aullar, dice Jehová, y continuamente es blasfemado mi nombre todo el día.
6 Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. »
Por tanto, mi pueblo sabrá mi nombre por esta causa en aquel día: porque yo mismo que hablo, he aquí estaré presente.
7 Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona: « Nzambe na yo azali Mokonzi! »
¡Cuán hermosos son sobre los montes los pies del que trae alegres nuevas, del que publica la paz, del que trae nuevas del bien, del que publica salud, del que dice á Sión: Tu Dios reina!
8 Yoka! Bakengeli na yo batomboli mingongo; bazali koganga elongo na esengo, pamba te, na miso na bango, bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona.
¡Voz de tus atalayas! alzarán la voz, juntamente darán voces de júbilo; porque ojo á ojo verán que Jehová vuelve á traer á Sión.
9 Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, boyemba elongo banzembo ya esengo, pamba te Yawe abondisi bato na Ye, asikoli Yelusalemi.
Cantad alabanzas, alegraos juntamente, soledades de Jerusalem: porque Jehová ha consolado su pueblo, á Jerusalem ha redimido.
10 Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule na miso ya bikolo nyonso; mpe suka nyonso ya mokili ekomona Lobiko ya Nzambe na biso.
Jehová desnudó el brazo de su santidad ante los ojos de todas las gentes; y todos los términos de la tierra verán la salud del Dios nuestro.
11 Bokende, bokende, bobima awa! Bosimba eloko moko te ya mbindo! Bobima kati na yango mpe bozala peto, bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe!
Apartaos, apartaos, salid de ahí, no toquéis cosa inmunda; salid de en medio de ella; limpiaos los que lleváis los vasos de Jehová.
12 Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, pamba te Yawe akotambola liboso na bino mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima.
Porque no saldréis apresurados, ni iréis huyendo; porque Jehová irá delante de vosotros, y os congregará el Dios de Israel.
13 Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, akomata likolo mpe akonetolama makasi penza.
He aquí que mi siervo será prosperado, será engrandecido y ensalzado, y será muy sublimado.
14 Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso,
Como se pasmaron de ti muchos, en tanta manera fué desfigurado de los hombres su parecer; y su hermosura más que la de los hijos de los hombres.
15 ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te mpe bakososola oyo nanu bayoka te.
Empero él rociará muchas gentes: los reyes cerrarán sobre él sus bocas; porque verán lo que nunca les fué contado, y entenderán lo que jamás habían oído.

< Ezayi 52 >